Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tótɛlɛma ngwi mpe tókima mitambo ya Satana!

Tótɛlɛma ngwi mpe tókima mitambo ya Satana!

Tótɛlɛma ngwi mpe tókima mitambo ya Satana!

‘Bótɛlɛma ngwi liboso ya mayele mabe ya Zabolo.’​—EF. 6:11.

OKOPESA EYANO NINI?

Ndenge nini mosaleli ya Yehova akoki kokima motambo ya kolinga mingi biloko ya mokili?

Nini ekoki kosalisa mokristo oyo abalá akwea na ekobo te?

Mpo na nini okanisi ete tokozwa matomba soki toboyi kolinga biloko ya mokili mpe kosala ekobo?

1, 2. (a) Mpo na nini Satana azalaka na mawa ata moke te mpo na bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe “bampate mosusu”? (b) Mitambo nini ya Satana tokotalela na lisolo oyo?

 SATANA ZABOLO azalaka na mawa ata moke te mpo na bato, mingimingi baoyo basalelaka Yehova. Kutu, azali kobundisa bakristo oyo batyami mafuta na elimo, oyo bazali naino awa na mabele. (Em. 12:17) Bakristo yango ya molende bazali na molɔngɔ ya liboso na mosala ya kopalanganisa nsango ya Bokonzi na mikolo na biso; bazali mpe koyebisa bato ete Satana nde azali koyangela mokili oyo. Zabolo azali koyina mpe “bampate mosusu” oyo bazali kosunga bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe bazali na elikya ya kozwa bomoi ya seko. (Yoa. 10:16) Satana abungisá elikya yango, yango wana azali na nkanda makasi. Ezala tozali na elikya ya kozala na bomoi na likoló to awa na mabele, Satana alingaka bolamu na biso ata moke te. Alukaka nde kokweisa biso.​—1 Pe. 5:8.

2 Mpo na kozwa bato, Satana asalelaka mitambo ndenge na ndenge. Lokola “azipi makanisi” ya bato oyo bazangi kondima, bato yango bazali koboya nsango malamu mpe bazali komona mitambo na ye te. Nzokande, Zabolo azali mpe kokanga na motambo bato mosusu oyo bandimaka nsango ya Bokonzi. (2 Ko. 4:3, 4) Lisolo oyo eleki emonisaki ndenge oyo tokoki kokima mitambo misato ya Satana: (1) kozanga kopekisa lolemo, (2) kobanga bato mpe kokokisa mposa ya bato oyo bazali kotya biso mbamba, mpe (3) komitungisa koleka ndelo mpo na masumu oyo osalá kala. Sikoyo, tótalela ndenge oyo tokoki kotɛlɛma ngwi liboso ya mitambo mosusu mibale ya Satana: kolinga mingi biloko ya mokili mpe komekama mpo na kosala ekobo.

KOLINGA MINGI BILOKO YA MOKILI: MOTAMBO OYO ETYAKA NKAKA

3, 4. Ndenge nini mitungisi ya makambo ya ntango oyo ekoki kotinda moto akóma kolinga mingi biloko ya mokili?

3 Na ndakisa moko oyo Yesu apesaki, alobelaki mboto oyo elonami na kati ya banzubɛ. Alimbolaki ete moto mosusu akoki koyoka liloba, “kasi motungisi ya makambo ya ntango oyo mpe nguya ya bokosi ya bomɛngo etye liloba nkaka, mpe aboti mbuma te.” (Mat. 13:22) Ya solo, kolinga mingi biloko ya mokili ezali motambo moko oyo monguna na biso Satana asalelaka.

4 Ezali na makambo mibale oyo, soki esangani, ekoki ‘kotya liloba nkaka.’ Moko ezali “motungisi ya makambo ya ntango oyo.” Na ‘ntango oyo ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano,’ tokoki komitungisa mpo na makambo mingi. (2 Tim. 3:1) Lokola biloko ezali se komata ntalo mpe basomɛlɛ bazali se kobakisama, ekoki kozala mpasi mpo na kozwa mbongo ya kobikela. Okoki mpe komitungisa mpo na avenire na yo mpe komituna ete, ‘Soki nazwi pansiɔ, nakozala na mbongo oyo ekoki mpo na kobikela?’ Mitungisi ya ndenge wana etindaka bato mosusu bámipesa na koluka bomɛngo, bákanisaka ete mbongo ekobatela bango.

5. Ndenge nini ‘nguya ya bomɛngo’ ekoki kokosa biso?

5 Likambo mosusu oyo Yesu alobelaki ezali “nguya ya bokosi ya bomɛngo.” Likambo yango mpe ekoki kotya liloba nkaka ntango esangani na mitungisi ya makambo ya ntango oyo. Biblia elobi ete “mbongo ebatelaka.” (Mos. 7:12) Kasi, komipesa na koluka bomɛngo ezali likambo ya bwanya te. Bato mingi bamonaki ete ntango bazali komipesa mingi na koluka bomɛngo, bazali mpe kokwea na motambo ya kolinga biloko ya mokili. Basusu kutu bakómá baombo ya bomɛngo.​—Mat. 6:24.

6, 7. (a) Ndenge nini makambo ya mosala ekoki kotinda moto akóma kolinga mingi biloko ya mokili? (b) Makambo nini mokristo asengeli kotalela mpo na kozwa ekateli ya kondima to koboya kosala nsima ya bangonga ya mosala?

6 Mposa ya kokóma na bomɛngo ekoki kobanda kokola mokemoke, kozanga ete tóyeba yango. Tótalela naino ndakisa oyo. Patrɔ na yo ayei kosolola na yo mpe alobi na yo ete: “Nazali na nsango moko ya malamu! Kompanyi na biso ezwi kɔntra moko monene. Yango ekosɛnga ete na basanza oyo ezali koya, tótikalaka mwa mingi nsima ya ngonga ya mosala. Kasi, yebá ete okozwa mpe mbongo ebele.” Okosala nini na likambo ya ndenge wana? Ya solo, koleisa libota na yo ezali mokumba oyo osengeli kozwa na lisɛki te, kasi ozali kaka na mokumba wana te. (1 Tim. 5:8) Ezali na mwa makambo mosusu oyo osengeli kotalela. Mbala boni okobanda kotikala na mosala? Mosala yango ekopekisa yo omipesa na makambo ya elimo, na ndakisa koyangana na makita nyonso mpe kosala Losambo na kati ya libota?

7 Osengeli kotalela libosoliboso nini ntango ozali kokanisa ekateli oyo okozwa: mbongo oyo bakobanda kofuta yo soki ozali kotikala nsima ya ngonga ya mosala to soki boyokani na yo na Nzambe ekokóma ndenge nini? Okotika kotya Bokonzi na esika ya liboso mpo olingi ozwaka mbongo mingi? Ozali komona ndenge oyo koluka biloko ya mokili ekoki kobebisa yo ná libota na yo soki ozongisi nsima makambo oyo ekoki kosalisa bino bózala makasi na elimo? Soki ozali na mokakatano yango sikoyo, ndenge nini okoki kotɛlɛma ngwi mpe koboya ete mposa ya koluka biloko ya mokili etya yo nkaka?​—Tángá 1 Timote 6:9, 10.

8. Bandakisa nini ya Biblia ekoki kosalisa biso tótalelaka makambo ya bomoi na biso?

8 Mpo tókwea te na motambo ya kolinga mingi biloko ya mokili, tosengeli kotalelaka mbala na mbala makambo ya bomoi na biso. Tólinga ata moke te tókóma lokola Esau, oyo misala na ye emonisaki ete azalaki kotyola makambo ya elimo! (Eba. 25:34; Ebr. 12:16) Tózala mpe te lokola mozwi oyo Yesu alobaki na ye ete atɛka biloko na ye, akabela babola, mpe akóma kolanda ye. Na esika moto yango asala makambo oyo Yesu asɛngaki ye, “akendaki na mawa, mpo azalaki na biloko mingi.” (Mat. 19:21, 22) Lokola moto yango aboyaki kotika bomɛngo na ye, azangaki libaku moko monene ya kokóma moyekoli ya moto oyo alekaki bato nyonso tii lelo! Tókeba mpo tóbungisa te libaku ya kozala bayekoli ya Yesu Kristo.

9, 10. Biblia epesi toli nini mpo na ndenge oyo tosengeli kotalela biloko ya mokili?

9 Mpo tómitungisa koleka ndelo te mpo na biloko ya mokili, tólanda toli ya Yesu oyo: “Bómitungisa ata moke te mpe bóloba te ete: ‘Tokolya nini?’ to, ‘Tokomɛla nini?’ to, ‘Tokolata nini?’ Mpo nyonso wana ezali biloko oyo bikólo balukaka na lokoso mpenza. Mpo Tata na bino ya likoló ayebi ete bozali na bosɛnga ya biloko nyonso wana.”​—Mat. 6:31, 32; Luka 21:34, 35.

10 Na esika tótika nguya ya bomɛngo ekosa biso, tósala nde makasi tózala na makanisi ndenge moko na Agure, mokomi moko ya Biblia, oyo alobaki ete: “Kotika ngai pe té nákelela to názwa bomengo koleka. Pesa ngai se oyo ekoki na ngai.” (Batoli [Masese] 30:8, Bible na lingala ya lelo oyo) Emonani polele ete Agure ayebaki ete mbongo ezali na ntina, kasi ayebaki mpe ete nguya ya bomɛngo ekoki kokosa biso. Tosengeli koyeba ete mitungisi ya mokili oyo mpe nguya ya bokosi ya bomɛngo ekoki kobebisa boyokani na biso na Yehova. Komipesa na koluka biloko ya mokili ekoki kolya biso ntango, kosilisa biso makasi mpe mposa ya kotya Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na biso. Yango wana, salá nyonso mpo okwea te na motambo ya kolinga mingi biloko ya mokili!​—Tángá Baebre 13:5.

EKOBO: LIBULU OYO EZALI KOMONANA TE

11, 12. Ndenge nini mokristo akoki kokwea na ekobo ná moninga ya mosala?

11 Ntango mosusu, babomi-nyama oyo balingi kokanga nyama oyo ezalaka makasi batimolaka libulu na nzela oyo nyama yango elekaka mingi. Mbala mingi, bazipaka libulu yango na mwa bitape ya nzete, mwa mabele, mpe nkasa. Motambo mosusu oyo Satana azali kozwela bato mingi ezali lokola libulu yango. Motambo yango ezali ekobo. (Mas. 22:14; 23:27) Bandeko mosusu bakweaki na libulu yango mpo bandimaki kosala makambo oyo nsukansuka ememaki bango na ekobo. Bakristo mosusu oyo babalá bakweaki na ekobo mpo bakómaki seresere mingi na moto oyo azali molongani na bango te.

12 Okoki kokóma seresere na moto ndenge wana na esika ya mosala. Kutu, ankɛtɛ moko emonisaki ete bato mingi bakweaki na ekobo ná moninga moko ya mosala. Soki ozali mobali, osalaka esika moko na basi? To soki ozali mwasi, osalaka esika moko na mibali? Soki ezali bongo, ozalaka na bango ndenge nini? Osalaka makasi bósuka kaka na makambo ya mosala, mpe yo ná bango bókóma seresere te? Na ndakisa, soki ndeko mwasi akómi mbala na mbala kobɛta masolo ná mobali moko oyo azali moninga na ye ya mosala, ndeko yango akoki kobanda koyebisa ye basekele na ye, ata mpe mikakatano na ye ya libala. Ndakisa mosusu: Ndeko mobali oyo amesani mingi na mwasi moko oyo azali moninga na ye ya mosala akoki kobanda kokanisa boye: “Andimaka makanisi na ngai mpe ayokaka ngai mpenza ntango nazali koloba na ye. Lisusu, asepelaka na ngai. Soki mwasi na ngai azalaki kosala ata boye!” Omoni ndenge bakristo oyo basalaka makambo ya ndenge wana bakoki kokwea na ekobo?

13. Ndenge nini mokristo akoki kokóma seresere na ndeko mosusu na lisangá?

13 Ndeko moko akoki kokóma seresere na ndeko mosusu ata na kati ya lisangá. Tótalela likambo oyo ekómelaki ndeko moko. Daniel ná mwasi na ye Sarah a bazalaki babongisi-nzela ya sanza na sanza. Daniel azalaki mpe nkulutu oyo aboyaka te mokumba nyonso oyo bapesi ye. Azalaki koyekola Biblia na bilenge mibali mitano, mpe misato kati na bango bazwaki batisimo. Bandeko yango oyo bazwaki batisimo sika bazalaki na mposa ete moto akoba kosalisa bango mpo bákola na elimo. Lokola Daniel azalaki na mikumba mingi na lisangá, mbala mingi Sarah nde azalaki kosalisa bandeko yango. Ekómaki soki bandeko yango oyo bayekolaki Biblia na Daniel bazali na likambo oyo balingi kosolola na moto, Sarah azalaki koyoka bango. Soki Sarah azali na likambo oyo alingi kosolola na moto, bayekoli wana ya Daniel bazalaki koyoka ye. Likambo yango ekómaki motambo. Daniel alobi boye: “Lokola mwasi na ngai amipesaki mingi na kosalisa basusu mpe likambo yango eumelaki basanza mingi, alɛmbaki mingi mpe azalaki lisusu na esengo te. Lokola ngai mpe nazalaki kotyela ye likebi te, yango ebimiselaki biso mokakatano. Mwasi na ngai asalaki ekobo na moko ya bandeko oyo nayekolaki na bango Biblia. Mwasi na ngai alɛmbaki na elimo, kasi nazalaki komona yango te mpo namipesaki kaka na mikumba na ngai.” Okoki kosala nini mpo likambo ya ndenge wana ekómela yo te?

14, 15. Nini ekoki kosalisa bakristo oyo babalá bákima ekobo?

14 Mpo na kokima ekobo, osengeli kokanisa malamumalamu na elako oyo osalaki mokolo ya libala na bino. Yesu alobaki boye: “Oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te.” (Mat. 19:6) Kokanisa ata mokolo moko te ete mikumba na yo na lisangá ezali na ntina koleka molongani na yo. Yebá mpe ete kotika ntango nyonso molongani na yo mpo na komipesa na makambo oyo ezali mpenza na ntina te ekoki kozala elembo oyo ezali komonisa ete libala na bino ezali lisusu makasi te mpe ekoki kotinda moko na bino akwea na ekobo.

15 Soki ozali nkulutu, ndenge nini osengeli kotalelaka bampate? Ntoma Petro akomaki boye: “Bóbatela etonga ya Nzambe oyo bapesi na mabɔkɔ na bino, bósala yango na kotindikama te, kasi na motema moko; ezala te na kolinga litomba oyo ezwami na ndenge ya mabe, kasi na motema ya esengo.” (1 Pe. 5:2) Ya solo, osengeli te kobosana bampate na lisangá. Kasi, ebongi te obosana mwasi na yo kaka mpo na kokokisa mikumba na yo na lisangá. Ekozala mabe mingi, to mpe likama, komipesa mobimba na koleisa lisangá na ntango oyo molongani na yo na ndako azali kokufa nzala na elimo. Daniel alobi boye: ‘Osengeli soki moke te kobosana libota na yo mpo omipesi mobimba na mikumba na yo na lisangá.’

16, 17. (a) Makambo nini bakristo oyo babalá bakoki kosala mpo bámonisa baninga ya mosala ete bakoki kolingana na moto mosusu te? (b) Pesá ndakisa ya lisolo moko oyo ebimá na mikanda ya moombo ya sembo, oyo ekoki kosalisa bakristo bákima ekobo.

16 Masolo mingi oyo ebimá na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! ezali na batoli oyo ekoki kosalisa bakristo oyo babalá bákima ekobo. Na ndakisa, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Sɛtɛmbɛ 2006 epesaki toli oyo: “Na esika ya mosala mpe na bisika mosusu, esengeli kokeba na makambo oyo ekoki kotinda yo okóma seresere ná moto oyo azali molongani na yo te. Na ndakisa, kotikala na mosala, na mobali, soki ozali mwasi, to na mwasi, soki ozali mobali, ekoki komema yo na komekama. Soki ozali na mwasi to mpe soki ozali mwasi ya libala, osengeli komonisa polele na maloba mpe na ezaleli na yo ete opesá motema na yo nyonso epai ya molongani na yo mpe ete esika mpo na moto mosusu ezali te. Lokola ozali na ezaleli ya kokangama na Nzambe, osengeli koboya kozala seresere na moto mosusu to mpe kolataka bilamba oyo ebongi te. . . . Kotya fɔtɔ ya molongani na yo mpe ya bana na yo na esika ya mosala ekosalisa yo omonaka bango ntango nyonso na makanisi mpe ekosala ete bato mosusu báyeba ete olingaka bato ya libota na yo mingi. Kolendisa ata moke te, kokanga mpe miso te, na moto oyo azali koya na maloba ya kolengola to azali kosala likambo mosusu nyonso oyo elongobani te.”

17 Lisolo “Kozala sembo na libala elimboli mpenza nini?” oyo ebimaki na Lamuká! ya Yuli-Sɛtɛmbɛ 2009 emonisaki ete kolula na mposa ya mabe moto oyo azali molongani na yo te ezali likama. Lisolo yango emonisaki ete likambo wana ekoki komema moto na ekobo. (Yak. 1:14, 15) Soki obalá, ekozala malamu yo ná molongani na yo bótángaka elongo masolo ya ndenge wana mbala na mbala. Libala ezali ebongiseli ya bosantu oyo euti na Yehova. Koluka ntango mpo na kosololaka na molongani na yo lisolo ya mwasi ná mobali ezali ndenge malamu ya komonisa ete ozwaka makambo mosantu na lisɛki te.​—Eba. 2:21-24.

18, 19. (a) Makama nini ekoki kobima soki moto akwei na ekobo? (b) Kokangama kaka na molongani na yo ebimisaka matomba nini?

18 Soki motema na yo ekómi kobendama na moto oyo azali molongani na yo te, kanisá makama oyo eyaka na nsima soki moto akwei na pite to na ekobo. (Mas. 7:22, 23; Gal. 6:7) Moto oyo asali ekobo ayokisaka Yehova mawa, azokisaka motema ya molongani na ye mpe amisalaka mabe. (Tángá Malaki 2:13, 14.) Kanisá matomba oyo moto azwaka soki azali kokima pite to ekobo. Moto ya ndenge wana akozwa bomoi ya seko na mikolo ezali koya, kasi ata lelo oyo, azalaka na bomoi ya malamu mpe lisosoli na ye ezalaka kimya.​—Tángá Masese 3:1, 2.

19 Mokomi ya nzembo ayembaki boye: “Baoyo bazali kolinga mobeko [ya Nzambe] bazali na kimya mingi, mpe eloko ya kobɛtisa bango libaku ezali te.” (Nz. 119:165) Yango wana tólinga solo mpe, lokola tozali na mikolo ya mabe, ‘tókeba mpenza ete ndenge na biso ya kotambola ezala te lokola bato bazangá bwanya kasi lokola bato ya bwanya.’ (Ef. 5:15, 16) Satana asalelaka mitambo mingi mpo na kokanga basambeli ya solo ya Nzambe. Kasi tozali na biloko nyonso oyo ekoki kobatela biso. Yehova apesi biso oyo tosengeli na yango mpo ‘tótɛlɛma ngwi’ mpe ‘tóboma mɔtɔ ya mbanzi nyonso oyo ezali kopela ya moto mabe’!​—Ef. 6:11, 16.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Oyo ezali bankombo topesi bango kopesa.

[Mituna ya boyekoli]

[Elilingi na lokasa 26]

Kolinga mingi biloko ya mokili ekoki kotya elimo ya moto nkaka. Kotika te ete yango ekómela yo

[Elilingi na lokasa 29]

Kozala seresere na moto oyo azali molongani na yo te ekoki komema yo okwea na ekobo