NINI EPESAKA ESENGO?
Kosepela na oyo ozali na yango mpe kokaba
MBALA MINGI BATO BALOBAKA ETE BILOKO YA MOKILI TO BOZWI NDE EPESAKA ESENGO. Yango wana, bamilio ya bato babomaka nzoto na mosala bangonga mingi mpo na kozwa mbongo mingi. Kasi, mbongo mpe biloko ya mokili epesaka mpenza esengo ya solosolo? Tótalela yango.
Zulunalo moko (Journal of Happiness Studies) emonisi ete soki kaka bamposa na biso ya mokolo na mokolo ekokisami, mbongo oyo etikalaka ebakiselaka moto esengo te. Mbongo yango moko ezali na likambo te. Lisolo ya zulunalo mosusu (Monitor on Psychology) elobi ete “mposa ya kozala kaka na [mbongo] mingi nde ezangisaka esengo.” Maloba wana eyokani na toli oyo Biblia epesá esili koleka mbula pene na 2000: “Bolingo ya mbongo ezali mosisa ya makambo mabe ya ndenge nyonso, mpe lokola bamosusu bakolisi bolingo wana . . . bamitɔbɔlitɔbɔli na ebele ya bampasi.” (1 Timote 6:9, 10) Bampasi yango ekoki kozala nini?
KOZALA MOTEMA LIKOLÓ MPE KOZANGA MPƆNGI MPO NA KOBATELA BOZWI. “Mosaleli, alya moke to mingi, mpɔngi na ye ezalaka elɛngi; kasi ebele ya biloko ya mozwi epesaka ye mpɔngi te.”—Mosakoli 5:12.
KOLƐMBA NZOTO SOKI TOZWI TE ESENGO OYO TOZALAKI KOLUKA. Ntango mosusu, bato mingi balɛmbaka nzoto ndenge wana mpo mposa oyo bazalaka na yango ya kozwa mbongo mingi esilaka te. “Moto oyo alingá palata akotonda palata te, mpe moto alingá bozwi akotonda mpe lifuti te.” (Mosakoli 5:10) Longola yango, mposa ya bozwi ekoki kotinda moto azongisa nsima makambo ya ntina mingi oyo epesaka esengo, na ndakisa kolekisa ntango elongo na bato ya libota mpe baninga to komipesa na mosala ya Nzambe.
MAWA MPE MOTEMA MPASI SOKI MBONGO EBUNGI TO ESILI VALƐRƐ TO MPE SOKI MOMBONGO EKWEI. “Koboma nzoto te mpo na kozwa bomɛngo. Tiká kotyela mayele na yo moko motema. Obwaki miso na yo kuna, nzokande ezali eloko te? Mpo ya solo, emisalelaka mapapu lokola oyo ya mpongo mpe epumbwaka mosika na likoló.”—Masese 23:4, 5.
BIZALELI OYO EPESAKA ESENGO
KOSEPELA NA OYO OZALI NA YANGO. “Toyaki na eloko te na mokili, mpe tokokende na eloko te. Yango wana, soki tozali na bilei mpe na eloko ya kozipa nzoto, tósepela na biloko yango.” (1 Timote 6:7, 8) Bato oyo basepelaka na oyo bazali na yango bamilelalelaka te to bamitungisaka mingi te, mpe yango esalisaka bango bázala na bilulela te. Lokola bayebaka ete nsoso emɛlaka kaka eloko oyo ekoki na mongongo na yango, bamitungisaka mingi te mpe bazalaka na kimya ya makanisi.
KOKABA. “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.” (Misala 20:35) Bato oyo bakabaka mingi bazalaka mpe na esengo mingi, mpo basalaka ete basusu bázala na esengo, ata soki yango esɛngi ete bápesa kaka ntango moke to makasi mingi te mpo na kosalisa basusu. Mpe mbala mingi, bazwaka ebele ya mapamboli oyo mbongo ekoki kosomba te: bolingo, limemya, baninga ya solosolo oyo na ngala na bango bakabelaka mpe bango.—Luka 6:38.
KOZWA BATO NA VALƐRƐ MINGI KOLEKA BILOKO. “Elubu ya ndunda, epai bolingo ezali, ezali malamu koleka ngɔmbɛ-mobali ya mafutamafuta mpe koyina elongo na yango.” (Masese 15:17) Vɛrsɛ yango elimboli nini? Elimboli ete kolinga bato mpe kozala na boyokani malamu na bango ezali na ntina mingi koleka mbongo mpe bozwi. Mpe ndenge tokomona yango, bolingo ezali na ntina mingi mpo na kozala na esengo.
Batoli ya Biblia esalisaki Sabina, mwasi moko na Amerika ya Sudi. Mobali na ye asundolaki ye ná bana na ye mibale ya basi, mpe ekómaki mpasi mpo na kozwa biloko ya kobikela. Akómaki kosala misala mibale, mpe mikolo nyonso azalaki kolamuka na ngonga ya 4 na ntɔngɔ. Atako Sabina azalaki na ntango mingi te, andimaki koyekola Biblia. Ndenge nini yango esalisaki ye?
Atako akómaki kozwa mbongo mingi te, ndenge na ye ya kotalela bomoi ebongwanaki mingi. Na ndakisa, ayokaki esengo oyo moto ayokaka soki azali na boyokani malamu ná Nzambe. (Matai 5:3) Azwaki baninga ya malamu na kati ya bandeko na ye bakristo. Ayokaki mpe esengo ya kopesa na ndenge akómaki koyebisa bato mosusu makambo oyo azalaki koyekola.
Biblia elobi: ‘Bwanya ya moto emonanaka na makambo oyo asalaka.’ (Matai 11:19) Na yango, kosepela na oyo ozali na yango, kokaba, mpe kozwa bato na valɛrɛ mingi koleka biloko nde epesaka esengo ya solosolo.