Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISALISI MPO NA LIBOTA | LIBALA

Kosɛnga bolimbisi

Kosɛnga bolimbisi

MOKAKATANO

Yo ná molongani na yo bouti koswana. Omilobeli boye: ‘Nakosɛnga ye bolimbisi te mpo ye nde abandaki!’

Atako oboyi kokipe yango, kasi matata yango ezali kaka. Omoni ete osengeli kosɛnga bolimbisi kasi koloba kaka “limbisá ngai” ekómeli yo kilo.

NINI ESALAKA BONGO?

Lolendo. Mobali moko na nkombo Charles, * alobi boye: “Na bantango mosusu ezalaka mpasi naloba ‘limbisá ngai’ mpo lokumu na ngai ekokita.” Lolendo ekoki kosala ete ezala mpasi ondima ete yo mpe ozali na foti na likambo yango.

Makanisi na yo. Okoki kokanisa ete ebongi kosɛnga bolimbisi kaka soki yo nde obandaki likambo yango. Mwasi moko na nkombo Jill, alobi boye: “Soki namoni ete ngai mpenza nde nazali na foti, ezalaka mpasi te naloba ‘limbisá ngai.’ Kasi, soki biso mibale tolobaki makambo oyo tomoni ete ebongaki te tóloba, ezalaka mpasi nasɛnga bolimbisi. Namonaka te ntina ya kosɛnga bolimbisi soki biso mibale tozali na foti.”

Okoki komilongisa lisusu koleka soki omoni ete ezalaki nde foti ya molongani na yo. Mobali moko na nkombo Joseph, alobi boye: “Ntango omoni mpenza ete osali ata likambo moko te ya mabe, okosɛnga bolimbisi te mpo na komonisa ete ozali na foti te.”

Ndenge obɔkwamá. Mbala mosusu obɔkwamá na libota oyo bato bazalaki kosɛnga bolimbisi mpenza te. Soki ezali bongo, balakisá yo te kondima mabunga na yo. Lokola na bomwana balakisá yo mpenza te kosɛngaka bolimbisi, yango wana omesaná te kosala yango.

OKOKI KOSALA BOYE

Kosɛnga bolimbisi ekoki kosilisa matata

Mityá na esika ya molongani na yo. Meká kokanisa mokolo oyo moto moko asɛngaki yo bolimbisi mpe ndenge esepelisaki yo. Mpo na nini te kosala bongo mpo na kosepelisa mpe molongani na yo? Ata soki omoni ete ozali na foti te, okoki kosɛnga bolimbisi mpo na mpasi oyo molongani na yo ayoki na motema to mpo na makambo oyo okanaki te ete ekobima mpo na oyo osalaki. Kosala bongo ekoki kosilisa mpasi ya molongani na yo.​—Toli ya Biblia: Luka 6:31.

Batelá libala na yo. Kokanisa te ete soki osɛngi bolimbisi ozali yuma, kasi ezali nde mpo na kobatela libala na yo. Kutu, Masese 18:19 elobi ete moto oyo basaleli ye mabe “aleki sité ya makasi.” Ata soki ekoki kosalema, ezalaka mpasi kozongisa kimya soki mokomoko azali koluka komilongisa. Kasi, soki osɛngi bolimbisi, ekosala ete matata yango ekóma likambo monene te. Ezali lokola ozali kotya libala na yo na esika ya liboso.​—Toli ya Biblia: Bafilipi 2:3.

Kozela te mpo na kosɛnga bolimbisi. Toboyi te, kosɛnga bolimbisi ekoki kozala mpasi soki ozali mpenza na foti te. Kasi mabunga ya molongani na yo epesi yo nzela te ya komonisa bizaleli mabe. Na yango, kokakatana te mpo na kosɛnga bolimbisi, kokanisa te ete matata yango ekosila yango moko soki ntango eleki. Soki osɛngi bolimbisi, ekozala mpasi te mpo molongani na yo asɛnga mpe bolimbisi. Soki ozali na momeseno ya kosɛnga bolimbisi ekokóma pɛtɛɛ kosala yango.​—Toli ya Biblia: Matai 5:25.

Sɛngá bolimbisi na motema moko. Komilongisa ekeseni na kosɛnga bolimbisi mpo na ezaleli oyo omonisi. Mpe koloba, mbala mosusu na mwa kotyola, “limbisá ngai kasi ndenge likambo yango esilikisi yo” ezali kosɛnga bolimbisi te! Ndimá foti na yo mpe mpasi oyo oyokisi molongani na yo, ata soki omoni ete asengelaki koyoka bongo to te.

Talelá makambo ndenge ezali. Na komikitisa nyonso ndimá ete yo mpe okosala mabunga. Kutu, moto nyonso asalaka mabunga! Ata soki omoni ete ozali na foti te na likambo moko, yebá ete makanisi na yo na likambo yango ekoki kozala kaka ndambo na nyonso oyo elekaki. Biblia elobi boye: “Moto oyo alobaka liboso na ntango azali kosamba amonanaka moyengebene; moninga na ye akoya mpe akolandela mpenza ye malamumalamu.” (Masese 18:17) Soki ozali komitalela na ndenge ebongi mpe kondima mabunga na yo, ekozala mpasi te kosɛnga bolimbisi.

^ par. 7 Na lisolo oyo bankombo mosusu ezali ya bango te.