LISOLO YA BOYEKOLI 15
Ozali “ndakisa . . . na maloba”?
“Zalá ndakisa epai ya bato ya sembo na maloba.”—1 TIM. 4:12.
LOYEMBO 90 Tólendisanaka
NA MOKUSE *
1. Likoki oyo tozalaka na yango ya koloba eutá wapi?
LIKOKI oyo tozalaka na yango ya koloba ezali likabo oyo eutá na Nzambe na biso ya bolingo. Ntango kaka moto ya liboso, Adama, akelamaki, azalaki na likoki ya kosalela maloba mpo na kosolola na Tata na ye ya likoló. Azalaki mpe na likoki ya kobimisa maloba ya sika mpo maloba ekóma mingi. Adama asalelaki likoki yango mpo na kokokisa mokumba na ye ya kopesa banyama nyonso bankombo. (Eba. 2:19) Lisusu azalaki na esengo ntango alobaki mbala ya liboso na moto mosusu, elingi koloba, Eva, mwasi na ye ya kitoko!—Eba. 2:22, 23.
2. (a) Ndenge nini maloba esalelamaki na ndenge oyo ebongi te na ntango ya kala? (b) Ndenge nini maloba ezali kosalelama na ndenge oyo ebongi te na mikolo na biso?
2 Eumelaki te likabo yango ya koloba esalelamaki na ndenge oyo ebongi te. Satana Zabolo akosaki Eva, mpe lokuta yango ememelaki bato lisumu mpe ezaleli ya kozanga kokoka. (Eba. 3:1-4) Adama asalelaki likoki na ye ya koloba na ndenge oyo ebongi te ntango apesaki Eva foti, ezala mpe Yehova mpo na mabunga na ye moko. (Eba. 3:12) Kaina akosaki Yehova ntango abomaki ndeko na ye Abele. (Eba. 4:9) Na nsima, mokitani moko ya Kaina na nkombo Lameke asalaki loyembo moko oyo emonisaki mobulu oyo ezalaki kosalema na ntango na ye. (Eba. 4:23, 24) Bongo lelo oyo, ezali boni? Tomonaka ndenge bakonzi ya politiki bayokaka nsɔni te koloba maloba mabe na miso ya bato. Mpe lelo oyo, na bafilme mingi basalelaka maloba mabe. Bana-kelasi bayokaka maloba mabe na eteyelo, mpe mikóló bayokaka yango na esika ya mosala. Likambo ya mawa, komona ndenge maloba mabe epanzani lelo oyo ezali komonisa ndenge mokili oyo ezingi biso ezali kobeba se kobeba.
3. Tosengeli kokeba na nini, mpe tokolobela nini na lisolo oyo?
3 Soki tokebi te, tokoki kokóma na momeseno ya koyoka maloba mabe oyo tokobanda mpe kosalela yango. Na ntembe te, lokola tozali bakristo, tolingaka kosepelisa Yehova, yango wana tosengeli ata moke te koloba maloba ya mbindo. Tolingaka kosalela likabo kitoko ya koloba na ndenge oyo ebongi, elingi koloba, mpo na kokumisa Nzambe na biso. Na lisolo oyo, tokolobela ndenge oyo tokoki kosala yango (1) na mosala ya kosakola, (2) na makita ya lisangá, mpe (3) na masolo na biso ya mokolo na mokolo. Kasi, tótalela naino ntina oyo maloba na biso ezalaka na motuya mingi na miso ya Yehova.
MALOBA NA BISO EZALAKA NA MOTUYA MINGI NA MISO YA YEHOVA
4. Na kotalela Malaki 3:16, mpo na nini maloba na biso ezalaka na motuya mingi na miso ya Yehova?
4 Tángá Malaki 3:16. Oyebi mpo na nini Yehova akokoma na “buku [na ye] ya kokanisama” bankombo ya bato oyo maloba na bango emonisaka ete babangaka ye mpe bakanisaka nkombo na ye? Maloba na biso emonisaka makambo oyo ezali na motema na biso. Yango wana, Yesu alobaki: “Monɔkɔ elobaka nde makambo oyo etondi na motema.” (Mat. 12:34) Makambo oyo toponaka koloba emonisaka ndenge tolingaka Yehova. Lisusu, Yehova alingi ete baoyo balingaka ye bázwa bomoi ya seko na mokili ya sika.
5. (a) Ndenge nini losambo na biso ezali na boyokani na makambo oyo tolobaka? (b) Ndenge emonisami na elilingi, tosengeli kokeba na nini ntango tozali koloba?
5 Yehova akondima losambo na biso na kotalela ndenge oyo tolobaka. (Yak. 1:26) Bato mosusu oyo balingaka Nzambe te balobaka na nkanda, kozanga boboto mpe bamikumisaka. (2 Tim. 3:1-5) Na ntembe te, tolingaka te kozala lokola bango. Tozalaka na mposa makasi ya kosepelisa Yehova na maloba na biso. Okanisi ete Yehova akosepela na biso soki tozali kosalela maloba ya boboto na makita ya lisangá to na mosala ya kosakola, nzokande tolobaka na nkanda mpe na ndenge oyo ebongi te epai ya bato ya libota na biso ntango bato mosusu bazali te?—1 Pe. 3:7.
6. Maloba malamu ya ndeko mwasi Kimberly ebimisaki litomba nini?
6 Soki tozali kosalela likabo ya koloba na ndenge oyo ebongi, tokoki kosalisa bato mosusu báyeba solo. Tosalisaka baoyo bazali zingazinga na biso bámona polele bokeseni oyo ezali ‘kati na moto oyo asalelaka Nzambe ná moto oyo asalelaka ye te.’ (Mal. 3:18) Tótalela likambo oyo ekómelaki ndeko mwasi moko na nkombo Kimberly. * Basɛngaki ye asala devuare moko elongo na moninga mosusu ya kelasi. Nsima ya kosala elongo, moninga yango ya kelasi amonaki ete Kimberly akesanaki na bana-kelasi mosusu. Azalaki te koloba mabe ya bato ntango bazalaki te, azalaki kolobela bango malamu, mpe azalaki te kosalela maloba mabe. Moninga ya kelasi ya Kimberly akamwaki mpe nsukansuka andimaki koyekola Biblia. Kanisá esengo oyo Yehova ayokaka ndenge maloba na biso ya malamu etindaka bato básepela koyekola makambo etali ye!
7. Lokola Nzambe apesá yo likabo ya koloba, yango elendisi yo osalela yango ndenge nini?
7 Biso nyonso tolingaka koloba na ndenge oyo ekokumisa Yehova mpe ekosala ete tópusana penepene ya bandeko na biso. Na yango, tótalela sikoyo mwa makambo oyo tokoki kosala mpo na kokoba kozala “ndakisa . . . na maloba.”
ZALÁ NDAKISA NA MOSALA YA KOSAKOLA
8. Ndakisa nini Yesu atikelá biso na oyo etali kosalela maloba na mosala ya kosakola?
8 Lobáká na boboto mpe na limemya ntango bapesi yo nkanda. Na boumeli ya mosala ya Yesu, bakoselaki ye makambo ete azali molangwi-masanga, moto ya kolunda, mosaleli ya Zabolo, moto oyo azalaki kotosa Sabata te mpe moto oyo afingaki Nzambe. (Mat. 11:19; 26:65; Luka 11:15; Yoa. 9:16) Kasi, Yesu azongiselaki bango maloba na nkanda te. Ndenge moko na Yesu, tosengeli soki moke te kozongisela bato maloba na nkanda. (1 Pe. 2:21-23) Mpo na koloba solo, kosala bongo ezalaka pɛtɛɛ te. (Yak. 3:2) Nini ekoki kosalisa biso?
9. Nini ekoki kosalisa biso tóboya koloba mabe ntango tozali na mosala ya kosakola?
9 Ntango moto moko ayanoli yo mabe na mosala ya kosakola, kosilika te. Ndeko mobali moko na nkombo Sam alobi boye: “Natyaka likebi mingi na mposa oyo nkolo-ndako azali na yango ya koyoka solo mpe namonaka ete akoki kobongwana.” Mbala mosusu nkolo-ndako akoki kosilika kaka mpo tokómaki na ngonga oyo ebongi te. Ntango ndeko mwasi moko na nkombo Lucia akutani na moto moko oyo asiliki, asalaka libondeli ya mokuse, asɛngaka Yehova asalisa ye abatela kimya mpe aloba te maloba oyo ezangi boboto to limemya. Tokoki komekola ndakisa na ye ntango tokutani na moto moko oyo asiliki.
10. Na kotalela 1 Timote 4:13, mokano nini tosengeli komityela?
10 Kómá mpenza moteyi malamu. Timote azalaki mosakoli oyo azalaki na makoki mpenza, kasi asengelaki mpe kokoba kokende liboso na elimo. (Tángá 1 Timote 4:13.) Ndenge nini tokoki kokóma mpenza bateyi malamu na mosala ya kosakola? Tosengeli komibongisa malamu. Likambo ya esengo, tozali na bisaleli ndenge na ndenge oyo ekoki kosalisa biso mpo tókóma mpenza bateyi malamu. Okozwa makambo oyo ekoki kosalisa yo na mwa buku Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya mpe na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo na eteni “Omipesa na mosala ya kosakola.” Ozwaka matomba na kosalela mikanda yango? Ntango tomibongisaka malamu, tomitungisaka mingi te mpe tolobaka kozanga kokakatana.
11. Ndenge nini bakristo mosusu bakómaka mpenza bateyi malamu?
11 Tokoki mpe kokóma mpenza bateyi malamu soki tozali kotala ndenge bandeko mosusu na lisangá bateyaka mpe koyekola epai na bango. Sam, oyo tolobelaki liboso, amitunaka nini esalaka ete bandeko mosusu bákóma mpenza bateyi malamu. Ayekolaka ndenge na bango ya koteya mpe na nsima amekaka kosala lokola bango. Ndeko mwasi moko na nkombo Talia atyaka likebi mingi na ndenge oyo balobi ya makoki basalaka badiskur ya bato nyonso. Kosala bongo, esalisi ye ayekola ndenge ya kolobela masolo oyo bato basepelaka na yango mingi na mosala ya kosakola.
ZALÁ NDAKISA NA MAKITA
12. Mikakatano nini bato mosusu bazalaka na yango?
12 Biso nyonso tokoki kopesa mabɔkɔ mpo makita ya lisangá eleka malamu soki tozali koyemba elongo mpe kopesa biyano oyo ebongisami malamu. (Nz. 22:22) Bato mosusu bazalaka na mokakatano ya koyemba to kopesa biyano na makita na miso ya bato. Yo mpe ozalaka na mokakatano yango? Soki ezali bongo, koyekola makambo oyo esalisaki bato mosusu bátika koyoka nsɔni mpo na koyemba to kopesa biyano na makita ekosalisa yo.
13. Nini ekoki kosalisa yo oyemba na motema mobimba na makita ya lisangá?
13 Yembáká na motema mobimba. Ntango toyembaka nzembo ya Bokonzi, mokano na biso ya libosoliboso esengeli kozala ya kosanzola Yehova. Ndeko mwasi moko na nkombo Sara amonaka ete ayebi koyemba malamu te. Kutu, alingaka kosanzola Yehova na loyembo. Mpo na yango, amonaka malamu abongisa nzembo oyo bakoyemba na makita na ndako, kaka ndenge asengeli kobongisa biteni mosusu ya makita. Amekamekaka nzembo yango mpe alukaka koyeba ndenge maloba ya nzembo yango ezali na boyokani na makambo oyo bakolobela na makita. Alobi boye: “Yango esalisaka ngai natya makanisi na maloba, mpe natya likebi mingi te na likoki na ngai ya koyemba.”
14. Soki ozalaka moto ya nsɔninsɔni, nini ekoki kosalisa yo opesaka biyano na makita?
14 Pesáká biyano mbala na mbala. Toboyi te, yango ekoki kozala mokakatano mpo na bato mosusu. Ndeko mwasi Talia, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Namitungisaka mingi ntango nasengeli koloba liboso ya bato mosusu. Yango wana kopesa biyano ezalaka mpasi mpo na ngai.” Atako bongo, ndeko mwasi Talia akakatanaka te kopesa biyano. Ntango azali kobongisa makita, abosanaka te ete eyano ya liboso na motuna moko esengeli kozala mokuse mpe polele. Alobi boye: “Ezali mabe te soki eyano na ngai ezali mokuse, pɛtɛɛ mpe ebimisi makanisi ya ntina, mpo ezalaka eyano oyo motambwisi azalaka na yango mposa.”
15. Likambo nini tosengeli kobosana te na oyo etali biyano oyo topesaka na makita?
15 Ata mpe bakristo oyo bazalaka nsɔninsɔni to malilimalili te bakoki na bantango mosusu kokakatana kopesa biyano na makita. Mpo na nini? Ndeko mwasi moko na nkombo Juliet alobi boye: “Na bantango mosusu nakakatanaka kopesa biyano mpo nabangaka ete eyano na ngai ezali pɛtɛɛ mingi mpe malamu mpenza te.” Atako bongo, tosengeli kobosana te ete Yehova alingaka biso tópesa biyano oyo eleki malamu. * Azwaka na motuya mingi ekateli oyo tozwá mpo na kosanzola ye na makita ya lisangá mpe ndenge totikaka te kobanga epekisa biso kosala yango.
ZALÁ NDAKISA NA MASOLO YA MOKOLO NA MOKOLO
16. Maloba ya ndenge nini tosengeli koboya?
16 Boyá mitindo nyonso ya “maloba ya kofinga.” (Ef. 4:31) Ndenge tomonaki yango na ebandeli, mokristo asengeli te kobimisa maloba mabe. Kasi ezali mpe na mitindo mosusu ya maloba mabe oyo tosengeli koboya. Na ndakisa, tosengeli kokeba mpo tóloba mabe te mpo na bato ya mimeseno mosusu, mabota mosusu, to bikólo mosusu. Lisusu, tolingaka soki moke te kozokisa basusu na maloba ya kofinga. Ndeko mobali moko alobi boye: “Na bantango mosusu, nazalaki koloba makambo oyo nakanisaki ete ezali masɛki mpe ezalaki na yango mabe te, nzokande ezalaki maloba ya kozanga boboto mpe ezalaki kozokisa basusu. Na boumeli ya bambula, mwasi na ngai azalaki kosalisa ngai mpe koyebisa ngai na esika oyo tozali biso moko soki nalobi likambo moko na kozanga boboto, mpe soki likambo yango ezokisi ye mpe basusu.”
17. Na boyokani na Baefese 4:29, ndenge nini tokoki kolendisa basusu?
17 Lobáká na ndenge oyo ekolendisa basusu. Pesáká basusu longonya na esika ya kolobela bango mabe to komilelalela. (Tángá Baefese 4:29.) Bayisraele bazalaki na biloko mingi oyo basengelaki kopesa matɔndi mpo na yango, kasi bazalaki komilelalela. Soki tozali komilelalela, tokotinda mpe basusu bámilelalela. Kobosana te ndenge oyo lapolo ya mabe ya banɔngi zomi etindaki ‘bana nyonso ya Yisraele . . . báimaima mpo na Moize.’ (Mit. 13:31–14:4) Kasi, ntango tozali kopesa basusu longonya, ekoki kosala ete bákóma lisusu na esengo mingi. Na ntembe te, longonya oyo baninga ya mwana mwasi ya Yefeta bazalaki kopesa ye, elendisaki ye mingi mpo akoba kokokisa mokumba na ye. (Bas. 11:40) Ndeko mwasi Sara, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Ntango topesaka basusu longonya, tosalaka ete basusu bámona ete Yehova alingaka bango mpe bazali na esika na ebongiseli na ye.” Na yango, lukáká mabaku ya kopesa basusu longonya oyo euti mpenza na motema.
18. Na kotalela Nzembo 15:1, 2, mpo na nini tosengeli kolobaka solo, mpe yango esangisi makambo nini?
18 Lobáká solo. Tokoki kosepelisa Yehova te soki tozali koloba solo te. Ayinaka mitindo nyonso ya lokuta. (Mas. 6:16, 17) Atako lelo oyo, bato mingi bamonaka lokuta ezali mabe te, toboyaka yango mpo Yehova alobi ete ezali mabe. (Tángá Nzembo 15:1, 2.) Ya solo, toboyaka koloba makambo ya lokuta, kasi toboyaka mpe kobomba makambo mosusu ya solo mpo bato bákóma kokanisa mabe te.
19. Likambo nini mosusu tosengeli kokeba na yango?
19 Boyá kotɔnga basusu. (Mas. 25:23; 2 Tes. 3:11) Ndeko mwasi Juliet, oyo tolobelaki liboso, amonisi ndenge matɔngi esalaka ye mabe mpenza. Alobi boye: “Koyoka matɔngi elɛmbisaka nzoto, mpe etindaka ngai natya motema te na moto oyo azali kotɔnga basusu. Na nsima namitunaka, ndenge nini nayebi ete akozanga te kotɔnga ngai epai ya basusu?” Soki omoni ete lisolo na bino ekómi kobongwana na matɔngi, lobá likambo moko ya malamu mpo na kobongola lisolo yango.—Kol. 4:6.
20. Ozwi ekateli ya kosala nini na maloba na yo?
20 Lokola tozali kofanda na mokili oyo etondi na maloba mabe, tosengeli kosala makasi mpo tómindimisa ete maloba na biso ezali kosepelisa Yehova. Kobosana te, maloba ezali likabo oyo eutá na Yehova, mpe atyaka likebi na ndenge oyo tosalelaka yango. Akopambola milende oyo tozali kosala mpenza mpo na kosalela maloba na biso na ndenge ebongi na mosala ya kosakola, na makita ya lisangá, mpe na masolo na biso ya mokolo na mokolo. Ntango makambo nyonso ya mokili mabe ekokóma na nsuka, ekozala mpenza pɛtɛɛ kokumisa Yehova na maloba na biso. (Yuda 15) Yango wana, zwá ekateli ya kosepelisa Yehova na “maloba ya monɔkɔ [na yo].”—Nz. 19:14.
LOYEMBO 121 Tóyeba komipekisa
^ Yehova apesá biso likabo moko kitoko, elingi koloba, likabo ya koloba. Likambo ya mawa, bato mingi basalelaka te likabo yango na ndenge oyo Yehova alingi. Nini ekoki kosalisa biso tóbatela maloba na biso pɛto mpe ya kotonga na mokili oyo bizaleli ya bato ezali kobeba se kobeba? Ndenge nini tokoki kokumisa Yehova na maloba na biso ntango tozali na mosala ya kosakola, na makita ya lisangá, mpe kosolola na basusu? Lisolo oyo ekopesa biyano na mituna wana.
^ Topesi bango bankombo mosusu.
^ Mpo na koyeba makambo mosusu na oyo etali kopesa biyano na makita, talá lisolo “Sanzolá Yehova na lisangá” oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya sanza 01/2019.
^ ELILINGI: Ndeko mobali moko asilikeli nkolo-ndako moko oyo azali na nkanda; ndeko mobali moko azali kokakatana koyemba na makita ya lisangá; mpe ndeko mwasi moko amikɔtisi na matɔngi.