Bakufi bakozonga lisusu na bomoi!
NA FILME moko, eleki lelo ebele ya bambula, balakisaki elenge moko atɛlɛmi na lilita ya moto moko oyo azalaki kolinga mingi. Alobaki boye: “Mama azalaki ntango nyonso koyebisa ngai ete liwa ezali eloko mabe te.” Na nsima, babendaki elilingi ya lilita mpe ye alobaki boye: “Mpo na ngai, liwa esengelaki kozala te.”
Maloba ya elenge mobali wana emonisi ndenge oyo bamiliare ya bato bayokaka ntango moto moko oyo balingaka akufi. Liwa ezali mpenza monguna! Nzokande, Nzambe alaki boye: “Liwa, oyo ezali monguna ya nsuka, akobebisama nyɛɛ.” (1 Bakolinti 15:26) Kasi, mpo na nini tokufaka atako emonanaka lokola nde tokoki kozala na bomoi libela na libela? Ndenge nini liwa ekolongolama?
Ntina oyo tonunaka mpe tokufaka
Mpo na Yehova Nzambe, Mozalisi na biso, Biblia elobi boye: “Mosala na ye ebongi.” Deteronome 32:4; Nzembo 83:18) Mobali ya liboso, Adama, azalaki moto ya kokoka, mpe azalaki na likoki ya kozala na bomoi libela na libela na elanga ya Edene to Paladiso, esika Nzambe atyaki ye. (Genese 2:7-9) Mpo na nini Adama abimisamaki na Paladiso yango, anunaki mpe akufaki?
(Na mokuse, Adama atosaki Nzambe te na ndenge alyaki mbuma ya nzete oyo apekisaki ye. Nzambe ayebisaki Adama polele etumbu oyo akozwa soki alye mbuma ya nzete yango. Alobaki na ye boye: “Okokufa solo.” (Genese 2:16, 17) Eva abukaki mobeko yango mpe Adama alandaki ye na botomboki yango, yango wana Nzambe abenganaki bango na elanga ya Edene. Nzambe abenganaki bango nokinoki na ntina. Biblia elobi boye: “Na ntina ete [Adama] atya lobɔkɔ te kozwa mbuma ya nzete ya bomoi kolya yango mpe koumela [libela na libela].”—Genese 3:1-6, 22.
Adama ná Eva bakufaki mpo bazangaki botosi, kasi mpo na nini bana na bango nyonso banunaka mpe bakufaka? Mpamba te basangolaki lisumu yango, mpe lisumu ememelaki bango kozanga kokoka mpe liwa. Biblia elobi ete: “Lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko [Adama] mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso mpamba te bango nyonso basalaki lisumu.”—Baloma 5:12.
Elikya ya lisekwa ezali
Ndenge totángaki yango liboso, ‘liwa ekobebisama nyɛɛ’—ekolongolama mpo na libela! (1 Bakolinti 15:26) Kasi ekosalema ndenge nini? Biblia elobi boye: “Mosala kaka moko ya kolongisama esali ete bato ya mitindo nyonso bátángama bayengebene mpo na bomoi.” (Baloma 5:18) Nini ekosalisa bato yango bátángama bayengebene liboso ya Nzambe mpe bázwa bomoi ya seko?
Ezali ebongiseli oyo Nzambe azwi mpo na kolongola lisumu oyo bato nyonso basangolá epai ya Adama, moto ya liboso. Biblia elobi ete: “Likabo oyo Nzambe azali kopesa ezali bomoi ya seko na nzela ya Klisto Yesu Nkolo na biso.” (Baloma 6:23) Mpo na ebongiseli yango oyo ekosala ete bato bátángama bayengebene mpo bázwa bomoi, Yesu alobaki ete: “Nzambe alingaki mokili [ya bato] mingi na boye ete apesaki Mwana na ye mobotami-se-moko, mpo moto nyonso oyo azali komonisa kondima na kati na ye abomama te kasi azala na bomoi ya seko.”—Yoane 3:16.
Kanisá naino bolingo monene oyo Nzambe amonisaki mpo na biso, mpe oyo ya Mwana na ye Yesu Klisto, oyo anyokwamaki mpo na biso. Ntoma Paulo akomaki ete: “Mwana ya Nzambe . . . alingaki ngai mpe amikabaki mpo na ngai.” (Bagalatia 2:20) Kasi, mpo na nini kaka Yesu nde akokaki “kopesa molimo na ye [lokola] lisiko” mpo na biso mpe na ndenge yango kobikisa biso na mabe nyonso oyo lisumu ememá?—Matai 20:28.
Kaka Yesu nde akokaki kopesa molimo na ye lokola lisiko, mpo azali moto kaka moko oyo asangolaki lisumu ya Adama te. Mpo na nini? Mpo Nzambe azwaki bomoi ya Yesu kuna na likoló mpe atyaki yango na libumu ya Malia, oyo ayebaki naino mibali te. Ndenge anzelu ayebisaki Malia, mwana na ye azalaki “mosantu, Mwana ya Nzambe.” (Luka 1:34, 35) Yango wana, Biblia ebengi Yesu “Adama ya nsuka,” yango wana mpe asangolaki te lisumu ya “moto ya liboso Adama.” (1 Bakolinti 15:45) Lokola Yesu asalaki ata lisumu moko te, akokaki komipesa lokola “lisiko oyo ekokani,” elingi koloba bomoi na ye ekokanaki na oyo ya moto ya liboso, ntango azalaki naino moto ya kokoka mpe asalaki naino lisumu te.—1 Timote 2:6.
Na nzela ya ebongiseli wana ya lisiko, Nzambe asali ete tózwa lisusu eloko oyo Adama abungisaki, elingi koloba bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé. Kasi, mpo na kozwa lipamboli yango, ebele ya bato basengeli kosekwa. Oyo nde elikya kitoko! Kasi, likambo yango ezali nde ndɔtɔ ya mpamba?
Ntina ya kozala na elikya
Ekoki kozala mpasi kondima ete Yehova Nzambe, oyo akelaki bomoi, azongisa moto oyo akufá na bomoi? Kanisá naino likoki ya kozwa zemi oyo Nzambe apesaki mwasi ya liboso. “Adama ayebaki Eva mwasi na ye,” mpe soki sanza libwa na nsima, abotaki mwana, oyo azalaki lokola bango. (Genese 4:1) Tii lelo oyo, bato balobaka ete ndenge enama mokomoko ya mwana esalemaki na libumu ya Eva mpe ekómaki moto mobimba, ezali likamwisi monene, bayebaka mpenza te kolimbola yango!—Nzembo 139:13-16.
Lokola bankóto ná bankóto ya bana bazali kobotama na mokolo moko, mbala mingi bato bamonaka kobota lokola eloko mpamba. Nzokande, tii lelo oyo, bato mingi bandimaka te ete moto oyo akufá akoki kozanga lisusu na bomoi. Bato bazalaki kolela mwana mwasi moko ya moke oyo akufaki; ntango Yesu alobaki na bango bátika kolela, “babandaki kosɛka ye na ndenge ya kotyola” mpo bayebaki ete akufaki. Kasi, Yesu alobaki na mwana mwasi yango boye: “‘Tɛlɛmá!’ Mpe na mbala moko elenge mwasi yango atɛlɛmaki mpe abandaki kotambola.” Biblia elobi boye: “Na mbala moko [bato oyo bazalaki wana] bazalaki bango lisusu te, bazalaki na esengo makasi.”—Malako 5:39-43; Luka 8:51-56.
Ntango Yesu asɛngaki bálongola libanga na lilita ya moninga na ye Lazalo, Malata, ndeko ya Lazalo, alobaki boye: “Sikoyo asengeli kolumba nsolo, mpo esali mikolo minei.” Nzokande, ntango Yesu asekwisaki Lazalo, ezalaki esengo monene! (Yoane 11:38-44) Bato mingi bayokaki nsango ya makamwisi oyo Yesu azalaki kosala. Ntango Yoane Mobatisi azalaki na bolɔkɔ, bayekoli na ye bamemelaki ye nsango ya makambo oyo Yesu azalaki kosala; bayebisaki ye boye: “Bakufi bazali kolamuka.”—Luka 7:22.
Bakufi bakozonga na bomoi na nzela ya lisekwa
Bato yango oyo Yesu asekwisaki babɛlaki lisusu mpe bakufaki. Mpo na nini kasi Yesu asalaki makamwisi yango? Asalaki yango mpo na komonisa ete eloko oyo Adama abungisaki, elingi koloba bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé, ekozongisama. Lokola Yesu asekwisaki bato, yango emonisaki ndenge bamilio ya bato “bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.”—Nzembo 37:29.
Likambo ya esengo ezali ete soki biso mpe ‘tokangami na Nzambe,’ tokozala na kati ya bato oyo bazali na elikya kitoko wana ya kozala na bomoi libela na libela. Biblia elobi ete kokangama na Nzambe “ezali na elaka ya bomoi ya sikoyo mpe ya oyo ezali koya.” ‘Bomoi yango oyo ezali koya’ ebengamaka mpe “bomoi ya solosolo.”—1 Timote 4:8; 6:19.
Tótala sikoyo ndenge bomoi yango ya solosolo, bomoi na mokili ya sika oyo ekotonda na boyengebene ekozala.