Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Engumba Ninive ezalaki na bandako milai, ya minene mpe ya kitoko

Oyebaki yango?

Oyebaki yango?

Nini ekómelaki engumba Ninive nsima ya mikolo ya Yona?

NA MOBU soki 670 liboso ya ntango na biso, Asiri ekómaki nguya oyo ezalaki koyangela mokili mobimba kabanda Shiprɛ na wɛsti tii na Iran na ɛsti. Mpe ndenge British Museum emonisi yango, na ntango moko boye ekómaki mpe koyangela Ezipito. Ninive, engumba-mokonzi na yango, ezalaki engumba oyo elekaki monene na mokili mobimba. Ezalaki na bilanga mingi ya kitoko, bandako milai ya kokamwa, mpe na bisika minene ya kobomba mikanda. Makomi oyo ezali na bifelo ya engumba Ninive ya kala emonisi ete, ndenge moko na bakonzi mosusu ya Asiri, Mokonzi Asurbanipale azalaki komibenga “mokonzi ya mokili.” Emonani ete na ntango wana, ekólo moko te ezalaki na likoki ya kobundisa Asiri mpe engumba Ninive.

Na ntango wana, Asiri ezalaki ampire oyo elekaki monene mpe na nguya na mokili mobimba

Kasi ntango Asiri ekómaki na nguya mingi, Sefania mosakoli ya Yehova asakolaki ete: “[Yehova] akobebisa Asiri. Mpe akokómisa Ninive esika oyo etikali mpamba, etúká oyo ezangá mai lokola esobe.” Lisusu, mosakoli Nahumu asakolaki boye: “Bópunza palata; bópunda wolo; . . . Engumba etikali polele, ezangi eloko, mpe ekómi mpamba! . . . Moto nyonso oyo akomona yo akokima yo mosika mpe akoloba mpenza ete, ‘Ninive epunzami!’” (Sef. 2:13; Nah. 2:9, 10; 3:7) Nsima ya koyoka bisakweli yango, bato bakokaki komituna boye: ‘Likambo ya bongo ekosalema mpenza? Asiri ekólo oyo eleki na nguya, ekoki kobebisama mpenza?’ Ekokaki kozala mpasi kondima likambo ya bongo.

Engumba Ninive esundolamá!

Atako bongo, likambo yango esalemaki! Na nsuka ya siɛklɛ ya 7 liboso ya ntango na biso, bato ya Babilone mpe Bamede babundisaki Asiri mpe balongaki yango. Nsukansuka, bato batikaki kofanda na engumba Ninive mpe babosaná yango mpenza! Musée Metropolitaine d’Art oyo ezalaka na New York elobi boye: “Na eleko ya Moyen-Âge, bato batikaki kofanda kuna mpe bakundaki esika oyo engumba yango ezalaki. Mpe bato bayebaka makambo etali Ninive kaka na Biblia.” Biblical Archaeology Society Online Archive, elobi ete na ebandeli ya bambula ya 1800, “moto moko te ayebaki soki engumba-mokonzi ya Asiri ezalaki mpenza.” Kasi na 1845, Austen Henry Layard moto moko ya arkeoloji akómaki kosala bolukiluki ya mozindo na esika oyo engumba yango ezalaki. Makambo oyo amonaki emonisi ete engumba Ninive ezalaki engumba moko kitoko mpenza.

Ndenge makambo oyo esakolamaki mpo na engumba Ninive ekokisamaki na bosikisiki mpenza, ezali kokómisa kondima na biso makasi ete bisakweli ya Biblia oyo etali banguya ya mokili mobimba ekokokisama mpe.​—Dan. 2:44; Em. 19:15, 19-21.