Koleisa bato ebele na nzela ya bato moke
“Nsima ya kobuka mampa yango, [Yesu] akabolelaki yango bayekoli, bayekoli mpe bakabolelaki ebele ya bato yango.”—MAT. 14:19.
1-3. Lobelá ndenge oyo Yesu aleisaki ebele ya bato pene na Betesaida. (Talá elilingi na ebandeli ya lisolo.)
KANISÁ lisolo oyo ezali na mokapo oyo. (Tángá Matai 14:14-21.) Ezalaki mwa moke liboso ya Elekeli ya mobu 32 T.B. Yesu ná bayekoli na ye bazalaki elongo na bato ebele, mibali soki 5 000, longola basi ná bana mike, na esobe moko pembeni ya Betesaida, mboka moko oyo ezalaki na bokula ya Mbu ya Galile, na ngámbo ya nɔrdi.
2 Ntango Yesu amonaki ebele yango ya bato, ayokelaki bango mawa, yango wana abikisaki baoyo bazalaki kobɛla mpe ateyaki bango makambo mingi oyo etali Bokonzi ya Nzambe. Ntango mpokwa ekómaki, bayekoli basɛngaki Yesu ayebisa bato bázonga mpo bákende na bamboka ya pembeni kosomba mwa biloko na bango ya kolya. Kasi Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Bino bópesa bango eloko ya kolya.” Na ntembe te maloba yango ebulunganisaki bayekoli, mpamba te biloko oyo bazalaki na yango ezalaki moke mpenza: mampa mitano ná mbisi mibale ya mike.
3 Yesu ayokaki mawa mpe asalaki likamwisi moko. Na makamwisi nyonso ya Yesu, yango nde likamwisi oyo Baevanzile nyonso minei elobeli. (Mrk. 6:35-44; Luka 9:10-17; Yoa. 6:1-13) Yesu alobaki na bayekoli na ye báyebisa ebele yango ya bato báfanda na matiti na bituluku ya bato 50 mpe ya bato 100. Nsima ya kobondela, abandaki kobuka mampa mpe kokabola mbisi. Na nsima, na esika apesa bato bilei yango mbala moko, Yesu akabolelaki yango “bayekoli, bayekoli mpe bakabolelaki ebele ya bato yango.” Na likamwisi wana, moto nyonso alyaki, atondaki, mpe bilei mosusu etikalaki! Kanisá naino: Yesu aleisaki bankóto ya bato na nzela ya bato moke—bayekoli na ye. *
4. (a) Yesu azalaki komibanzabanza mingi koleka na oyo etali kopesa bilei ya lolenge nini, mpe mpo na nini? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo, mpe na oyo elandi?
4 Yesu azalaki komibanzabanza mingi koleka na oyo etali kopesa bayekoli na ye bilei ya elimo. Ayebaki ete kolya bilei ya elimo, elingi koloba koyoka solo oyo ezali na Liloba ya Nzambe, ememaka na bomoi ya seko. (Yoa. 6:26, 27; 17:3) Mawa oyo etindaki Yesu aleisa ebele ya bato na mampa mpe mbisi moke, etindaki mpe ye alekisa bangonga ebele na koteya bayekoli na ye. (Mrk. 6:34) Kasi ayebaki ete ntango na ye awa na mabele ekozala mokuse mpe ete akozonga na likoló. (Mat. 16:21; Yoa. 14:12) Ntango akozonga na likoló, ndenge nini Yesu akokoba koleisa bayekoli na ye na elimo awa na mabele? Akosala kaka ndenge asalaki mokolo wana: akoleisa bato ebele na nzela ya bato moke. Kasi, bato moke yango nde banani? Tótalela ndenge Yesu asalelaki bato moke mpo na kopesa bilei ya elimo na ebele ya bayekoli na ye oyo batyamaki mafuta na elimo na siɛklɛ ya liboso. Na nsima, na lisolo oyo elandi, tokotalela motuna oyo ezali na ntina mingi mpo na mokomoko na biso: Ndenge nini tokoki koyeba bato moke oyo na nzela na bango Yesu azali koleisa biso na biso lelo oyo?
YESU APONI BATO MOKE
5, 6. (a) Ekateli nini ya monene Yesu azwaki mpo bayekoli na ye bákoba koleisama malamu na elimo nsima ya liwa na ye? (b) Ndenge nini Yesu abongisaki bantoma na ye mpo na mokumba monene oyo basengelaki kozwa nsima ya liwa na ye?
5 Tata ya malamu azwaka bibongiseli mpo libota na ye ekoba kozala malamu ata nsima ya liwa na ye. Ndenge moko mpe, Yesu, oyo asengelaki kokóma Mokonzi ya lisangá ya bokristo, azwaki bibongiseli mpo bayekoli na ye bákoba koleisama na elimo nsima ya liwa na ye. (Ef. 1:22) Na ndakisa, mbula soki mibale liboso ete akufa, Yesu azwaki ekateli moko ya monene. Aponaki bato ya liboso oyo bakozala na kati ya bato moke oyo na nzela na bango akobanda koleisa bato ebele na nsima. Tótala ndenge asalaki yango.
6 Nsima ya kobondela butu mobimba, Yesu ayanganisaki bayekoli na ye mpe kati na bango, aponaki bantoma 12. (Luka 6:12-16) Na mbula mibale oyo elandaki, azalaki mingimingi elongo na bantoma yango 12, azalaki koteya bango na maloba mpe na misala. Ayebaki ete bazalaki na makambo mingi ya koyekola; kutu, bakobaki kobengama “bayekoli.” (Mat. 11:1; 20:17) Azalaki kopesa mokomoko toli oyo asengeli na yango mpe formasyo ya malamu na mosala ya kosakola. (Mat. 10:1-42; 20:20-23; Luka 8:1; 9:52-55) Emonani ete azalaki kobongisa bango mpo na mokumba monene oyo bakozwa nsima ya liwa na ye mpe kozonga na ye na likoló.
7. Maloba nini ya Yesu emonisi likambo oyo bantoma basengelaki komibanzabanza libosoliboso mpo na yango?
7 Mokumba nini bantoma basengelaki kozwa? Ntango Pantekote ya mobu 33 T.B. ekómaki pene, emonanaki polele ete bantoma bakozwa mokumba ya kokamba lisangá. (Mis. 1:20) Kasi basengelaki komibanzabanza libosoliboso mpo na likambo nini? Nsima ya lisekwa na ye, Yesu amonisaki yango na lisolo moko oyo asololaki na ntoma Petro. (Tángá Yoane 21:1, 2, 15-17.) Na miso ya mwa bantoma mosusu, Yesu ayebisaki Petro boye: “Leisá bampate na ngai ya mike.” Na maloba wana, Yesu amonisaki ete bantoma na ye bakozala na kati ya bato moke oyo na nzela na bango akobanda kopesa bato ebele bilei ya elimo. Yango emonisi ndenge oyo Yesu alingaka mpenza ‘bampate na ye ya mike’! *
KOLEISA BATO EBELE KOBANDA NA PANTEKOTE
8. Ndenge nini bato oyo bakómaki bandimi na Pantekote bamonisaki ete bayebaki malamu nzela oyo Kristo azalaki kosalela?
8 Kobanda na Pantekote ya mobu 33 T.B., Kristo oyo asilaki kosekwa akómaki kosalela bantoma na ye mpo na koleisa bayekoli na ye mosusu nyonso oyo batyamaki mafuta. (Tángá Misala 2:41, 42.) Bayuda mpe baprozelite oyo batyamaki mafuta na elimo mokolo wana ya Pantekote bayebaki malamu ete Yesu azalaki koleisa bango na elimo na nzela ya bantoma. Yango wana “bakobaki komipesa na mateya ya bantoma.” Molimboli moko ya maloba ya Biblia alobi ete vɛrbɛ ya Grɛki oyo babongoli na “bakobaki komipesa” ekoki kolimbola “kokangama makasi mpe kotikala sembo na likambo moko.” Bandimi wana ya sika bazalaki na mposa makasi ya bilei ya elimo, mpe bayebaki malamu epai wapi bakokaki kozwa yango. Na bosembo nyonso, bazalaki kotalela bantoma mpo bálimbwela bango maloba mpe misala ya Yesu mpe básalisa bango báyeba ndimbola ya makomami oyo elobelaki ye. *—Mis. 2:22-36.
9. Ndenge nini bantoma bamonisaki ete babosani te mokumba na bango ya koleisa bampate ya Yesu?
9 Bantoma babosanaki soki moke te mokumba na bango ya koleisa bampate ya Yesu. Na ndakisa, tótalela ndenge basilisaki matata moko oyo ekokaki kokabola lisangá ya sika oyo eutaki kosalema. Likambo ya kokamwa, matata yango ebimaki mpo na biloko ya kolya—bilei ya mosuni. Na ntango bazalaki kokabola bilei ya mokolo na mokolo, bazalaki kobosana basi oyo mibali na bango bakufá, oyo bazalaki koloba monɔkɔ ya Grɛki, kasi bazalaki te kobosana basi oyo mibali na bango bakufá, oyo bazalaki koloba monɔkɔ ya Ebre. Ndenge nini bantoma basilisaki mokakatano wana? “Bantoma zomi na mibale” baponaki bandeko mibali nsambo ya lokumu malamu mpo bákokisa ‘mokumba yango ya ntina’—kokabola bilei. Bantoma, oyo na ntembe te mingi na bango bakabolaki bilei epai ya ebele ya bato oyo Yesu aleisaki na ndenge ya likamwisi, bamonaki ete ezali na ntina mingi koleka ete bango bámipesa nde na koleisa bato na elimo. Na ndenge yango, bamipesaki mobimba “na mosala ya liloba.”—Mis. 6:1-6.
10. Ndenge nini Kristo asalelaki bantoma mpe bankulutu na Yerusaleme?
10 Na mobu 49 T.B., bankulutu mosusu oyo bakokisaki masɛngami basanganaki na bantoma oyo bazalaki naino na bomoi. (Tángá Misala 15:1, 2.) “Bantoma mpe bankulutu na Yerusaleme” basalaki lisangani ya mikóló-bakambi. Kristo, Mokonzi ya lisangá, asalelaki etuluku moke wana ya mibali oyo bakɔmɛli na elimo mpo na kozwa bikateli na makambo oyo etali mateya mpe mpo na kokɛngɛla mpe kotambwisa mosala ya kosakola mpe ya koteya nsango malamu ya Bokonzi.—Mis. 15:6-29; 21:17-19; Kol. 1:18.
11, 12. (a) Nini emonisi ete Yehova apambolaki ebongiseli oyo Mwana na ye azalaki kosalela mpo na koleisa masangá na siɛklɛ ya liboso? (b) Nini esalisaki bato báyeba nzela oyo Kristo azalaki kosalela mpo na koleisa lisangá na elimo?
11 Yehova apambolaki mpenza ebongiseli wana oyo Mwana na ye azalaki kosalela mpo na koleisa masangá na siɛklɛ ya liboso? Ɛɛ! Ndenge nini toyebi yango? Mokanda ya Misala elobi boye: “Nzokande wana [ntoma Paulo ná baninga na ye ya mobembo] bazalaki koleka na bingumba, bazalaki kopesa baoyo bazalaki kuna mitindo oyo bantoma ná bankulutu oyo bazalaki na Yerusaleme bakamataki mpo bátosa yango. Na yango, masangá ekobaki Mis. 16:4, 5) Tomoni ete masangá yango ezalaki kokola na elimo mpo bandeko bazalaki kolanda na bosembo nyonso litambwisi ya lisangani ya mikóló-bakambi oyo ezalaki na Yerusaleme. Yango emonisi polele ete Yehova azalaki kopambola ebongiseli oyo Mwana na ye azalaki kosalela mpo na koleisa masangá. Tóbosana te ete bokoli ya elimo ekoki komonana kaka soki Yehova azali kopambola mosala na biso.—Mas. 10:22; 1 Ko. 3:6, 7.
mpenza kokóma makasi na kondima mpe bato bazalaki kobakisama mokolo na mokolo.” (12 Tomonaki liboso ete mpo na koleisa bayekoli na ye na elimo, Yesu asalaki kaka ndenge asalaki ntango aleisaki bato na ndenge ya likamwisi: Aleisaki bato ebele na nzela ya bato moke. Nzela oyo azalaki kosalela mpo na kopesa bilei ya elimo eyebanaki malamu. Kutu, ezalaki polele ete Yehova azalaki kotambwisa bantoma, bato ya liboso oyo basalaki lisangani ya mikóló-bakambi. Misala 5:12 elobi boye: “Na mabɔkɔ ya bantoma ebele ya bilembo mpe ya makamwisi ya komonisa makambo oyo ekoya ekobaki kosalema na kati ya bato.” * Na yango, baoyo bakómaki bakristo bazalaki na ntina moko te ya komituna ete, ‘Na nzela ya banani mpenza Kristo azali koleisa bampate na ye?’ Kasi, na nsuka ya siɛklɛ ya liboso, makambo ebongwanaki.
NTANGO MATITI MABE EKÓMAKI MINGI KOLEKA BLÉ
13, 14. (a) Yesu asakolaki nini mpo na lisangá ya bokristo, mpe ntango nini maloba na ye ebandaki kokokisama? (b) Banguna oyo bakobundisa lisangá ya bokristo basengelaki kouta na bisika nini mibale? (Talá paragrafe 13 na etanda Mitángo ya mike.)
13 Yesu asakolaki ete banguna bakobundisa lisangá ya bokristo. Tóbosana te, na ndakisa ya blé mpe matiti mabe, Yesu alobaki ete monguna moko akolona matiti mabe (bakristo ya lokuta) na kati ya elanga ya blé oyo elonami sika (bakristo oyo batyami mafuta na elimo). Alobaki ete bakotika ete blé ná matiti mabe ekola esika moko tii na ntango ya kobuka mbuma, oyo esengelaki kozala na “bosukisi ya makambo ya ntango moko boye.” (Mat. 13:24-30, 36-43) Eumelaki te, maloba ya Yesu ebandaki kokokisama. *
14 Lipɛngwi ebandaki komonana mokemoke na lisangá na siɛklɛ ya liboso, kasi bantoma ya sembo ya Yesu bazalaki “kokanga nzela,” elingi koloba kopekisa mateya ya lokuta ekɔta na lisangá mpe ebebisa yango. (2 Tes. 2:3, 6, 7) Kasi, ntango bantoma nyonso basilaki kokufa, lipɛngwi ezwaki misisa mpe ezalaki se kokóma mingi na boumeli ya basiɛklɛ ebele oyo matiti mabe ezalaki kokola na kati ya blé. Lisusu, na ntango wana nyonso, matiti mabe ekómaki ebele mpe blé ezalaki moke. Ezalaki mpenza na ebongiseli moko te oyo na nzela na yango bato bazalaki kozwa bilei ya elimo. Makambo esengelaki kobongwana. Kasi, ntango nini?
BANANI BAKOLEISA BATO NA ELEKO YA KOBUKA MBUMA?
15, 16. Ndenge Bayekoli ya Biblia bamipesaki na koyekola Makomami ebimisaki matomba nini, mpe yango ebimisi motuna nini?
15 Ntango matiti mabe mpe blé ekolaki mpe eleko ya kobuka mbuma ekómaki pembeni, bato mingi bakómaki kosepela makasi na solo ya Biblia. Tóbosana te ete na bambula ya 1870, mwa etuluku ya bato oyo bazalaki mpenza na mposa ya koyeba solo basanganaki mpe bakómaki koyekola Biblia elongo; bakabwanaki na matiti mabe, elingi koloba bakristo ya lokuta ya mangomba ya bokristo, ya minene to ya mikemike. Lokola bazalaki na komikitisa mpe na mposa ya koyeba solo, Bayekoli yango ya Biblia, ndenge bango moko bazalaki komibenga, bazalaki kosala bolukiluki mozindo na Makomami mpe kobondela.—Mat. 11:25.
16 Boyekoli na bango ya Makomami ebimisaki matomba mingi. Basi ná mibali wana ya sembo babimisaki polele mateya ya lokuta mpe bapalanganisaki mateya ya solo; babimisaki mikanda oyo elimbolaka Biblia mpe bakabolaki yango na mokili mobimba. Mikanda na bango esimbaki mitema ya bato mpe esalisaki bato ebele oyo bazalaki na mposa makasi ya koyeba
mateya ya solo. Na yango, motuna monene yango oyo: Bayekoli ya Biblia oyo bazalaki na bambula wana liboso ya 1914, bazalaki nde nzela oyo Kristo alobaki ete akosalela mpo na koleisa bampate na ye? Te. Bazalaki kaka na eleko oyo matiti mabe ná blé ezalaki kokola esika moko, mpe nzela oyo ekobanda kopesa bato bilei ya elimo ebongisamaki naino mpenza te. Ntango ekokaki naino te mpo na kokabola bakristo ya lokuta ná bakristo ya solo oyo bazalaki lokola blé.17. Makambo nini ya ntina ebandaki kosalema na 1914?
17 Ndenge tomonaki yango na lisolo eleki, eleko ya kobuka mbuma ebandaki na 1914. Na mbula yango, makambo ya ntina mingi ebandaki kosalema. Yesu atyamaki Mokonzi na likoló, mpe mikolo ya nsuka ebandaki. (Em. 11:15) Kobanda 1914 tii na ebandeli ya 1919, Yesu ayaki elongo na Tata na ye kotala tempelo ya elimo mpe kopɛtola yango. * (Mal. 3:1-4) Na nsima, kobanda 1919, ntango ya kobanda koyanganisa blé ekokaki. Yango ezalaki nde ntango oyo Kristo asengelaki kobongisa nzela oyo akosalela mpo na kopesa bato bilei ya elimo? Ɛɛ, ntango yango ekokaki!
18. Yesu asakolaki ete akotya nani, mpe motuna nini ya ntina mingi etunamaki ntango mikolo ya nsuka ebandaki?
18 Na esakweli oyo apesaki mpo na ntango ya nsuka, Yesu asakolaki ete akotya “moombo” moko mpo apesaka ‘bilei ya elimo na ntango oyo ebongi.’ (Mat. 24:45-47) Moombo yango nde nani? Kaka ndenge ezalaki na siɛklɛ ya liboso, Yesu asengelaki koleisa bato ebele na nzela ya bato moke. Kasi, ntango mikolo ya nsuka ebandaki, motuna ya ntina mingi ezalaki ete: Banani bakozala bato moke wana? Na lisolo oyo elandi, tokotalela motuna wana mpe mituna mosusu oyo etali esakweli oyo Yesu apesaki.
^ par. 3 Paragrafe 3: Na libaku mosusu, ntango Yesu aleisaki bato 4 000, longola basi ná bana, asalaki kaka bongo, apesaki bilei epai ya “bayekoli, bongo bayekoli mpe bakabolelaki ebele ya bato yango.”—Mat. 15:32-38.
^ par. 7 Paragrafe 7: Ntango Petro azalaki naino na bomoi “bampate ya mike” oyo basengelaki koleisama bazalaki bango nyonso na elikya ya kokende likoló.
^ par. 8 Paragrafe 8: Ndenge bato oyo bakómaki bandimi sika “bakobaki komipesa na mateya ya bantoma” emonisi ete bantoma bazalaki koteya bango mbala na mbala. Mateya mosusu ya bantoma ekomamaki libela na mikanda oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe, oyo ezali lelo na Makomami ya Grɛki ya bokristo.
^ par. 12 Paragrafe 12: Ya solo, longola bantoma, bato mosusu mpe bazwaki likabo ya kosala makamwisi, kasi emonani ete mbala mingi, bato bazalaki kozwa makabo ya kosala makamwisi mbala moko epai ya bantoma to ntango ntoma moko azali wana.—Mis. 8:14-18; 10:44, 45.
^ par. 13 Paragrafe 13: Maloba ya ntoma Paulo oyo ezali na Misala 20:29, 30 emonisi ete banguna oyo bakobundisa lisangá basengelaki kouta na libándá mpe na kati ya lisangá. Liboso, bakristo ya lokuta (“matiti mabe”) basengelaki ‘kokɔta na kati’ ya bakristo ya solo. Ya mibale, bato mosusu oyo bauti “na kati” ya bakristo ya solo basengelaki kokóma bapɛngwi mpe koloba “makambo ya mbilingambilinga.”
^ par. 17 Paragrafe 17: Talá lisolo “Talá! nazali elongo na bino mikolo nyonso,” lokasa 11, paragrafe 6.