Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Lisolo ya bozalisi oyo bato mingi bayebaka te

Lisolo ya bozalisi oyo bato mingi bayebaka te

BATO mingi batángá to bayoká oyo Biblia elobaka mpo na ndenge oyo molɔ́ngɔ́ ebandá. Lisolo yango, oyo esali sikoyo mbula 3 500, ebandi na maloba oyo eyebani malamu: “Na ebandeli Nzambe azalisaki likoló mpe mabele.”

Kasi, bato mingi bayebaka te ete bakonzi ya mangomba, ata mpe bato oyo bandimaka ete Nzambe akelá biloko nyonso mpe baoyo balimbolaka Biblia kaka ndenge ekomami, babongolá lisolo ya Biblia oyo elobeli bozalisi na masapo ndenge na ndenge oyo eyokani ata moke te na oyo Biblia eteyaka mpenza. Bandimbola yango eyokanaka te na makambo ya siansi. Atako masapo yango ezali na Biblia te, esalá ete bato mingi bámona ete masolo ya Biblia ezali masapo mpamba.

Bato mingi bayebaka te lisolo ya bozalisi oyo Biblia elobeli mpenza. Ezali nsɔni, mpo Biblia elimboli malamumalamu ndenge oyo molɔ́ngɔ́ ebandá. Longola yango, ndimbola yango eyokani na makambo oyo bato ya siansi bamoni. Na ntembe te, okokamwa soki otángi lisolo ya bozalisi oyo bato mingi bayebaka te, oyo Biblia elobeli!

MOZALISI AKELÁMÁ TE

Lisolo ya Biblia oyo elobeli bozalisi emonisaka ete ezali na Moto Oyo-Aleki-Likoló, Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso oyo asalá biloko nyonso. Azali nani mpe azalaka ndenge nini? Biblia emonisi ete akeseni mpenza na banzambe oyo bato mingi mpe mangomba ya minene basambelaka. Azali Mozalisi ya biloko nyonso, kasi bato mingi bayebi ye mpenza malamu te.

  • Nzambe azalaka mpenza. Azali te mwa nguya moko oyo ezangi bomoto, oyo eyengayengaka kaka mpamba na molɔ́ngɔ́. Akanisaka, ayokaka mawa to esengo mpe azali na mikano.

  • Nzambe azali na nguya mpe bwanya oyo ezangi nsuka. Yango wana biloko oyo akelá ekamwisaka, mingimingi bikelamu ya bomoi.

  • Nzambe akelá biloko nyonso oyo tomonaka. Na yango, azali te na nzoto oyo esalemá na biloko oyo emonanaka, oyo ye moko asalá. Kutu, azali nde elimo, to na nzoto oyo emonanaka te.

  • Nzambe azali na ebandeli te mpe nsuka te. Azalaka ntango nyonso mpe akokoba kozala. Na yango, moto moko te akelá ye.

  • Nzambe azali na nkombo, oyo esalelami mbala ebele na Biblia. Nkombo yango ezali Yehova.

  • Yehova Nzambe alingaka mpe akipaka bato.

NZAMBE AKELAKI MOLƆ́NGƆ́ NA BOUMELI YA NTANGO BONI?

Biblia elobi ete Nzambe asalaki “likoló mpe mabele.” Nzokande, maloba yango elobeli te soki akelaki molɔ́ngɔ́ na boumeli ya ntango boni to mayele nini asalelaki mpo na kobongisa yango. Tokoloba boni mpo na likanisi oyo epalangani, ya bato oyo balobaka ete Nzambe akelá molɔ́ngɔ́ na boumeli ya mikolo motoba oyo ezalaka na ngonga 24 na mokolo? Bato ya siansi baboyaka mpenza likanisi yango, oyo eyokani ata moke te na oyo Biblia elobi. Tótala mpenza oyo Biblia elobi.

Biblia endimaka te likanisi ya bato oyo balobaka ete Nzambe akelá biloko nyonso na boumeli ya mikolo motoba, oyo ezalaka na ngonga 24 na mokolo

  • Biblia endimaka te likanisi ya baoyo balobaka ete Nzambe akelá biloko nyonso na boumeli ya mikolo motoba, oyo ezalaka na ngonga 24 na mokolo.

  • Mbala mingi, Biblia esalelaka liloba “mokolo” mpo na komonisa bileko ndenge na ndenge ya ntango. Na bisika mosusu, bileko yango ezali na ntango oyo molai na yango eyebani mpenza te. Ezali mpe bongo mpo na lisolo ya bozalisi oyo Biblia elobeli na mokanda ya Ebandeli.

  • Na lisolo yango, mbala mosusu mokolo mokomoko ya mikolo motoba ya bozalisi eumelaki bankoto ya bambula.

  • Nzambe asilaki kokela molɔ́ngɔ́, ata mpe mabele, ntango mokolo ya liboso ya bozalisi ebandaki.

  • Ezali polele ete mikolo motoba ya bozalisi ezalaki nde bileko molai oyo na boumeli na yango Yehova Nzambe abongisaki mabele mpo bato báfanda.

  • Lisolo ya Biblia oyo elobeli bozalisi eyokani na makambo oyo bato ya siansi balobi mpo na mbula oyo molɔ́ngɔ́ esali.

NZAMBE ASALELAKI NDE EVOLISYO?

Bato mingi oyo bandimaka Biblia te, bandimaka liteya oyo elobaka ete bikelamu ya bomoi eutaki na mwa eloko moko boye oyo na nsima ebimisaki biloko mosusu kaka boye. Balobaka ete na ntango moko boye, eloko moko oyo ekokani na bactérie, oyo ezalaka na likoki ya kokóma ebele kaka yango moko ebimaki, mpe na nsima, malɛmbɛmalɛmbɛ ekómaki bikelamu ya ndenge nyonso oyo tomonaka lelo oyo. Soki ezali bongo, boye nzoto ya moto oyo ezali na makambo ndenge na ndenge ya kokamwa ebandaki mpe kaka bongo.

Bato mingi oyo bandimaka ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe, bandimaka mpe liteya yango ya evolisyo. Bakanisaka ete Nzambe abimisaki na mbalakaka eloko moko ya liboso ya bomoi awa na mabele mpe ntango mosusu atambwisaki makambo mpo eloko yango ebongwana mokemoke tii ebimisa biloko mosusu. Nzokande, Biblia elobaka bongo te.

Lisolo ya Biblia oyo elobeli bozalisi eyokani na makambo oyo bato ya siansi balobi ete mbongwana esalemaka na kati ya bikelamu

  • Biblia elobaka ete Yehova Nzambe asalaki banzete mpe banyama ya ndenge na ndenge, asalaki mpe mobali mpe mwasi ya kokoka oyo bazalaki na likoki ya komiyeba mpe komonisa bizaleli lokola bolingo, mayele mpe bosembo.

  • Emonani ete mitindo ya banyama mpe banzete oyo Nzambe akelaki ebongwanaki mpe ebimisaki oyo ya mitindo mosusu. Mbala mingi, mitindo ya banyama to banzete oyo yango ebimisaki ekesanaki mpenza.

  • Lisolo ya Biblia oyo elobeli bozalisi eyokani na makambo oyo bato ya siansi balobi ete mbongwana esalemaka na kati ya bikelamu.

BOZALISI EMONISAKA ETE MOZALISI AZALI

Alfred Russel Wallace, moto moko ya bioloji ya ekólo Angleterre, oyo azalaki na bomoi na katikati ya bambula ya 1800 andimaki likanisi ya Charles Darwin mpo na liteya ya evolisyo oyo elobaka ete bikelamu emesanaka na bisika oyo efandaka. Kasi, balobaka ete ata moto yango ya evolisyo oyo akendá nsango alobaki boye: “Mpo na baoyo bazali na miso ya komona mpe bɔɔngɔ oyo emesaná kokanisa, na biloko mikemike oyo ezalaka na baselile, na makila, na mabele mobimba, mpe na molɔ́ngɔ́ oyo etondi na minzoto . . . , ezali na Moto moko ya bwanya mpe oyo akipaka yango, na mokuse, ezali na Moto moko ya Mayele.”

Mbula soki 2 000 liboso Wallace aloba bongo, Biblia esilaki koloba ete: “Mpo bizaleli [ya Nzambe] oyo emonanaka te ezali komonana polelepolele banda na kozalisama ya mokili, mpo emonanaka na nzela ya biloko oyo asalá, ɛɛ nguya na ye ya seko mpe Bonzambe na ye.” (Baroma 1:20) Mbala na mbala, esengeli ozwaka ntango ya kokanisa na biloko ndenge na ndenge oyo ezali na molɔ́ngɔ́, kobanda na mwa lititi moko tii na biloko mingi oyo ezalaka na likoló. Soki otali malamumalamu biloko oyo Nzambe akelá, okomona ete Mozalisi azali.

Kasi okoki komituna boye: ‘Soki ezali na Nzambe ya bolingo oyo akelá biloko nyonso, mpo na nini atiki ete bampasi ezala? Asundolá nde bikelamu na ye awa na mabele? Bomoi ekozala ndenge nini na mikolo ezali koya?’ Biblia ezali na masolo mingi mosusu oyo bato bayebaka te mpo makanisi ya bato mpe mateya ya mangomba ezipá yango. Batatoli ya Yehova, babimisi ya zulunalo oyo, bakosepela kosalisa yo oyekola mateya ya solosolo ya Biblia mpe oyeba makambo mingi etali Mozalisi mpe ndenge oyo bomoi ya bato ekozala na mikolo ezali koya.