Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kebá na kosalela Biblia lokola bikelakela

Kebá na kosalela Biblia lokola bikelakela

“LILOBA ya Nzambe ezali na bomoi mpe ezali na nguya.” (Ebr. 4:12) Na maloba wana, ntoma Paulo amonisaki polele ete Liloba ya Nzambe ezali na nguya ya kosimba mitema mpe ya kobongola bomoi ya bato.

Nzokande, ntango lipɛngwi oyo esakolamaki ekɔtaki na lisangá nsima ya liwa ya bantoma, bato bazalaki lisusu kotalela nsango ya Biblia te ete ezali na nguya. (2 Pe. 2:1-3) Na nsima, bakonzi ya mangomba bakómaki komona ete Liloba ya Nzambe ezali na nguya lokola ya maji. Profesɛrɛ Harry Gamble alobaki ete “bazalaki kosalela mikanda ya bokristo na makambo ya maji.” Alobaki mpe ete na siɛklɛ ya misato, Origène, oyo azalaki Tata ya lingomba, ateyaki ete “koyoka kaka maloba mosantu ezali na ntina mingi: soki maloba ezali na nguya ntango bapakano basalelaka maji, maloba ya solo oyo euti na Nzambe esengeli mpe kozala na nguya mingi koleka.” Na nsuka ya siɛklɛ ya minei, Jean Chrysostome, akomaki ete “zabolo akomeka ata moke te kopusana na ndako oyo Evanzile ezali.” Alobaki mpe ete bamosusu balataka na nkingo mwa bapapye ya biteni ya Baevanzile, lokola biloko ya kobatela oyo ezali na nguya. Profesɛrɛ Gamble alobaki lisusu ete moto moko ya mayele ya teoloji ya Katolike na nkombo Augustin “amonisaki ete ezali mabe te ete moto oyo azali koyoka motó mpasi atya Evanzile ya Yoane na nse ya kuse ntango alali.” Mpo na mateya wana, bato babandaki kosalela Biblia lokola nde ezali na nguya ya maji. Tokoloba nini mpo na yo? Osalelaka Biblia mpo ememela yo makambo malamu mpe ebatela yo?

Bato mingi basalelaka Biblia na lolenge mosusu ya mabe. Bandimaka ete soki bafungoli Biblia ata na lokasa nini, vɛrsɛ ya liboso oyo bakomona, ekoyebisa bango likambo oyo basengeli kosala. Na ndakisa, Profesɛrɛ Gamble alobaki ete, mokolo moko, Augustin ayokaki mongongo ya mwana na ndako moko oyo ezalaki mosika te na bango, ezali koloba ete: “Zwá mpe tángá, zwá mpe tángá.” Augustin asosolaki ete Nzambe nde azalaki koyebisa ye afungola Biblia mpe atánga vɛrsɛ ya liboso oyo akomona.

Oyebi bato oyo basalelaka Biblia lolenge wana mpo na kosilisa mikakatano na bango? Ya solo, ezali mabe te ndenge bato wana balingi ete Biblia esalisa bango. Kasi, lolenge wana ya kosala ezali mabe.

Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete akotindela bango ‘mosungi, elimo santu.’ Abakisaki boye: “Ye nde akoteya bino makambo nyonso mpe akozongisa na makanisi na bino makambo nyonso oyo nayebisaki bino.” (Yoa. 14:26) Nzokande, Biblia ekosalisa biso soki tozali kosalela makambo oyo tosili kotánga, kasi ekosalisa biso te soki tozali kofungola yango bifungolela.

Bato mingi basalaka bongo mpe basalelaka Biblia lokola nde ezali na nguya ya maji. Kasi, Biblia elobi ete ezali mabe kosalela maji mpo na koyeba avenire. (Lev. 19:26; Mib. 18:9-12; Mis. 19:19) “Liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe ezali na nguya,” kasi tosengeli koyeba kosalela yango malamu. Na yango, soki bato bazali na boyebi ya sikisiki ya Biblia, mpe bazali kosalela yango te lokola bikelakela, bomoi na bango ekobonga. Boyebi yango esalisi bato mingi bákóma na bizaleli malamu, bátika bomoi ya mabe, bázala na mabota ya esengo, mpe bázala na boyokani malamu ná Mobandisi ya Biblia.