Okaniselaka baninga mabe?
Kokanisela bato mabe ezali lokola maladi. Esalaka moto oyo azali na yango mabe, mpe bato bayebaka te ete bazwi maladi yango.
Bato basukaka kaka te na kokanisela bato ya mboka mosusu mabe, kasi bakaniselaka mpe mabe bato ya loposo mosusu, ya ekólo mosusu, to ya monɔkɔ mosusu, ezala bato ya lingomba mosusu, mwasi to mobali, mobola to mozwi. Bamosusu bazwelaka baninga makanisi mabe mpo bazali bilenge to mikóló, batángá mingi to te, bazali bibɔsɔnɔ, to bazali kitoko to te. Kasi atako bongo, bato yango bandimaka te ete bakaniselaka bato mabe.
Ekoki kokóma ete okanisela moto mabe? Tomonaka ete bato mosusu bakaniselaka baninga mabe. Kasi ezali mpasi tómona ete biso mpe tosalaka bongo. Biso nyonso tokaniselaka baninga mabe mpo na makambo ndenge na ndenge. Moto moko ya mayele (David Williams, profesɛrɛ ya sosioloji) alobi ete, ntango bato bakutani na moto ya etuluku moko oyo balobelaka mabe, “bakosalela moto yango makambo ndenge mosusu mpe bakoyeba ata moke te ete basaleli ye makambo na ndenge ya mabe.”
Na ndakisa, na Sudi ya Mpoto epai Jovica afandaka, ezali na mwa etuluku moko ya bato oyo bato mosusu balingaka te. Jovica alobi ete: “Nazalaki kokanisa ete moto moko te na etuluku wana akoki kozala moto malamu. Kasi, nazalaki komona te ete nazali kokanisela bango mabe, nabandaki komona ete makambo oyo nazali kokanisa ezali mpenza bongo.”
Mibeko ya mboka mingi eboyi koponapona loposo mpe lolenge mosusu nyonso ya kokanisela bato mabe. Atako bongo, bato bazali kaka kokanisela baninga mabe. Mpo na nini? Mpo mibeko yango ezali kolandela kaka makambo moto asali. Ekoki kolandela te makanisi ya moto mpe ndenge oyo azali komiyoka. Makanisi ya mabe ebandaka nde na motó mpe na motema ya moto. Moto akoki kosala nini mpo na kotika kokanisela baninga mabe?
Masolo oyo elandi ekolobela makambo mitano oyo esalisaki bato mingi bábundisa makanisi oyo ezali na mitó mpe na mitema na bango, oyo ezali kotinda bango bákanisela basusu mabe.