Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | NTANGO MOTO OLINGAKA AKUFI

Ndenge ya kosala ntango ozali na mawa makasi

Ndenge ya kosala ntango ozali na mawa makasi

Batoli na likambo yango ezali. Kasi, nyonso te nde esalisaka. Na ndakisa, bato mosusu bakoki koloba na yo olela te to obomba ndenge ozali koyoka. Basusu mpe bakoki koloba olela, obimisa polele ndenge ozali koyoka. Biblia epesi makanisi oyo ebongi, oyo bato ya mayele ya mikolo na biso mpe bandimi yango.

Na mikili mosusu bamonaka ete mobali asengeli kolela te. Kasi, ezali mpenza na ntina tóyoka nsɔni kobimisa mai ya miso, ata liboso ya bato? Minganga oyo basalisaka maladi ya motó bandimi ete kobimisa mai ya miso ezali mabe te ntango moto azali kolela. Ntango mosusu kolela ekoki kosalisa yo ozwa makasi ata soki liwa ya moto yango esalaki yo mpasi makasi. Kasi, kokanga kolela ekoki kutu kosala yo mabe koleka. Biblia elobi te ete ezali mabe soki mobali aleli mpo na mawa. Tózwa ndakisa ya Yesu. Atako azalaki na nguya ya kosekwisa bakufi, alelaki na miso ya bato ntango moninga na ye Lazare akufaki!​—Yoane 11:33-35.

Mbala mingi mawa esalaka mpe ete moto asilika, mingimingi soki amoni moto akufi mbalakaka. Ezali na makambo mingi oyo ekoki kosala ete moto oyo azali na mawa asilika, na ndakisa soki moto oyo ye amemyaka azali koloba bilobaloba kozanga kokanisa. Mobali moko na nkombo Mike, na Afrika ya Sudi, alobi boye: “Ntango tata akufaki nazalaki kaka na mbula 14. Na lilaka yango, pastɛrɛ moko ya Lingomba ya Angleterre na Afrika ya Sudi alobaki ete Nzambe azalaka na mposa ya bato ya malamu mpe azwaka bango noki. * Yango esilikisaki ngai mpo tozalaki mpenza na mposa ya tata na biso. Atako eleki sikoyo mbula 63, esalaka ngai kaka mpasi.”

Bongo okosala nini soki oyoki lokola nde omemi ngambo? Mingimingi soki moto akufi mbalakaka, moto oyo azali na mawa akoki mbala na mbala kokanisa ete ‘Soki nasalaki boye to boye mbɛlɛ akufi te.’ Mingi mpenza soki boswanaki mbala ya nsuka oyo bokutanaki, yango mpe ekosala ete oyoka lokola omemi ngambo.

Soki makanisi ya ndenge wana mpe nkanda ezali kotungisa yo, ekozala malamu olongola yango. Kutu, sololá na moninga moko oyo akoyoka yo mpe akomonisa yo ete ezali mabe te koyoka bongo mpo bato mingi bayokaka mpe bongo. Biblia elobi boye: “Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso, mpe azali ndeko oyo abotami mpo na ntango ya mpasi.”​—Masese 17:17.

Soki moto azali na mawa, moninga ya malamu mpenza oyo akoki kozala na ye ezali Yehova Nzambe, Mozalisi na biso. Fungolelá ye motema na yo mobimba, bondelá ye mpo ‘atyelaka yo likebi.’ (1 Petro 5:7) Lisusu, alaki ete baoyo nyonso basalaka bongo “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso” ekokitisa bango motema. (Bafilipi 4:6, 7) Tiká mpe Nzambe asalisa yo oyoka malamu na nzela ya Liloba na ye Biblia, mpo yango ekitisaka motema. Salá liste ya bavɛrsɛ oyo ekitisaka motema. (Talá  etanda.) Okoki kutu kokanga mwa ndambo na yango na motó. Kozala na makambo ya kokanisa ndenge wana, ekoki kosalisa yo mingimingi na butu ntango ozali yo moko mpe ozali kokoka kolala te.​—Yisaya 57:15.

Na mikolo oyo euti koleka, mobali moko ya mbula 40 na nkombo Jack, mwasi na ye akufaki na kansɛr. Jack alobi ete ntango mosusu ayokaka mpenza lokola nde mokili esundoli ye. Kasi libondeli esalisaki ye. Alobi boye: “Soki nabondeli Yehova, nayokaka lisusu te lokola nde mokili esundoli ngai. Mbala mingi nalamukaka na butu mpe nakokaka lisusu kolala te. Soki natángi bavɛrsɛ oyo ekitisaka motema mpe nakanisi makambo yango na mozindo mpe na nsima nayebisi Nzambe na libondeli ndenge nazali koyoka, nazwaka kimya na motema mpe na makanisi mpe yango esalisaka ngai nazwa mpɔngi.”

Mama ya elenge mwasi moko na nkombo Vanessa abɛlaki mpe akufi. Vanessa mpe amonaki nguya oyo libondeli ezalaka na yango. Alobi boye: “Ntango ya mpasi, nazalaki kaka kobelela nkombo ya Nzambe mpe kolela. Yehova ayokaki mabondeli na ngai mpe ntango nyonso azalaki kopesa ngai makasi oyo nasengeli na yango.”

Bato mosusu oyo bapesaka baoyo bazali kolela ebembe toli balobaka ete básalisaka basusu to bálekisaka ntango na bango na misala oyo ezali na lifuti te. Kosala bongo ekoki kopesa moto oyo azali na mawa esengo mpe kokitisa mpasi na ye. (Misala 20:35) Bakristo mingi oyo baninga to bandeko na bango bakufaki bamonaki ete kosala mosala mpo na kosalisa basusu, ekitisaki bango mpenza motema.​—2 Bakorinti 1:3, 4.

^ par. 5 Biblia eteyaka bongo te. Biblia emonisi ntina misato oyo tokufaka.​—Mosakoli 9:11; Yoane 8:44; Baroma 5:12.