Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

OKOKI KOLONGA MPASI YA KOBUNGISA MOTO NA LIWA

Mpasi ya kobungisa moto na liwa

Mpasi ya kobungisa moto na liwa

“Ngai ná Sophia a tofandaki na libala mbula koleka 39; na nsima, abɛlaki mwa mingi mpe nsukansuka akufaki. Baninga basalisaki ngai mingi, mpe nazalaki kosalasala misala mpo nalongola susi. Kasi, nalekisaki mbula mobimba nazalaki kaka na mpasi makasi na motema. Mpasi yango ezalaki kokende mpe kozonga, komata mpe kokita. Ata lelo oyo, nsima ya mbula soki misato, ntango mosusu kaka na mbalakaka, nayokaka mpasi na motema.”​—Kostas.

Soki yo mpe okutaná na likambo ya ndenge wana, ekoki kozala ete omiyokaki lokola Kostas. Kobungisa molongani, ndeko, to moninga ezali moko ya makambo oyo etungisaka mingi mpe epesaka mpasi mingi na motema. Bato ya mayele oyo bayekolaka mpasi ya kokufela moto bandimi mpe likambo yango. Lisolo moko oyo ebimaki na zulunalo moko (The American Journal of Psychiatry) elobaki ete “moto oyo ndeko to moninga na ye akufi ayokaka mpasi makasi mpe mpasi yango eumelaka mingi mpo ayebaka ete akomona ye lisusu te.” Ntango mpasi ya ndenge wana ekómeli moto, akoki kobanda komituna: ‘Mokolo nini mpasi oyo ekosila? Nakoyoka lisusu esengo na mokili oyo? Nakoki kosala nini mpo nasilisa mpasi oyo?’

Lamuká! oyo epesi eyano na mituna wana. Lisolo oyo elandi ekolobela makambo oyo okoki kokutana na yango nsima ya liwa ya ndeko to moninga na yo. Masolo mosusu ekolobela makambo oyo ekoki kosalisa yo mpo na kokitisa mpasi yango.

Tokanisi mpenza ete masolo yango ekokitisa motema ya moto nyonso oyo abungisi moto na liwa mpe ekopesa ye makanisi oyo ekoki kosalisa ye.

a Na masolo oyo, topesi bango bankombo mosusu.