MIKILI MPE BATO
Mobembo moko na Honduras
HONDURAS elimboli “mozindo” na Espagnol, ekoki kozala liloba oyo Christophe Colomb asalelaki mpo na kolobela mai oyo ezali pembenipembeni ya mokili yango oyo ezali na bokula ya Atlantike. Bamosusu balobaka ete ezali na ndenge wana nde Honduras ezwaki nkombo yango.
Bato ya Honduras bazwaka bosembo mpe boyokani na libota na valɛrɛ mingi. Na ndakisa, mobali ná mwasi na ye nde bazwaka bikateli ya minene lokola ndenge ya kosalela mbongo na libota to kobɔkɔla bana.
Bato mingi ya Honduras bazali bametisi, bana oyo mindɛlɛ ná bankolo-mboka wana babotaki. Tii lelo etuluku mosusu ya bankolo-mboka, na ndakisa Ba-Chortí bazali kaka. Bamosusu, na ndakisa Ba-Garifuna, bankɔkɔ na bango bautá epai mosusu.
Ba-Garifuna bazali bankɔkɔ ya bato ya Afrika mpe ya Ba-Indiens ya Caraïbe oyo bafandaká na esanga Saint Vincent. Na mobu soki 1797, Ba-Garifuna bayaki kofanda na Islas de la Bahía (îles de la Baie). Na nsima, bakómaki kofanda pembenipembeni ya mai ya Caraïbe, na mokili ya Amerika ya ntei. Nsukansuka, Ba-Garifuna bapalanganaki na bisika mosusu ya Amerika ya ntei mpe ya nɔrdi.
Ba-Garifuna babinaka makasi ntango mbonda ezali kobɛta. Balataka mpe bilamba ya bonkɔkɔ ya langilangi, babɛtaka baistware mpe balyaka bilei lokola ereba (gato moko ya monene ya papala oyo basalaka na songo [manioc]).
Masangá ya Batatoli ya Yehova ezali soki 400 na Honduras. Basalaka makita na bango ya losambo na Anglais, Espagnol, Garifuna, monɔkɔ ya bajɛstɛ ya Honduras, Mandarin mpe na monɔkɔ ya Miskito.