TÓTALELA MAKAMBO YA KALA
Platon
Platon, filozofe moko Mogrɛki (azalaki na bomoi kobanda mobu 427 tii na mobu 347 L.T.B.) Abotamaki na Atene, na libota moko ya bozwi mpe atángaki bakelasi mingi. Alandaki makanisi ya Socrate filozofe moko oyo akendá nsango mpe ya bayekoli ya Pythagore moto moko ya filozofi mpe ya matematiki.
NSIMA ya kosala mobembo na mikili oyo ezali zingazinga ya Mbu ya Mediterane mpe komikɔtisa na politiki ya Sirakuse, engumba moko ya Sicile, na Grɛsi, Platon azongaki na Atene mpe afungolaki eteyelo ya filozofi mpe ya siansi oyo ebengamaki Académie. Mbala mingi bazalaki kotalela Académie yango lokola iniversite ya liboso ya mpoto, mpe ekómaki esika ya kosala bolukiluki na makambo ya filozofi mpe ya matematiki.
LISOLO YANGO ETALI YO NA NINI?
Mateya ya Platon ekɔtá mpenza na mateya ya mangomba oyo bamilio ya bato bandimaka, ata mpe na mateya ya baoyo bamibengaka bakristo; oyo mingi na bango bakanisaka ete mateya yango eutá na Biblia. Liteya ya libosoliboso ya Platon ezali oyo elobaka ete moto azali na molimo oyo ekufaka te nsima ya liwa.
“Platon azalaki kolinga mingi liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te.”—Body and Soul in Ancient Philosophy
Platon azalaki koluka koyeba soki bomoi ya moto nsima ya liwa ezalaka ndenge nini. Buku moko (Body and Soul in Ancient Philosophy) elobi ete “Platon azalaki kolinga mingi liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te.” Andimisamaki mpenza ete “eteni moko ya nzoto ya moto ekobaka kozala na bomoi nsima ya liwa, mpo ezwa mpenza mbano to etumbu” na kolanda makambo oyo moto asalaki ntango azalaki na mokili. *
NDENGE NINI MATEYA YA PLATON EPALANGANAKI?
Mateya yango eyebanaki mingi na boumeli ya basiɛklɛ 9 oyo iniversite ya Platon esalaki; kobanda na mobu 387 L.T.B. tii na mobu 529 T.B. Makanisi ya Platon epalanganaki mingi na mikili oyo Grɛsi mpe Roma ezalaki koyangela. Philon d’Alexandrie, Moyuda moko oyo azalaki filozofe, andimaki makanisi ya Platon kaka ndenge bakonzi mingi ya mangomba ya bokristo bandimaki yango. Yango esalaki ete mateya ya filozofi ya bapakano, ata mpe oyo etali molimo ekufaka te, ekɔta na mateya ya Lingomba ya Bayuda mpe ya bokristo.
Buku moko (The Anchor Bible Dictionary) elobi ete “mateya nyonso ya teoloji ya bokristo elandaka mateya ya filozofi ya Bagrɛki, mingimingi oyo ya Platon.” Elobi mpe ete “bakristo mosusu oyo bazali bafilozofe . . . babongi mpenza kobengama bakristo ya Platon.” Tótalela naino soki makambo oyo ezali na babuku oyo ezali awa na nse eyokani ná Biblia.
Platon alobaki boye: “[Na liwa,] bomoto na biso ya solosolo, oyo tobengi yango molimo oyo ekufaka te, ekendaka epai ya banzambe mosusu . . . mpo na kosamba—likambo oyo bato ya malamu babangaka te kasi ebangisaka nde bato mabe.”—Platon—Laws, Book XII.
Biblia elobi boye: Molimo ezali moto ye moko to bomoi oyo azali na yango. Banyama mpe bazali milimo. Molimo ekobaka kozala na bomoi te nsima ya liwa. * Tótalela bavɛrsɛ oyo elandi:
-
“Moto ya liboso Adama akómaki molimo ya bomoi.”—1 Bakorinti 15:45.
-
“Nzambe alobaki lisusu ete: ‘Mabele ebimisa milimo ya bomoi na mitindo na yango, nyama ya mboka mpe nyama mikemike mpe nyama ya zamba.’”—Ebandeli 1:24.
-
“Tiká molimo na ngai ekufa.”—Mitángo 23:10.
-
“Molimo oyo esali lisumu—yango nde ekokufa.”—Ezekiele 18:4.
Ezali polele ete, Biblia eteyaka te ete molimo ekobaka kozala na bomoi nsima ya liwa ya moto. Na yango, omituna boye: ‘Mateya oyo nandimaka euti na Biblia to na filozofi ya Platon?’
^ par. 7 Atako Platon apalanganisaki liteya yango mingi, kasi azalaki moto ya liboso te oyo andimaki yango. Mangomba ya bapakano, ezala oyo ya Ezipito mpe ya Babilone ezalaki mpe koteya liteya yango na balolenge ekeseni.
^ par. 12 Biblia eteyaka ete bakufi balali, elingi koloba bazali kozela lisekwa. (Mosakoli 9:5; Yoane 11:11-14; Misala 24:15) Na yango, soki molimo ekufaka te, ntina ya lisekwa ezali te.