Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Milford Sound

MIKILI MPE BATO

Mobembo moko na Nouvelle-Zélande

Mobembo moko na Nouvelle-Zélande

ELEKI sikoyo mbula soki 800 banda ba Maori basalaki mobembo ya bakilomɛtrɛ ebele na mai monene, mbala mosusu longwa na bisanga ya Polynésie, mpo na koya kofanda na Nouvelle-Zélande. Kuna, bakutaki mabele oyo ekesanaki mosika na bisanga ya molunge ya Polynésie, epai bautaki. Bakutaki mokili moko ya bangomba mpe ya mabanga minene ya glasi, molunge na eleko ya prɛnta, mpe nɛjɛ. Basiɛklɛ soki mitano na nsima, bato ya ekólo mosusu, oyo bautaki na Mpoto, bayaki mpe kofanda na mboka yango. Lelo oyo, bato mingi ya Nouvelle-Zélande bandimaka ete bankɔkɔ na bango bautá na Angleterre mpe na Polynésie. Mingi na bango (90%) bafandaka na bingumba ya minene. Engumba Wellington, ezali mboka-mokonzi oyo ezali mpenza na sudi ya mokili.

Laki ya pɔtɔpɔtɔ na Esanga ya Nɔrdi

Nouvelle-Zélande ezali na bisika mingi ya kitoko; yango wana tokoki kokamwa te ete atako ekólo yango ezali mosika mingi, mbula na mbula baturiste soki milio misato bakendaka kotala yango.

Nzete oyo babengi Cyathea dealbata ekoki kokóma molai koleka mɛtrɛ 10

Banda 1948 bandɛkɛ oyo epumbwaka te ebandaki kolimwa

Nouvelle-Zélande ezali na banyama ya zamba ndenge na ndenge, mpe bandɛkɛ ndenge na ndenge oyo epumbwaka te, koleka bikólo mosusu nyonso ya mokili. Etondi mpe na miselekete oyo babengi tuatara, oyo eumelaka na bomoi ata mbula 100! Bazali mpe na mitindo mosusu ya banyama, na ndakisa bangembo mpe bambisi minene lokola babalɛnɛ mpe ba dauphins.

Batatoli ya Yehova bazali na Nouvelle-Zélande esali sikoyo mbula soki 120. Bateyaka bato Biblia na minɔkɔ koleka 19, ezala mpe minɔkɔ ya Polynésie, na ndakisa Niuean, Rarotongan, Samoan, mpe Tongan.

Ba Maori balati molato ya mboka na bango mpe bazali kobina