LAMUKÁ! Sanza ya Mars 2014 | Lisolo ya bozalisi oyo bato mingi bayebaka te

Oyo Biblia elobaka mpo na bozalisi ekeseni mpenza na oyo bato mingi bakanisaka mpo na yango.

Makambo oyo ezali koleka na mokili

Ezali na masolo oyo: koningana ya mabele oyo esalemaki mpo na kobenda mai ya nse ya mabele, ekólo ya liboso oyo ebimisaka mbongo mingi na mibembo ya baturiste, mpe bapekisi basaki ya plastiki.

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Lisolo ya bozalisi oyo bato mingi bayebaka te

Lisolo ya Biblia oyo elobeli bozalisi eyokani mpenza na makambo oyo bato ya siansi bamoni?

BIBLIA ELOBI NINI?

Mbongo

Mbongo nde ebimisaka makambo nyonso ya mabe?

MIKILI MPE BATO

Mobembo moko na Salvador

Luká koyeba bato yango ya boboto ya “Mokili ya ba-volcan.”

Mai ya miso na biso ezali mpenza likamwisi

Mikólo babimisaka mai ya miso ya mawa to ya esengo, kasi mbala mingi ezalaka bongo te mpo na mwana oyo auti kobotama sika. Mpo na nini?

LISALISI MPO NA LIBOTA

Ntango libala na yo ekómeli yo bololo

Na esika osepela na libala yango, okómi komiyoka nde lokola ozali na bolɔkɔ? Makambo mitano oyo ekoki kobongisa libala na yo.

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Mposo ya nyoka

Nini esalaka ete mposo ya nyoka ezala makasi mpo ekoka komata na nzete oyo ezali mabakumabaku to etimola libulu na zɛlo ya mabangamabanga?

Makambo mosusu

Komeka boyebi: Nani alobaki yango? (Ebandeli 41-50)

Zwá lokasa oyo mpe meká koyokanisa maloba ná bato oyo balobaki yango.