Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Ndako ya kokɔtela ya tempelo ya Salomo ezalaki molai ndenge nini?

Bato bazalaki koleka na ndako ya kokɔtela mpo na kokɔta na Esika Mosantu ya tempelo. Na kolanda Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika oyo ebimisamaki liboso ya mobu 2023, “ndako ya kokɔtela oyo ezalaki liboso ezalaki na bolai ya mapeko 20; bolai na yango ekokanaki na bonene ya ndako. Bosanda na yango ezalaki 120.” (2 Nt. 3:4) Mabongoli mosusu mpe elobi ete ndako ya kokɔtela ezalaki na bolai ya “mapeko 120,” elingi koloba mɛtrɛ 53!

Kasi, Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika oyo enyatamaki na 2023 elobi mpo na ndako ya kokɔtela ya tempelo ya Salomo ete: “Bosanda na yango ezalaki mapeko 20,” to bolai ya mɛtrɛ soki 9. a Talá mwa bantina oyo ememi mbongwana yango.

Vɛrsɛ ya 1 Bakonzi 6:3 elobeli bosanda ya ndako ya kokɔtela te. Na vɛrsɛ yango, Yirimia, moto oyo akomaki yango, alobeli bolai mpe bonene ya ndako ya kokɔtela, kasi bosanda na yango te. Na nsima na mokapo oyo elandi, alobeli na bosikisiki makambo mosusu ya ntina oyo etali tempelo, na ndakisa Ebombelo monene ya mai na ebende oyo enyangwisami, bashario zomi, mpe makonzí mibale ya kwivre oyo ezalaki liboso ya ndako ya kokɔtela. (1 Bak. 7:​15-37) Soki ndako ya kokɔtela ezalaki mpenza na bolai ya mɛtrɛ koleka 50, molai oyo eleki biteni nyonso ya tempelo, mpo na nini Yirimia alobeli bosanda na yango te? Ata basiɛklɛ na nsima, bato ya istware oyo bazalaki Bayuda bakomaki ete ndako ya kokɔtela ezalaki molai koleka biteni mosusu ya tempelo te.

Bato ya mayele bamitunaka soki bifelo ya tempelo ekokaki kosimba ndako ya kokɔtela ya bolai ya mapeko 120. Bandako ya milai oyo batongi na mabanga mpe bandako ya babriki na ntango ya kala, lokola baporte ya tempelo ya Ezipito, ezalaki monene mpenza na nse mpe moke na likoló. Kasi tempelo ya Salomo ezalaki ndenge wana te. Bato ya mayele balobaka ete bifelo na yango elekaki mapeko 6, to mɛtrɛ 2,7 te. Yango wana Theodor Busink, Ingénieur na makambo ya kotonga na kala alobi: “Na kotalela ndenge bifelo [ya ekɔtelo ya tempelo] ezalaki mike, ndako ya kokɔtela ekokaki kozala na [bolai ya] mapeko 120 te.”

Mbala mosusu kopi ya maloba ya 2 Ntango 3:4 esalemaki malamu te. Atako baminiskri mosusu ya kala elobi “120” na vɛrsɛ yango, makomi mosusu oyo ebongi kotyelama motema, na ndakisa Codex Alexandrinus ya siɛklɛ ya mitano ná Codex Ambrosianus ya siɛklɛ ya motoba, elobi “mapeko 20.” Nini ekokaki kosala ete mokomeli asala libunga ya kokoma “120”? Ekomeli ya liloba “nkama” ná “mapeko” emonanaka lokola ekokaná na Ebre. Na yango, mbala mosusu mokomeli moko akomaki liloba “nkama” na esika ya “mapeko.”

Ya solo, atako tozali kosala makasi tóyeba makambo yango ya mikemike mpe tómonisa tempelo ya Salomo ndenge ezalaki mpenza, totyaka likebi mingimingi na elilingi oyo tempelo yango emonisaki: tempelo monene ya elimo. Tozali mpenza na botɔndi ndenge Yehova abengi basaleli na ye nyonso básambela ye na tempelo yango!—Ebr. 9:​11-14; Em. 3:12; 7:​9-17.

a Ezali na maloba na nse ya lokasa oyo elobi ete “baminiskri mosusu ya kala elobeli ‘120,’ mpe bamaniskri ná mabongoli mosusu elobeli ‘mapeko 20.’”