Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LAMUKÁ! No 4 2017 | Osalaka mosala koleka ndelo?

Lelo oyo, bato mingi bazali na makambo ebele ya kosala, yango ebebisi boninga mpe boyokani na kati ya mabota.

Ndenge nini tokoki kosalela ntango na biso malamu?

Moto moko ya bwanya akomaki boye: “Mwa kopema moke eleki ebele ya mosala makasi mpe kolanda mopɛpɛ.”​—Mosakoli 4:6.

Nimero oyo ya Lamuká! epesi batoli oyo ebongi oyo ekosalisa biso tósalela ntango na biso na bwanya, mpe elobeli makambo tosengeli kotya na esika ya liboso.

 

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Osalaka mosala koleka ndelo?

Bato mingi bamonaka ete ezali mpasi kokokisa mikumba nyonso oyo bazali na yango ezala na ndako to na mosala. Nini ezali kosala bongo? Tokoki kosala nini mpo na kolongola makambo mosusu?

Ndɛkɛ babengi sterne arctique ekamwisaka

Bato bazalaki kokanisa ete ndɛkɛ babengi sterne artique esalaka mobembo ya kilomɛtrɛ 35 200 mpo na kokende tii na nɔrdi ya mokili (pôle nord) mpe kozonga tii na sudi ya mokili (pôle sud). Nzokande, wana ezali kaka mwa ndambo ya bakilomɛtrɛ oyo bandɛkɛ yango esalaka.

‘Nkombo malamu eleki ebele ya bomɛngo’

Tokoki komisalela nkombo malamu mpe kosala ete basusu bámemya biso. Kasi ndenge nini tokoki kosala yango?

LISALISI MPO NA LIBOTA

Ntango bana balongwe na ndako ya baboti

Babalani mosusu bakutanaka na mikakatano ya makasi ntango bana na bango bakoli mpe balongwe na ndako na bango. Baboti yango bakoki kosala nini mpo bázala na esengo ntango batikali kaka bango mibale?

MITUNA-LISOLO

Monganga moko oyo ayekolaka bɔɔngɔ alobeli kondima na ye

Profesɛrɛ Rajesh Kalaria alobeli mosala na ye mpe kondima na ye. Nini epesaki ye mposa ya koyekola siansi? Nini etindaki ye aluka koyeba ndenge oyo bomoi ebandá?

BIBLIA ELOBI NINI?

Komekama

Mabala ezali kobeba, bato bazali kozwa maladi, mpe lisosoli ya bato mingi ezali kotungisama: nyonso wana ezali makambo oyo ebimaka soki moto akwei na komekama. Ndenge nini tokoki kokima motambo yango?

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Langi makasi ya bleu ya mbuma ya Pollia condensata

Mbuma ya Pollia condensata ezalaka te na eloko oyo ebimisaka langi ya bleu, kasi ezali molona oyo ezalaka na langi ya bleu ya makasi koleka milona nyonso. Nini esalaka ete mbuma yango ezala na langi makasi bongo?

Makambo mosusu

Ndenge nini Biblia ekoki kosalisa ngai nazala na libota ya esengo?

Batoli kitoko ya Biblia esalisi bamilio ya basi ná mibali bázala na esengo na mabota na bango.