Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

NINI EPESAKA ESENGO?

Kozala na bomoi oyo ezali na ntina

Kozala na bomoi oyo ezali na ntina

KAKA BATO NDE BAKOKI KOSALA MAKAMBO LOKOLA KOKOMA, KOSALA MAYEMI, KOSALA BILOKO YA SIKA, MPE KOKANISA MPO NA MITUNA MINENE OYO ETALI BOMOI: Mpo na nini molɔ́ngɔ́ ezali? Biso bato toutá wapi? Ntina ya bomoi ezali nini? Nini ekosalema na mikolo ezali koya?

Bato mingi baboyaka kotuna mituna wana, mpo bakanisaka ete biyano na mituna yango eleki mpasi. Basusu balobaka ete mituna wana ezali na ntina te mpo bomoi ebimá yango moko. William Provine, profesɛrɛ moko ya istware mpe ya bioloji alobi ete “banzambe bazali te, mpe bomoi ezali na ntina te.” Abakisaki: “Ezali na mibeko te mpo na bizaleli malamu, mpe bomoi ezali mpenza na ntina te.”

Kasi bato mosusu bamonaka ete ndenge wana ya kotalela makambo ebongi te. Bamonaka ete molɔ́ngɔ́ etosaka mibeko ya sikisiki oyo ebongisami malamu. Bakamwaka komona biloko ndenge na ndenge oyo ezali na molɔ́ngɔ́ mpe bamekolaka yango mpo na kosala biloko mosusu. Lisusu, makambo oyo bamonaka mokolo na mokolo eteyaka bango ete moto moko ya mayele nde asalá biloko wana nyonso, kasi ebimá yango moko te.

Makanisi ya ndenge wana etindaki bato mosusu oyo bandimaka liteya ya evolisyo bátalela lisusu makanisi na bango. Tótalela ndakisa mibale ya bato yango.

MONGANGA MOKO NA NKOMBO ALEXEI MARNOV alobi: “Bakelasi oyo natángá eteyaki ngai ete Nzambe azalaka te mpe biloko nyonso ebimá yango moko. Moto nyonso oyo azalaki kondimela Nzambe, bazalaki kotalela ye lokola moto oyo azali mayele mingi te.” Kasi, na 1990, makanisi na ye ekómaki kobongwana.

Abakisi: “Nazalaki ntango nyonso koluka koyeba ndenge oyo eloko mokomoko esalaka, ezala mpe bɔɔngo ya moto. Tokoki kokamwa te ndenge enama wana ebengami eloko oyo esalemi na ndenge ya kokamwa na molɔ́ngɔ́ mobimba. Kasi bɔɔngɔ esalemá kaka mpo eyekola makambo mpe ebatela mayele, na nsima ekufa? Emonanaki ete ezali bongo te. Yango wana, nakómaki komituna boye: ‘Mpo na nini tozali awa na mabele? Ntina ya bomoi ezali nini?’ Nsima ya kokanisa na mozindo, nayaki kondima ete Mozalisi azali.”

Mposa oyo Alexei azalaki na yango ya koyeba ntina ya bomoi etindaki ye ayekola Biblia. Na nsima, mwasi na ye, oyo azali mpe monganga mpe azalaki kondima te ete Nzambe azali, abandaki mpe koyekola Biblia, libosoliboso mpo na kondimisa mobali na ye ete azali na libunga. Kasi sikoyo, bango nyonso mibale bakómá kondimela Nzambe mpe bayekoli na Biblia mokano ya Nzambe mpo na bato.

HUABI YIN, MOTO YA SIANSI OYO AYEKOLAKA PLASMA. Huabi Yin ayekolaki fizike, mpe na boumeli ya mbula mingi, asalaki bolukiluki na makambo etali plasma. Bato ya siansi mingi bamonaka ete plasma ezali lokola gaze, na ndakisa oyo ezalaka na moi, oyo esalemi mingimingi na biloko ya mikemike lokola ba électrons mpe ba ions positifs.

Huabi alobi boye: “Mbala nyonso oyo biso bato ya siansi toyekolaka makambo ya kokamwa oyo esalemi na molɔ́ngɔ́, tomonaka ntango nyonso ete eloko na eloko ezali na esika na yango; yango emonisi ete etambwisami na mibeko oyo ebongi. Namitunaki boye: ‘Mibeko yango eutá wapi? Soki esɛngaka ete moto alandela mɔtɔ oyo apelisi mpo na kolamba biloko, nani nde atya mibeko oyo etambwisaka moi?’ Nsukansuka, nandimaki ete maloba oyo ya Biblia nde epesi eyano oyo ebongi: ‘Na ebandeli Nzambe azalisaki likoló mpe mabele.’”​—Ebandeli 1:1.

Toboyi te, siansi esalisi biso tózwa biyano na mituna mingi, na ndakisa: Ndenge nini baselile ya bɔɔngɔ esalaka? Nini esalaka ete moi ebimisa molunge mpe pole? Kasi, ndenge Alexei ná Huabi bayekolaki yango, Biblia nde epesi biyano na mituna oyo eleki ntina, na ndakisa: Mpo na nini molɔ́ngɔ́ ezali? Mpo na nini ezali na mibeko oyo etambwisaka yango? Mpo na nini tozali na bomoi?

Biblia elobi boye mpo na mabele: “[Nzambe] azalisaki yango mpamba te, asalaki yango mpo bato báfanda wana.” (Yisaya 45:18) Ya solo, Nzambe azali na mokano mpo na mabele, ndenge lisolo oyo elandi ekomonisa yango, mpe mokano yango ezali na boyokani na elikya na biso mpo na mikolo ezali koya.