Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Libɛ́lɛ (nageoire) ya balɛnɛ ya mokɔngɔ evimbá

Libɛ́lɛ (nageoire) ya balɛnɛ ya mokɔngɔ evimbá

SOKI balɛnɛ yango ekoli, ezalaka monene mpe kilo mingi koleka ata motuka ya monene. Kasi, mbisi yango ya monene ezalaka na mokakatano te ya kopumbwa mpe kobaluka mpo na kozonga lisusu na mai na vitɛsi moko makasi. Nini esalaka ete balɛnɛ yango esala bongo kozanga mokakatano? Sekele na yango mosusu ezalaka na matutu oyo ezalaka na bibɛ́lɛ to nageoire na yango.

Tókanisa naino: Bibɛ́lɛ ya Babalɛnɛ mingi mpe ya bambisi mosusu ezalaka na matutu te na bansuka na yango. Nzokande, balɛnɛ ya mokɔngɔ evimbá ekeseni na bambisi yango. Ezalaka na matutu minene (oyo babengaka tubercules) oyo elandaná na bansuka ya bibɛ́lɛ na yango. Ntango balɛnɛ yango ebɛtaka mai, mai ebɛtaka matutu na yango mpe mai yango epanzanaka mikemike mpe ebalukaka zingazinga ya bibɛ́lɛ. Matutu yango nde esalaka ete mai ebaluka ndenge wana. Likambo yango epesaka Balɛnɛ makasi ya kotombwana, mpe kotombola bibɛ́lɛ na yango likoló mpenza kozanga ete ekita na mbalakaka. Ntango bibɛ́lɛ yango etombwani ndenge wana, matutu na yango elɛmbisaka makasi ya mai; yango ezalaka na ntina mingi mpo na bibɛ́lɛ wana oyo ezalaka molai mpenza, (1/3) ya molai ya balɛnɛ yango.

Bato ya mayele bazali kosalela mayele wana mpo na kosala yenda ya masuwa, bamasini oyo batyaka na mai mpo ebimisa kura, bamasini oyo pakapaka na yango ebalukaka na mopɛpɛ, mpe pakapaka ya elikoptɛrɛ ya malamu koleka.

Okanisi nini? Libɛ́lɛ to nageoire ya balɛnɛ ya mokɔngɔ evimbá ebimá kaka yango moko, to basalaki yango kosala?