LISOLO YA BOMOI
Komekola bandakisa ya malamu ememeli ngai mapamboli ebele
NTANGO nazalaki elenge, nazalaki kokoka mosala ya kosakola te. Ntango nakómaki mokóló, nazwaki mikumba oyo nazalaki kokanisa ete nakokoka kosala te. Tiká nayebisa bino mwa bandakisa ya malamu oyo esalisaki ngai nalongola kobanga mpe nazwa mapamboli minene na mbula 58 oyo nalekisi na mosala ya ntango nyonso.
Nabotamá na engumba Québec, na etúká ya Québec na Canada, epai balobaka Français. Baboti na ngai, Louis ná Zélia, babɔkɔlá ngai na bolingo mpenza. Tata na ngai azalaki koloba mingi te mpe azalaki kolinga kotánga mingi. Nazalaki kosepela mingi kokoma mpe mposa na ngai ezalaki ete mokolo mosusu nakóma mopanzi-nsango.
Ntango nazalaki na mbula 12, Rodolphe Soucy, oyo azalaki moninga ya mosala ya tata na ngai ayaki kotala biso elongo na moninga na ye moko. Bazalaki Batatoli ya Yehova. Nayebaki mpenza Batatoli ya Yehova te mpe nazalaki mpenza kosepela na lingomba na bango te. Kasi, nasepelaki mingi ndenge bazalaki kopesa biyano na molɔngɔ mpe bazalaki kosalela Biblia. Baboti na ngai mpe basepelaki mingi, yango wana bandimaki tóyekola Biblia.
Na ntango wana, nazalaki kotánga na eteyelo moko ya Bakatolike. Na bantango mosusu, nazalaki koyebisa bana-kelasi na biso makambo oyo nazalaki koyekola na Biblia. Nsukansuka, balakisi na biso, oyo bazalaki basango bayebaki likambo yango. Na esika básalela Makomami mpo na kokweisa makambo oyo nazalaki koloba, moko na bango alobaki na ngai na miso ya bana-kelasi nyonso ete nazali motomboki! Atako ebangisaki ngai, likambo yango ebotaki mbuma ya malamu mpo esalisaki ngai namona ete mateya ya lingomba oyo bazalaki kotángisa biso na kelasi eyokanaki te na oyo Biblia elobi. Namonaki ete ezali esika na ngai te. Nasololaki na baboti na ngai, mpe bandimaki nakende kotánga na eteyelo mosusu.
NAYEKOLI KOSEPELA NA MOSALA YA KOSAKOLA
Nakobaki koyekola Biblia, kasi bokoli na ngai ezalaki malɛmbɛmalɛmbɛ mpo nazalaki kobanga kosakola ndako na ndako. Lingomba ya Katolike ezalaki na nguya mingi mpe ezalaki kotɛmɛla mpenza mosala
ya kosakola. Maurice Duplessis, oyo azalaki ministre-mokonzi ya Québec, azalaki na boyokani makasi ya politiki ná lingomba ya Katolike. Na ndingisa na ye, bituluku ya bato ya mobulu ezalaki kotungisa to ata kobundisa Batatoli. Na ntango wana, esɛngaki kozala na mpiko mpo na kobima na mosala ya kosakola.Ndeko mobali moko oyo asalisaki ngai natika kobanga ezalaki John Rae, oyo azwaki diplome ya Gileade ya mbala ya 9. Ndeko yango ayebaki makambo mingi, azalaki na boboto, na komikitisa, mpe ayebaki kosolola malamu na bato. Mbala mingi azalaki kopesa ngai toli mbala moko boye te, kasi ndakisa na ye ya malamu nde ezalaki koteya ngai. John ayebaki koloba Français malamu te; yango wana nazalaki kobima na ye mingi na mosala ya kosakola mpo na kosalisa ye. Kolekisa ntango elongo na John esalisaki ngai nazwa ekateli ya kokóma Motatoli ya Yehova. Nazwaki batisimo na mokolo ya 26/05/1951, mbula zomi nsima ya bokutani na ngai ya liboso na Batatoli ya Yehova.
Bandeko mingi ya mwa lisangá na biso na engumba Québec bazalaki babongisi-nzela. Ndakisa na bango ya malamu etindaki ngai mpe nakóma mobongisi-nzela. Na ntango wana, tozalaki kosalela kaka Biblia mpo na kosakola ndako na ndako. Lokola tozalaki kosalela mikanda te, esɛngaki koyeba kosalela Biblia malamu mpenza. Na yango, nasalaki makasi nayeba bavɛrsɛ ya Biblia mpo nakoka koteya bato. Kasi, bato mingi bazalaki koboya kotánga ata Biblia, soki ezali na elembo te oyo emonisi ete Lingomba ya Katolike endimi yango.
Na 1952, nabalaki Simone Patry, ndeko mwasi moko ya sembo ya lisangá na biso. Tokendaki kofanda na Montréal, mpe nsima ya mbula moko, tobotaki mwana na biso ya mwasi na nkombo Lise. Atako nakataki mosala ya mobongisi-nzela mwa moke liboso tóbalana, ngai ná Simone tosalaki makasi tózala na bomoi oyo ezangi mindɔndɔ mpo libota na biso emipesa mingi na makambo ya lisangá.
Mbula zomi na nsima, nakanisaki lisusu na likebi mosala ya mobongisi-nzela. Na 1962, ntango tozalaki na Eteyelo mpo na mosala ya Bokonzi ya bankulutu na Canada, oyo eumelaki sanza moko, batyaki ngai shambrɛ moko na ndeko moko na nkombo Camille Ouellette. Molende ya Camille mpo na mosala ya kosakola ekamwisaki ngai mpenza, mingimingi mpo ye mpe azalaki tata ya libota. Na ntango wana, ezalaki mpasi na Québec koyoka ete moto oyo azali na bana azali mpe mobongisi-nzela; kasi yango nde mokano oyo Camille amityelaki. Na boumeli ya ntango oyo tolekisaki elongo, alendisaki ngai natalela lisusu bomoi na ngai. Nsima ya mwa basanza, namonaki ete nakokaki kozongela mosala
ya mobongisi-nzela. Bandeko mosusu bamonaki ete ekateli yango ezalaki malamu te, kasi nazongaki nsima te, natyaki motema ete Yehova akopambola milende oyo nazalaki kosala mpo namipesa mingi na mosala na ye.TOZONGI NA ENGUMBA QUÉBEC LOKOLA BABONGISI-NZELA MONENE
Na 1964, batindaki ngai ná Simone tókende kosala lokola babongisi-nzela monene na engumba Québec, mboka na biso, mpe tosalaki bambula mingi kuna. Na ntango yango, mosala ya kosakola ebongaki mwa moke, kasi bato bazalaki kaka kotɛmɛla biso.
Mokolo moko ya pɔsɔ nsima ya midi, bakangaki ngai na Sainte-Marie, mwa mboka oyo ezali mosika te na engumba Québec. Mokonzi moko ya basoda amemaki ngai na biro ya polisi mpe batyaki ngai na bolɔkɔ mpo nazalaki kosakola ndako na ndako kozanga ndingisa. Na nsima, bamemaki ngai liboso ya Baillargeon, zuzi moko oyo bato bazalaki kobanga mingi. Atunaki ngai soki nani akozala avoka na ngai na tribinale. Ntango natángaki nkombo ya Glen How, * Motatoli moko oyo azalaki avoka mpe ayebanaki mingi, akamwaki mpe alobaki: “Ah, te! Ye te!” Glen How ayebanaki lokola avoka oyo azalaki kosamba makambo ya Batatoli ya Yehova na ntango wana. Eumelaki te, tribinale eyebisaki ngai ete bifundeli yango elongwe.
Mpo na botɛmɛli oyo tozalaki kokutana na yango na Québec, kozwa bisika ya kofutela oyo ebongi mpo na kosala makita ezalaki mpasi. Esika oyo mwa lisangá na biso ezwaki ezalaki kaka mwa garaje moko ya kala oyo ezalaki ata na aparɛyi ya kotya molunge te. Na yango, mpo na kotya mwa molunge na eleko ya malili makasi, bandeko bazalaki kosalela aparɛyi moko oyo esalaka na mafuta. Mbala mingi, tozalaki kofanda penepene na yango mwa bangonga liboso makita ebanda mpo na kobɛta masolo ya kolendisa.
Ezali esengo komona ndenge mosala ya kosakola ekoli na boumeli ya bambula. Na bambula ya 1960, ezalaki kaka na mwa masangá ya mikemike na engumba Québec mobimba, na etúká ya Côte-Nord, mpe na Gaspésie. Lelo oyo, ezali na bazongazonga koleka mibale na bisika yango, mpe bandeko bayanganaka na Bandako ya Bokonzi ya kitoko.
TOKÓMI NA MOSALA YA ZONGAZONGA
Na 1970, basɛngaki ngai ná Simone tósala na mosala ya zongazonga. Na nsima, na 1973, nakómaki mokɛngɛli ya etúká. Na bambula wana, nayekolaki makambo mingi epai ya bandeko ya makoki lokola Laurier Saumur * mpe David Splane, * oyo bazalaki mpe bakɛngɛli-batamboli. Nsima ya liyangani nyonso, ngai ná David tozalaki kopesana makanisi mpo na ndenge ya kobakisa mayele na biso ya koteya. Nazali koyeba lisusu mokolo moko oyo David alobaki na ngai: “Léonce, nasepelaki mingi na diskur na yo ya nsuka. Ezalaki malamu, kasi ngai nakokaki kobimisa badiskur misato na makambo nyonso oyo olobaki!” Na badiskur na ngai, nazalaki na momeseno ya kolobela makambo ebele na mbala moko. Nasengelaki koyekola kolobela makambo na mokuse.
Mokumba ya bakɛngɛli ya etúká ezalaki ya kolendisa bakɛngɛli ya zongazonga. Kasi, lokola basakoli mingi na Québec bayebaki ngai malamu, mbala mingi bazalaki kosepela kobima na ngai na mosala ya kosakola soki nakei kotala bazongazonga. Ezalaki malamu kosakola elongo na bandeko, kasi nazalaki te kolekisa ntango oyo esengeli na mokɛngɛli ya zongazonga. Na libaku moko, mokɛngɛli ya zongazonga moko akundwelaki ngai na boboto ete: “Ezali malamu ndenge ozali kosakola mingi na bandeko, kasi kobosana te ete na pɔsɔ oyo oyei nde kotala ngai. Ngai mpe nazali na mposa ya malendisi!” Toli yango ya boboto esalisaki ngai nakóma na bokatikati.
Likambo ya mawa, na 1976, likambo moko ya mpasi ekómelaki ngai na mbalakaka. Simone, mwasi na ngai oyo nalingaki mingi, abɛlaki makasi mpe akufaki. Elimo na ye ya komipimela mpe bolingo na ye mpo na Yehova esalaki ete azala molongani ya malamu. Kokoba komipesa na mosala ya kosakola esalisaki ngai nayika mpiko ntango mwasi na ngai akufaki, mpe napesaka Yehova matɔndi ndenge asalisaki ngai mpenza na ntango wana ya mpasi. Na nsima, nabalaki Carolyn Elliott, mobongisi-nzela moko ya molende, oyo azalaki koloba Anglais mpe ayaki na Québec kopesa mabɔkɔ esika oyo mposa ezalaki monene. Carolyn asololaka malamu na bato nyonso mpe atyelaka basusu likebi, mingimingi baoyo bazalaka nsɔninsɔni to bamiyokaka ete bazali kaka bango moko. Ntango tobalanaki, asalisaki ngai mingi na mosala ya mokɛngɛli-motamboli.
MOBU MOKO YA NTINA MINGI
Na sanza ya 01/1978, basɛngaki ngai nazala molakisi na Eteyelo ya babongisi-nzela oyo esalemaki mpo na mbala ya liboso na Québec. Nazalaki kobanga mingi, mpo mateya ya eteyelo yango ezalaki likambo ya sika mpo na ngai ndenge kaka ezalaki mpo na bana-kelasi. Likambo ya esengo, kelasi yango ezalaki na babongisi-nzela ebele oyo bamesanaki na mosala ya kosakola. Atako nazalaki molakisi, nayekolaki makambo mingi epai ya bana-kelasi!
Mwa basanza na nsima, kaka na 1978, liyangani “Kondima oyo elongaka” oyo esangisaki mikili mingi
esalemaki na Stade Olympique, na Montréal. Ezalaki liyangani oyo elekaki monene na mayangani nyonso oyo tosalá na Québec, mpo bayangani bazalaki koleka 80 000. Na liyangani yango, basɛngaki ngai nasala na departema ya bopanzi-nsango. Nasololaki na bapanzi-nsango ebele mpe nasepelaki komona ete bazalaki kokoma makambo ya malamu mpo na biso. Balekisaki mituna-lisolo ngonga koleka 20 na TV mpe na radio, mpe masolo ebele ebimaki na bazulunalo. Litatoli monene mpenza epesamaki!TOKEI NA TERITWARE MOSUSU
Mbongwana monene esalemaki na bomoi na ngai na 1996. Bandá nazwá batisimo, nazalaki kosala na Québec, epai balobaka Français; kasi sikoyo batindaki ngai na etúká ya Toronto, epai balobaka Anglais. Namonaki ete nakokoka te mpe nazalaki kobanga soki nakanisi ete nakobanda kosala badiskur na Anglais na ngai oyo etɛngamá. Esɛngaki nabondelaka mingi mpe natyela Yehova motema mobimba.
Atako bongo, nakoki mpenza koloba ete nasepelaki mingi na mbula mibale oyo tosalaki na Toronto. Carolyn asalisaki ngai mokemoke mpo nayeba koloba Anglais malamu, mpe bandeko bazalaki kosunga mpe kolendisa ngai. Eumelaki te, tozwaki baninga ebele ya sika.
Longola mikumba mosusu mpe misala oyo nazalaki kosala mpo na kobongisa liyangani na nsuka ya pɔsɔ, mbala mingi nazalaki kolekisa ngonga moko mikolo ya mitano na mpokwa mpo na kosakola ndako na ndako. Bato mosusu bakokaki komituna: ‘Mpo na nini kosakola mwa ntango moke liboso ya liyangani?’ Kasi, nazalaki komona ete kosolola masolo ya Biblia na bato na mosala ya kosakola ezalaki kopesa ngai makasi. Ata lelo, nayokaka esengo mingi soki nabimi na mosala ya kosakola.
Na 1998, bazongisaki ngai ná Carolyn na Montréal lokola babongisi-nzela monene. Na boumeli ya mwa bambula, mokumba na ngai ezalaki mpe ya kobongisa ndenge ya kopesa litatoli na bisika ya bato mingi mpe nazalaki kosala elongo na bapanzi-nsango mpo na kosembola makambo ya mabe oyo bato bakaniselaka Batatoli ya Yehova. Lelo oyo, ngai ná Carolyn toteyaka bapaya oyo bayei kofanda na Canada mpe oyo mbala mingi bazalaka na mposa makasi ya koyeba Biblia.
Soki nakanisi mbula 68 oyo nalekisi kobanda nazwa batisimo lokola Motatoli ya Yehova, namonaka ete Yehova apamboli ngai mpenza. Koyekola kosepela na mosala ya kosakola mpe kosalisa ebele ya bato báyeba solo ezali mbano eleki monene oyo nazwi. Mwana na ngai ya mwasi Lise ná mobali na ye babɔkɔlaki bana minei, na nsima bakómaki babongisi-nzela ya sanza na sanza. Komona ndenge Lise abateli molende na ye na mosala ya kosakola esepelisaka ngai mingi. Nazalaka na botɔndi mingimingi epai ya bandeko oyo ndakisa na bango ya malamu mpe toli na bango ya bwanya esalisaki ngai nakola na elimo mpe nakokisa mikumba ndenge na ndenge na ebongiseli ya Yehova. Namoni ete tokoki kokoba kosala oyo ebongiseli ya Yehova esɛngi biso kaka soki totyeli elimo santu na ye motema. (Nz. 51:11) Napesaka Yehova matɔndi ntango nyonso ndenge apesá ngai lokumu monene ya kokumisa nkombo na ye!—Nz. 54:6.
^ par. 16 Talá lisolo ya bomoi ya ndeko Glen How, “La bataille n’est pas la vôtre, mais celle de Dieu,” na Lamuká! ya 22/04/2000, na Français.
^ par. 20 Talá lisolo ya bomoi ya Laurier Saumur, “J’ai trouvé quelque chose pour lequel il vaut la peine de lutter,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/02/1977, na Français.
^ par. 20 David Splane azali moko ya bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova.