BIBLIA ELOBI NINI?
Ekulusu
Bato mingi bamonaka ete ekulusu ezali elembo ya lingomba ya bokristo. Kasi bato nyonso te nde bakanisaka ete esengeli kolata ekulusu to kotya yango na bandako to na bandako-nzambe.
Yesu akufaki na ekulusu?
OYO BATO MOSUSU BALOBAKA
Baroma babakaki Yesu na ekulusu oyo basalá na biteni mibale ya nzete.
OYO BIBLIA ELOBI
Babakaki Yesu likoló ya nzete. (Misala 5:30, Haut fleuve) Maloba nyonso mibale oyo bakomi ya Biblia basaleli mpo na kolobela eloko oyo babomaki na yango Yesu emonisi ete ezalaki eteni moko ya nzete kasi mibale te. Buku moko (Crucifixion in Antiquity) emonisi ete liloba ya Grɛki stau·rosʹ elimboli “mpenza nde nzete. Yango ekokani te na ‘ekulusu.’” Liloba xyʹlon oyo Misala 5:30 esaleli, “ezali kaka nzete moko ya semba to likonzí oyo Baroma bazalaki kobaka bato likoló na yango na bansɛtɛ mpe koloba ete babaki bango na ekulusu.” *
Biblia emonisi mpe ete babomaki Yesu na ndenge oyo Mibeko ya Bayisraele ezalaki kosɛnga. Mibeko elobaki boye: “Soki moto moko asali lisumu oyo ebongi na etumbu ya liwa, mpe soki abomami, mpe okakisi ye na nzete, . . . moto oyo akakisami, azali eloko oyo Nzambe alakeli mabe.” (Kolimbola Mibeko 21:22, 23) Ntoma Paulo alobelaki mobeko yango ntango akomaki ete Yesu “akómaki elakeli mabe na esika na biso, mpo ekomamá ete: ‘Moto nyonso oyo akakisami na nzete [xyʹlon] alakelami mabe.’” (Bagalatia 3:13) Na yango, Paulo amonisaki ete Yesu akufaki likoló ya nzete
“Babomi ye, bakakisi ye na njete.”
—Misala 10:39, Haut fleuve.
Bayekoli ya Yesu basalelaki ekulusu mpo na kosambela Nzambe to lokola elembo ya bokristo?
OYO BIBLIA ELOBI
Esika moko te na Biblia emonisi ete bakristo ya liboso basalelaki ekulusu lokola elembo ya bokristo. Kutu, ezalaki Baroma ya eleko wana nde bazalaki kosalela ekulusu lokola elembo mpo na banzambe na bango. Mbula soki 300 nsima ya liwa ya Yesu, Constantin Amperɛrɛ ya Roma, aponaki ekulusu ezala elembo ya limpinga ya basoda na ye mpe na nsima lingomba ya “bokristo” ekómaki kosalela yango.
Lokola bapakano bazalaki kosalela ekulusu mpo na kosambela banzambe na bango, bayekoli ya Yesu bakokaki kosalela yango mpo na kosambela Nzambe ya solo? Kutu bayebaki ete banda kala Nzambe apekisaki kosalela “elilingi ya eloko nyonso” na losambo mpe bakristo basengelaki ‘kokima losambo ya bikeko.’ (Kolimbola Mibeko 4:15-19; 1 Bakorinti 10:14) “Nzambe azali elimo,” moto moko te akoki komona ye. Yango wana, bakristo ya liboso basalelaki te eloko moko to elembo moko mpo esalisa bango bámiyoka pene na Nzambe. Kutu, bazalaki kosambela ye “na elimo,” elingi koloba elimo santu nde ezalaki kotambwisa bango mpe na “solo,” elingi koloba na boyokani na mokano ya Nzambe ndenge emonisami na Biblia.
“Basambeli ya solosolo bakosambela Tata na elimo mpe na solo.”
—Yoane 4:23.
Ndenge nini Bakristo bamonisaka ete batosaka Yesu Kristo?
OYO BATO MOSUSU BALOBAKA
“Ezalaki mpenza mabe te soki bakómaki komemya mpe kosambela eloko wana ya lobiko. . . . Kosambela elilingi moko boye ekokani na kosambela moto oyo elilingi yango ezali komonisa.”
OYO BIBLIA ELOBI
Bakristo basengeli komonisa botɔndi epai ya Yesu mpo liwa na ye esali ete masumu na bango elimbisama, bákóma baninga ya Nzambe mpe bázwa bomoi ya seko. (Yoane 3:16; Baebre 10:19-22) Biblia esɛngi bakristo te ete bálataka elembo ya Yesu to báloba kaka ete bandimelaka ye mpo na komonisa ete bamemyaka likabo oyo apesá. Kutu, “kondima, soki ezali na misala te, ekufi.” (Yakobo 2:17) Bakristo basengeli komonisa kondima epai ya Yesu. Ndenge nini?
Biblia elobi: “Bolingo oyo Kristo azali na yango ememisi biso mokumba, mpo oyo tomoni yango oyo: ete moto moko akufelaki bato nyonso . . . Baoyo bazali na bomoi bázala na bomoi mpo na bango moko lisusu te, kasi mpo na moto oyo akufelaki bango mpe alamwisamaki.” (2 Bakorinti 5:14, 15) Bolingo oyo Yesu amonisaki esengeli kotinda bakristo bábongisa bomoi na bango mpe bálanda ndakisa na ye. Yango nde ekomonisa ete bamemyaka mpenza Yesu kasi te kosalela elembo moko ya lingomba.
“Oyo ezali mokano ya Tata na ngai: ete moto nyonso oyo azali komona Mwana mpe azali kondimela ye azwa bomoi ya seko.”
—Yoane 6:40.
^ par. 8 Buku A Critical Lexicon and Concordance to the English and Greek New Testament, 11th Edition, ya Ethelbert. Bullinger, nkasa 818-819.