Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Kolonga ya solosolo elimboli nini?

Kolonga ya solosolo elimboli nini?

ELEKI kutu malamu olonga te na likambo moko na esika okanisa ete olongi nzokande ezali bongo te. Kutu, soki olongi te na likambo moko boye, okoki kosala makasi mpo obongisa yango. Ezala ndenge nini, okoki kozwela libunga yango liteya mpe kozwa ekateli ya kozongela yango lisusu te mbala ya nsima.

Nzokande, ezali bongo te mpo na kolonga ya lokuta. Ekoki kotinda yo okanisa ete ozali kolonga nzokande ezali bongo te. Ntango okomona ete esengeli obongola makambo, ntango mosusu mwaye ekozala lisusu te.

Tózwa ndakisa. Mokolo moko, Yesu Kristo atunaki boye: “Moto akozala na litomba nini soki azwi mokili mobimba kasi abungisi molimo na ye?” (Matai 16:26) Likanisi yango ekoki kotalela baoyo bamipesaka mingi na koluka mbongo mpe biloko nyonso oyo mbongo esombaka​—yango mpenza nde kolonga ya lokuta. Mopesi toli moko na nkombo Tom Denham akomaki boye: “Kokanisa kaka na mpɛtɛ oyo okozwa mbala ya nsima, kokóma na mbongo mingi to na biloko ebele, ekokisaka te bamposa ya moto. Komona ete kozala na mbongo nde esalaka ete moto alonga na bomoi ezali libunga mpo nsukansuka akomona ete azangi eloko moko.”

Na ntembe te, lelo oyo bato mingi bakondima likanisi yango. Ankɛtɛ moko oyo esalemaki na États-Unis emonisaki ete “kozala na mbongo mingi” ezwi esika ya 20 na liste ya makambo 22 oyo “esalaka ete báloba ete moto alongi mpenza na bomoi.” Makambo oyo batyaki liboso na liste yango ezali sante ya malamu, koyokana malamu na basusu mpe mosala oyo olingaka.

Ezali polele ete soki batuni bango, bato mingi bakoki kokesenisa kolonga ya solosolo mpe ya lokuta. Kasi, ezalaka mpasi mpenza kozwa bikateli oyo ekomonisa ete ozali na makanisi ya malamu na oyo etali kolonga na bomoi.