Okomipimela makambo mosusu mpo na Bokonzi?
“Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.”—2 KO. 9:7.
1. Bato mingi bamipimelaka makambo nini, mpe mpo na nini?
BATO basepelaka komipimela makambo mosusu mpo na biloko oyo ezali na ntina mingi mpo na bango. Baboti bapesaka ntango, mbongo mpe makasi mpo na bana na bango. Ntango baninga na bango bazali kosakana mpe komisepelisa, basani ya bilenge oyo bazali kokana komonisa elongi ya ekólo na bango na masano ya Olympique balekisaka bangonga mingi mikolo nyonso mpo na komimeka mpe kosala ngalasisi. Yesu mpe amipimelaki makambo mosusu mpo na kosala makambo oyo ezalaki na ntina mingi mpo na ye. Alukaki te kozala na bomɛngo mpe abotaki te. Kutu, makanisi na ye nyonso ezalaki mpo ete matomba ya Bokonzi ekende liboso. (Mat. 4:17; Luka 9:58) Bayekoli na ye mpe bamipimelaki makambo mosusu mpo na Bokonzi ya Nzambe. Kosala ete matomba ya Bokonzi ekende liboso ezalaki likambo ya liboso mpe ya ntina mpo na bango, mpe bamipesaki mpenza mpo na kosakola Bokonzi yango. (Mat. 4:18-22; 19:27) Na yango, tosengeli komituna boye: ‘Eloko nini ezali na ntina mingi na bomoi na ngai?’
2. (a) Bambeka nini ezali na ntina mingi mpo na bakristo nyonso? (b) Bambeka to misala nini mosusu bandeko mosusu bazali kosala?
2 Bambeka mosusu ezali na ntina mingi mpo na bakristo nyonso ya solo mpe ezali na ntina mpo na kokóma mpe kobatela boyokani ya malamu elongo na Yehova. Na bambeka yango, tokoki kotánga: kobomba ntango mpe makasi mpo na kobondela, kotánga Biblia, kosala Losambo na kati ya libota, koyangana na makita mpe kosakola. * (Yos. 1:8; Mat. 28:19, 20; Ebr. 10:24, 25) Mapamboli ya Yehova mpe milende na biso nde ezali kosala ete mosala ya kosakola esalema na lombangu, mpe ebele ya bato bazali kokende na “ngomba ya ndako ya Yehova.” (Yis. 2:2) Mpo na kopesa mabɔkɔ na misala ya Bokonzi, bandeko mingi bazali komipimela makambo mosusu mpo na kosala na Betele, kotonga Bandako ya Bokonzi mpe ya mayangani, kobongisa mayangani to kopesa mabɔkɔ ntango makama ekómeli bandeko. Misala wana nyonso ezali te lisɛngami mpo na kozwa bomoi, kasi ezali na ntina mingi mpo ete matomba ya Bokonzi ekende liboso.
3. (a) Matomba nini tozwaka ntango tomipimelaka makambo mosusu mpo na Bokonzi? (b) Mituna nini tosengeli kotalela?
3 Lelo oyo mposa ya kosala mingi mpo na matomba ya Bokonzi ekómi makasi. Ezali mpenza esengo komona bandeko bazali komipimela makambo mosusu mpo na Yehova! (Tángá Nzembo 54:6.) Elimo wana ya kokaba ememelaka biso esengo wana tozali kozela Bokonzi ya Nzambe. (Mib. 16:15; Mis. 20:35) Na yango, biso nyonso tosengeli komitalela malamumalamu. Ezali na makambo mosusu oyo tosengeli komipimela mpo na Bokonzi? Ndenge nini tosalelaka ntango, mbongo, makasi mpe makoki na biso? Tosengeli kokeba na makambo nini? Tótala ndakisa oyo tokoki kolanda mpo na kopesa bambeka, mpe tómona ndenge yango ekoki kobakisa esengo na biso.
BAMBEKA NA YISRAELE YA KALA
4. Matomba nini Bayisraele bazalaki kozwa ntango bazalaki kopesa bambeka?
4 Na Yisraele ya kala, bato bazalaki kopesa bambeka mpo masumu na bango elimbisama. Bambeka ezalaki na ntina mingi mpo bato bándimama na Yehova. Bambeka mosusu esɛngisamaki mpenza kasi mosusu bato basengelaki kopesa yango na bolingo na bango moko. (Lev. 23:37, 38) Makabo ya kotumba mobimba ekokaki kozala makabo oyo moto asengelaki kopesa Yehova na bolingo na ye moko. Ndakisa moko monene ya makabo yango emonanaki ntango basalaki molulu ya kofungola tempelo na ntango ya Salomo.—2 Nt. 7:4-6.
5. Ebongiseli nini Yehova azwaki mpo na babola?
5 Na bolingo na ye, Yehova ayebaki ete moto nyonso te akoki kopesa makabo ndenge moko, mpe azalaki kosɛnga na moto na moto apesa na kotalela makoki na ye. Mobeko ya Yehova elobaki ete makila ya nyama esengelaki kosopama, yango ezalaki “elili ya makambo malamu oyo ekoya” na nzela ya Mwana na ye, Yesu. (Ebr. 10:1-4) Tomoni mpenza ete Yehova azalaki kotingama te ete bato nyonso básala kaka ndenge mobeko elobi. Na ndakisa, Nzambe azalaki kondima likabo ya bana ya bibenga soki moto azali na likoki te ya kopesa ngɔmbɛ to mpate. Yango wana, ata mobola akokaki na esengo nyonso kopesa Yehova likabo. (Lev. 1:3, 10, 14; 5:7) Atako bambeka ya banyama ezalaki ndenge moko te, kasi ezalaki na makambo mibale oyo esɛngisamaki na moto nyonso oyo azalaki kopesa makabo ya bolingo.
6. Likambo nini esɛngamaki epai ya moto nyonso ntango alingi kopesa bambeka na ye, mpe mpo na nini ezalaki na ntina kokokisa masɛngami yango?
6 Ya liboso, moto yango asengelaki kopesa eloko na ye ya malamu koleka. Yehova ayebisaki Bayisraele ete mbeka nyonso esengelaki kozala ya malamu mpo ‘endimama.’ (Lev. 22:18-20) Soki nyama ezali na mbeba, esengelaki te kondimama mpo na kopesa Yehova mbeka. Ya mibale, moto oyo azalaki kopesa mbeka, asengelaki kozala pɛto mpe na mbindo te. Soki moto azali mbindo, asengelaki kopesa likabo ya lisumu to ya ngambo mpo na kobongisa boyokani na ye ná Yehova liboso apesa mbeka na ye. (Lev. 5:5, 6, 15) Ezalaki likambo ya kozwa na lisɛki te. Yehova alobaki ete soki moto oyo azali mbindo apesi mbeka ya boyokani, oyo esangisaki mpe bambeka oyo bato bazalaki kopesa na bolingo na bango moko, asengeli kolongolama na kati ya bato na ye. (Lev. 7:20, 21) Kasi, soki moto oyo apesi mbeka azali na boyokani malamu ná Yehova mpe likabo na ye ezangi mbeba, moto yango asengelaki mpenza kosepela.—Tángá 1 Ntango 29:9.
NDENGE YA KOPESA BAMBEKA LELO OYO
7, 8. (a) Esengo nini bandeko mingi bayokaka ndenge bamipimelaka makambo mosusu mpo na Bokonzi? (b) Makoki nini tozali na yango?
7 Lelo oyo, bandeko mingi mpe bazali kondima na bolingo na bango moko komipesa mingi na mosala ya Yehova, mpe Yehova asepelaka mingi na likambo yango. Kosalela bandeko na biso ememaka matomba mingi. Ndeko mobali moko oyo asalaka mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi mpe kosalisa baoyo bakutani na makama alobi ete ezali mpasi kolobela esengo oyo azwaka na misala yango. Alobi ete: “Komona esengo mpe botɔndi oyo bandeko bazalaka na yango ntango bafandi na Ndako na bango ya Bokonzi ya sika to ntango basalisi bango ntango bazwaki likama, esalisaka ngai namona ete mosala nyonso oyo esalemaki mpe milende na biso ezalaki mosala ya mpunda te.”
8 Ebongiseli ya Yehova ya mikolo na biso elukaka ntango nyonso mabaku mpo ete mosala ya Yehova ekende liboso. Na mobu 1904, Ndeko Charles Taze Russel akomaki boye: “Nkolo 2 Sa. 24:21-24) Tokoki kosalela malamu makoki oyo tozali na yango?
atyá mokomoko na biso kapita ya ntango na ye, makasi na ye, mbongo na ye, mpe bongo na bongo, mpe mokomoko asengeli koluka kosalela makabo yango na kotalela makoki na ye mpo na nkembo ya Nkolo.” Atako tozwaka mapamboli mingi, kasi esɛngaka biso tómipimela biloko mosusu mpo tópesa Yehova bambeka. (9. Na likambo etali kosalela ntango, etinda nini ya Yesu oyo euti na malako oyo ezali na Luka 10:2-4 tokoki kosalela?
9 Ntango na biso. Esɛngaka ntango mpe milende mingi mpo na kobongola mpe kobimisa mikanda, kotonga bisika ya losambo, kobongisa mayangani, kosalisa bandeko oyo bazwi makama mpe komipesa na ebele ya misala mosusu ya ntina. Na mokolo, tozali kaka na ngonga 24. Yesu apesaki etinda moko oyo ekoki kosalisa. Ntango atindaki bayekoli na ye na elanga, alobaki na bango ete ‘báyambana na moto te na nzela mpo na kopesa ye mbote.’ (Luka 10:2-4) Mpo na nini Yesu apesaki malako ya ndenge wana? Moto moko oyo alimbolaka maloba ya Biblia alobi ete: “Biso ná bato ya Azia tozalaki kopesa mbote ndenge moko te. Biso tozalaki kokitisa moke motó, to kopesa lobɔkɔ; kasi mingi na bango bazalaki koyambana, kokitisa mpenza motó, ata mpe kofukama tii na nse. Makambo wana nyonso ezalaki kozwa ntango mingi.” Yesu azalaki te kolendisa bayekoli na ye bázala makambo makasi. Kasi, asalisaki nde bango bámona ete lokola bazali na ntango mingi te, basengeli kosalela yango mpo na makambo oyo eleki ntina. (Ef. 5:16) Tokoki kosalela etinda yango mpo tózala na ntango mingi ya kopesa mabɔkɔ mpo na matomba ya Bokonzi?
10, 11. (a) Wapi mwa makambo oyo basalelaka na yango makabo oyo topesaka mpo na mosala ya mokili mobimba? (b) Etinda nini oyo ezali na 1 Bakorinti 16:1, 2 ekoki kosalisa biso?
10 Mbongo na biso. Esɛngaka mbongo mingi mpo misala ya Bokonzi esalema. Mbula na mbula, bamilio ya dolare ebimaka mpo na kokokisa bamposa ya bakɛngɛli batamboli, babongisi-nzela minene mpe bamisionɛrɛ. Kobanda na 1999, Bandako ya Bokonzi koleka 24 500 etongami na mikili oyo ezali na bozwi mingi te. Kasi, esengeli lisusu kotonga Bandako ya Bokonzi soki 6 400. Sanza na sanza, bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! soki milio 100 ezali kobimisama. Makabo ya bolingo malamu oyo opesaka nde esalaka ete makambo oyo nyonso esalema.
11 Ntoma Paulo apesaki etinda moko oyo tosengeli kolanda mpo na kopesa makabo. (Tángá 1 Bakorinti 16:1, 2.) Na lisalisi ya elimo santu, alendisaki bandeko ya Korinti ete bazela te tii nsuka ya pɔsɔ mpo na koyeba soki mbongo boni etikali, kasi babombaka nde mwa eloko na ebandeli ya pɔsɔ na kotalela oyo bakoki kosala. Ndenge moko na siɛklɛ ya liboso, na eleko na biso, bandeko babongisaka mwa eloko liboso mpo na kopesa makabo na kotalela makoki ya moto na moto. (Luka 21:1-4; Mis. 4:32-35) Yehova asepelaka mpenza na elimo wana ya bokabi.
12, 13. Makambo nini ekoki kosala ete basusu báboya kosalela makasi mpe makoki na bango, kasi ndenge nini Yehova akoki kosalisa bango?
12 Makasi mpe makoki na biso. Yehova asungaka biso na milende oyo tosalaka mpo na kosalela makasi mpe makoki na biso mpo na Bokonzi. Alaki ete akosalisa biso soki tolɛmbi. (Yis. 40:29-31) Tomonaka ete tozali mpenza te na makoki mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala? Tokanisaka ete basusu nde bazali na makoki koleka biso? Kobosana te ete Yehova akoki kokolisa makoki ya moto nyonso, ndenge kaka asalaki mpo na Bezalele mpe Oholiabe.—Kob. 31:1-6; talá elilingi ya ebandeli.
13 Yehova alendisaka biso ete tópesa oyo ezali malamu mpe tóboya te. (Mas. 3:27) Ntango bazalaki kotonga lisusu tempelo, Yehova alobaki na Bayuda na Yerusaleme ete bákanisa malamumalamu na oyo bazalaki kosala mpo na mosala ya kotonga. (Hag. 1:2-5) Makanisi na bango ezalaki lisusu te na mosala mpe babosanaki mokano na bango. Ekozala malamu tótala soki mikano na biso eyokani ná oyo ya Yehova. Tokoki ‘kotya mitema na biso na banzela na biso’ mpo tózala na mingi ya kosala na mosala ya Bokonzi na mikolo oyo ya nsuka?
KOPESA MAKABO NA KOTALELA MAKOKI NA BISO
14, 15. (a) Ndakisa ya bandeko na biso oyo bazali na bozwi mingi te elendisi biso na nini? (b) Mposa na biso esengeli kozala nini?
14 Bato mingi bazali kofanda na mikili oyo mikakatano to bobola ezali mpenza komonisa bato bwale. Ebongiseli ya Yehova ezali kosala makasi mpo na “kozipa” kozanga ya bandeko na biso oyo bazali na mikili yango. (2 Ko. 8:14) Atako bongo, bandeko oyo bazali na mikili ya bobola basepelaka mpe kopesa makabo. Yehova asepelaka mingi ntango bandeko oyo bazali na bozwi mingi te bazali kopesa na esengo mpenza.—2 Ko. 9:7.
15 Na ekólo moko ya bobola mpenza na Afrika, bandeko mosusu babombaka mwa eteni moko ya elanga na bango ya ndunda, batɛkaka yango mpe batindaka mbongo ya mwa eteni yango mpo na kosunga mosala ya Bokonzi. Kaka na ekólo yango, programɛ esalemaki mpo na kotonga Ndako ya Bokonzi. Bandeko ya ekólo yango bazalaki na mposa ya kopesa mabɔkɔ. Kasi, basengelaki kobanda kotonga Ndako yango na katikati ya eleko oyo balonaka bilanga. Lokola bazalaki na ekateli ya kopesa mabɔkɔ, bazalaki kosala mosala ya kotonga Ndako yango na moi, mpe na mpokwa bazalaki kokende kolona bilanga na bango. Bandeko yango bamonisaki mpenza elimo ya komipimela! Likambo yango esalisi biso tókanisa oyo bandeko ya siɛklɛ ya liboso basalaki na Masedonia. ‘Bobola na bango ezalaki makasi,’ atako bongo basɛngaki ete bapesa lisungi na mosala oyo esengelaki kosalema. (2 Ko. 8:1-4) Moto na moto na kati na biso asengeli mpe ‘kopesa na kokokana na lipamboli oyo Yehova apesi ye.’—Tángá Kolimbola Mibeko 16:17.
16. Ndenge nini tokoki koyeba mpenza ete Yehova andimi makabo na biso?
16 Kasi, tosengeli kokeba. Ndenge ezalaki na Yisraele ya kala, tosengeli kondimisama ete Nzambe azali kondima makabo na biso. Tosengeli kozala na bokatikati mpo tókokisa mokumba na biso ya libosoliboso oyo etali mabota na biso mpe losambo na biso epai ya Yehova. Kopesa ntango mpe biloko na biso mpo na bolamu ya basusu, esengeli te kotinda biso kozwa na lisɛki matomba ya elimo mpe ya mosuni ya libota na biso. Soki tosali bongo, ekozala lokola tozali kopesa eloko oyo tozali na yango te. (Tángá 2 Bakorinti 8:12.) Lisusu, biso moko tosengeli kobatela boyokani malamu ná Yehova. (1 Ko. 9:26, 27) Kasi, tóbosana te ete soki tozali kotosa makambo oyo Biblia elobaka, makabo na biso ekopesa biso esengo mingi mpe ekosepelisa biso, mpe “ekondimama mingi mpenza” epai ya Yehova.
MAKABO NA BISO EZALI NA MOTUYA MINGI
17, 18. Tomiyokaka ndenge nini ntango tozali komona ndenge bandeko mosusu bamipimelaka makambo mosusu mpo na matomba ya Bokonzi, mpe biso nyonso tosengeli kotalela likambo nini?
17 Bandeko na biso mingi ‘bazali komipesa bango moko lokola makabo ya masanga’ na nzela ya mosala oyo bazali kosala mpo na kopesa mabɔkɔ na misala ya Bokonzi. (Flp. 2:17) Tozali mpenza na botɔndi mpo na bandeko oyo bazali komonisa elimo ya bokabi ndenge wana. Basi mpe bana ya bandeko mibali oyo bazali komipesa mpo na misala ya Bokonzi babongi mpe kozwa mpenza longonya mpo na elimo na bango ya bokabi mpe ya komipimela.
18 Mosala ezali naino mingi mpo matomba ya Bokonzi ekende liboso. Moko na moko na biso asengeli kotalela na libondeli ndenge akoki kosala lisusu mingi. Okoki kozala na elikya ete okozwa mapamboli mingi banda sikoyo mpe ekozala beboo “na ntango oyo ezali koya.”—Mrk. 10:28-30.
^ par. 2 Talá lisolo “Tópesaka Yehova bambeka na molimo mobimba,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/01/2012, nkasa 21-25.