LISALISI MPO NA LIBOTA | KOBƆKƆLA BANA
Ntango mwana na yo ya mwasi azali kotungisama na makanisi
MOKAKATANO
Mwana na yo ya mwasi ayebisi yo ete azali kotungisama na makanisi. Okamwe mpe olobi boye: ‘Na mbula 13? Azali naino elenge mpenza mpo ayeba soki kotungisama na makanisi ezali nini!’ Kasi, liboso oloba bongo, talelá naino bantina mosusu oyo ekoki kosala ete mwana ya mbula wana atungisama.
NINI ESALAKA BONGO?
Mbongwana na nzoto. Ndenge oyo elenge mwasi akolaka mbangumbangu ntango bomwasi na ye ebandi komonana, ekoki kotungisa ye mingi, mingimingi soki azali liboso to nsima ya bilenge mosusu. Anna, * oyo azali sikoyo na mbula 20 alobi boye: “Na bana basi oyo tokolá na bango, ngai nde moto ya liboso oyo nalataki soutien mpe yango ekómaki kopesa ngai nsɔni. Nazalaki komimona ete nakeseni mpenza na bango, lokola nde nazali ndenge mosusu!”
Mbongwana na makanisi. Karen oyo azali sikoyo na mbula 17 alobi boye: “Ezalaki mpenza kotungisa ngai ndenge nazalaki koyeba te mpo na nini na moi nazalaki na esengo mpe na butu nazalaki kolela. Nayebaki te nini ekómelaki ngai. Nazalaki koyeba te nasala nini.”
Ntango abandi komona sanza. Elenge mwasi moko na nkombo Kathleen alobi boye: “Atako mama ayebisaki ngai makambo oyo ekokómela ngai, kasi mbala ya liboso oyo namonaki sanza namibongisaki naino te. Nazalaki kosukola mbala ebele na mokolo mpo nazalaki komimona ntango nyonso ete nazali salite. Mpe bayaya na ngai misato ya mibali bazalaki kotumola ngai mpenza. Ezalaki lokola nde mpasi oyo nazalaki koyoka, ezalaki masɛki mpo na bango.”
Mbamba ya baninga. Marie, oyo akokisi sikoyo mbula 18, alobi boye: “Ntango nazalaki na mbula 12 tii 14, baninga na ngai bazalaki kotya ngai mpanzi likoló. Na eteyelo na biso, bana bazalaki kosepela te na moto nyonso oyo akesanaki na bango.” Anita, oyo azali na mbula 14 alobi boye: “Bana
nyonso ya mbula na ngai basepelaka ete baninga na bango bándima bango, kasi soki baboyi bango esalaka mpasi na motema.”OKOKI KOSALA BOYE
Sɛngá mwana na yo aloba makambo oyo ezali kotungisa ye. Na ebandeli akoki koyoka nsɔni mpo na koloba. Kasi zalá motema molai mpe landá toli oyo ya Biblia ya “koyokaka noki, kowelaka koloba te.”—Yakobo 1:19.
Kozwa na lisɛki te makambo oyo ezali kotungisa mwana na yo. Kobosana te ete mwana na yo ayebi makambo mingi te lokola yo, mpe akutaná naino te na mitungisi mingi lokola yo, yango wana ayebi mpenza te ndenge ya kolonga yango.—Toli ya Biblia: Baroma 15:1.
Kopesa ye misala ebeleebele te nsima ya kelasi. Buku moko (Teach Your Children Well) elobi ete bilenge oyo bazalaka na makambo mingi ya kosala “mbala mingi batungisamaka, mingimingi bayokaka motó mpasi mpe babɛlaka estoma.”—Toli ya Biblia: Bafilipi 1:9, 10.
Tikelá ye ntango mingi ya kopema. Mbala mingi, kopema ezali likambo ya liboso oyo bilenge bakipaka te. Kasi, soki mwana na yo azali kopema te, likoki na ye ya kokanisa mpe ya kolonga mitungisi ekolɛmba.—Toli ya Biblia: Mosakoli 4:6.
Salisá ye asalela mayele oyo ebongi mpo atungisamaka mingi te na makanisi. Bilenge basi mosusu bamonaka ete kosala ngalasisi ekitisaka mitungisi. Biblia elobi ete: “Ngalasisi ya nzoto ezali na litomba.” (1 Timote 4:8) Bilenge basi mosusu bamonaka ete kokoma makambo na bango na mwa kaye esalisaka bango. Brittany oyo azali na mbula 22 alobi ete: “Ntango nazalaki naino elenge mpenza, nazalaki kokoma makambo oyo nazalaki kolonga te kosilisa yango. Yango ezalaki kosalisa ngai nayeba ndenge nazalaki komiyoka mpo na likambo moko, mpe na nsima ezalaki kosalisa ngai nayeba ndenge ya kosilisa yango to nakipe yango te.”
Zalá ndakisa. Osalaka nini mpo otika kotungisama na makanisi? Olingaka kosala makambo mingi na mbala moko mpe na nsima obangaka ntango obandi kosala yango? Obomaka nzoto na mosala ya makasi, mpe ozalaka na ntango te mpo na makambo oyo eleki ntina na bomoi? Bafilipi 4:5 elobi boye: “Bato nyonso báyeba ezaleli na bino ya makambo makasimakasi te.” Kobosana te ete mwana na yo azali kotala ndakisa na yo mpe azali kozwela yango liteya ezala ya malamu to ya mabe.
^ par. 6 Na lisolo oyo bankombo mosusu ezali ya bango te.