Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISALISI MPO NA LIBOTA | BILENGE

Koluka bilɛngi to bisengo makasi ezangi makama?

Koluka bilɛngi to bisengo makasi ezangi makama?

MOKAKATANO

“Natɛlɛmaki pene na engbunduka oyo etambolaka na vitɛsi makasi na nzela oyo basalá na nse ya mabele. Elɛngi makasi oyo nayokaki esalaki ete namiyoka lokola mikakatano na ngai esili.”​—Leon. *

“Soki namati likoló mpe namibwaki na mai, nazalaki komiyoka lokola nde mikakatano na ngai esili mpo na mwa ntango. Mbala mingi nazalaki kolinga yango, kasi ntango mosusu ezalaki kobangisa ngai.”​—Larissa.

Lokola Leon ná Larissa, mpo na koyeba esika makoki na bango esuki, bilenge mingi balingaka kosala likambo moko oyo ekopesa bango bilɛngi to bisengo makasi, ata soki ekoki kotya bomoi na bango na likama. Yo mpe oyokaka mposa ya kosala bongo? Soki ezali bongo, lisolo oyo ekosalisa yo.

OYO OSENGELI KOYEBA

Koluka bilɛngi to bisengo makasi ekoki kokómisa moto moombo. Ekoki kopesa yo esengo to elɛngi makasi mpo na ntango mokuse, kasi ekotika yo na mposa makasi. Lokola Leon, Marco, oyo azalaki mpe kokende na nzela oyo basalá na nse ya mabele epai engbunduka elekaka, alobi: “Nazalaki kokoka kotika momeseno yango te. Nazalaki kosepela mpo na ntango mokuse, kasi na nsima nazalaki kaka koyoka mposa ya kozongela mpo nayoka lisusu elɛngi.”

Justin, oyo azalaki kolata sapato oyo ezalaka na bapinɛ mpo na kolekaleka na vitɛsi na kati ya mituka oyo ezali kotambola, alobi: “Bilɛngi oyo nazalaki koyoka ezalaki kotinda ngai nasala yango lisusu. Nazalaki koluka ete bato bákumisa ngai, kasi nasukaki na mbeto ya lopitalo.”

Soki baninga bazali kotya yo mbamba, yango ekoki kosala ete obosana makama. Elenge mobali moko na nkombo Marvin alobi: “Baninga na ngai bazalaki kotya ngai mbamba namata na ndako moko ya molai kozanga biloko ya komibatela; bazalaki koloba na ngai: ‘Matá. Okokoka.’ Nazalaki komona ete nazali na likama makasi. Nazalaki kolɛnga ntango nazalaki komata na efelo ya ndako yango.” Larissa, oyo tolobelaki liboso alobi boye: “Nasalaki kaka oyo baninga nyonso mosusu basalaki. Ngai moko nde nandimaki kosala yango.”

Bato mosusu mpe basalelaka Internet mpo na kokumisa bato oyo balukaka bilɛngi to bisengo makasi mpe komonisa lokola ete ezali na likama te. Kutu, na ntango moke kaka bato mingi batalaka na Internet bavideo ya bato oyo balukaka bilɛngi to bisengo makasi, mpe yango esalaka ete bato yango báyebana mingi mpe bato bátyela bango likebi.

Na ndakisa, bavideo mosusu oyo ekendá nsango emonisaka lisano ya parkour, oyo esɛngaka kokatisa makama (na ndakisa bifelo, bandako, mpe baeskalye) ntango ozali kokima mbangu, komata bifelo, kopumbwa nokinoki mpe kozanga kokwea, ata soki olati eloko te mpo na komibatela. Yango ekoki kotinda yo okóma na makanisi mibale ya libunga: (1) Likama ezali mpenza te. (2) Bato nyonso basalaka yango. Yango ekoki kotinda yo omeka kosala makambo oyo ekotya bomoi na yo na likama.

Lolenge eleki malamu mpe ezangi likama ya koyeba esika makoki na yo esuki. Biblia elobi: “Ngalasisi ya nzoto ezali na litomba na mwa makambo moke.” (1 Timote 4:8) Kasi Biblia ekebisi mpe yo ozala “na makanisi malamu.” (Tito 2:12) Ndenge nini okoki kosala yango?

OYO OKOKI KOSALA

Moná makama oyo ekoki kokómela yo. Biblia elobi: “Moto nyonso ya ekɛngɛ akosala na boyebi, kasi moto oyo azali zoba akopalanganisa bozoba.” (Masese 13:16) Liboso ete osala lisano moko, luká koyeba makama oyo yango ekoki kobimisa. Omituna boye: ‘Nakoki nde kobungisa bomoi na ngai to kozoka makasi soki nasali lisano oyo?’​—Toli ya Biblia: Masese 14:15.

Poná baninga oyo bazwaka bomoi na motuya. Baninga ya malamu bakoki te kotinda yo otya bomoi na yo na likama to koyebisa yo osala likambo moko oyo olingi mpenza kosala te. Larissa alobi: “Baninga ya malamu mpe ya solosolo basalisaki ngai nayeba kopona masano ya malamu oyo nasengeli kosala. Ntango nazwaki baninga mosusu ya sika, bomoi na ngai mpe ebongwanaki.”​—Toli ya Biblia: Masese 13:20.

Omituna boye: ‘Nakoki nde kobungisa bomoi na ngai to kozoka makasi soki nasali lisano oyo?’

Salelá makoki na yo kozanga kotya bomoi na yo na likama. Buku moko (Adolescent Risk Behaviors) elobi ete ntango moto azali kokola, “asengeli koyekola ndenge ya komityela mibeko mpe bandelo.” Okoki koyeba esika makoki na yo esuki soki oponi esika moko oyo ezangi likama, olati biloko ya komibatela mpe ozwi bibongiseli mpo na komibatela.

Yebá lolenge malamu ya komipesa valɛrɛ. Bato bakomemya yo soki oyebi malamu ndenge ya kosilisa mikakatano ya bomoi, kasi te mpo na masano oyo osalaka mpo na koyoka elɛngi to esengo makasi. Larissa alobi: “Komata likoló mpo na komibwaka na mai ezalaki ebandeli ya eleko oyo nakómaki kosala makambo mingi oyo ekokaki kobebisa bomoi na ngai. Nalingaki kozala na bomoi ya malamu koleka soki nazalaki koboya kosala makambo mosusu.”

Na mokuse: Na esika ya kotya bomoi na yo na likama na koluka bilɛngi to bisengo makasi, salelá bososoli ntango ozali kopona masano to kominanola.​—Toli ya Biblia: Masese 15:24.

^ par. 4 Na lisolo oyo, topesi bango bankombo mosusu.