LAMUKÁ! No 5 2016 | Yesu azalaki moto ya solo?

Istware elobi nini?

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Yesu azalaki moto ya solo?

Babuku ya lelo mpe ya kala elobi nini na likambo yango?

MAKAMBO OYO EZALI KOLEKA NA MOKILI

Makambo etali mikili ya Amerika

Mitungisi mpe mobulu ezali kaka mwa ndambo ya makambo oyo bikólo mosusu ya Amerika ezali na yango. Toli ya Biblia ekoki kosalisa?

LISALISI MPO NA LIBOTA

Koteya mwana makambo etali kosangisa nzoto

Bana bakómi komona makambo etali kosangisa nzoto ntango bazali naino mike mpenza. Osengeli koyeba nini? Okoki kosala nini mpo na kobatela bana na yo?

Moko ya biloko ya kokamwa!

Eloko moko te ezali na ntina mingi koleka carbone na bomoi na biso. Ezali nini mpe mpo na nini ezali na ntina ndenge wana?

BIBLIA ELOBI NINI?

Botɔndi

Komonisa ezaleli yango ememelaka moto bolamu. Ndenge nini ekoki kosalisa yo mpe okoki kokóma na ezaleli yango?

TÓTALELA MAKAMBO YA KALA

Aristote

Makanisi ya moto wana ya kala ya filozofi ekɔtá na mateya ya mangomba.

“Balobeli yango na ndenge ya malamu mpenza!”

Bavideo oyo ezali na site jw.org ezali kobenda likebi ya balakisi mpe bato mosusu.

Makambo mosusu

Monisáká botɔndi

Ndenge nini omonisaka botɔndi na yo epai ya bato oyo basalelaka yo makambo ya malamu?