Kaina azwaki mwasi na ye wapi?
Mituna ya batángi . . .
Kaina azwaki mwasi na ye wapi?
▪ “Soki Adama ná Eva bazalaki na bana mibale ya mibali, Kaina ná Abele, mwasi ya Kaina autaki wapi?” Atako mbala mingi bato oyo bandimaka Biblia te, batunaka motuna yango mpo na kotyela biso motambo, Biblia emonisi makambo oyo ekoki kosalisa biso tópesa eyano oyo ebongi.
Ebandeli mokapo 3 mpe 4 emonisi makambo oyo: (1) Eva azalaki “mama ya moto nyonso oyo azali na bomoi.” (2) Longwa na kobotama ya Kaina tii ntango apesaki mbeka oyo Nzambe aboyaki, bambula mingi elekaki. (3) Nsima ya etumbu na ye ya kokóma “koyengayenga mpe kokimakima,” Kaina amitungisaki ete ‘moto oyo akomona ye’ akoki koluka koboma ye. (4) Nzambe atyelaki Kaina elembo mpo na kobatela ye, yango emonisi ete ezala bandeko na ye to bato mosusu ya libota na bango bakokaki koluka koboma ye. (5) “Na nsima,” Kaina asangisaki nzoto na mwasi na ye na “mokili ya moto oyo akimá.”—Ebandeli 3:20; 4:3, 12, 14-17.
Na kotalela makambo oyo touti kolobela, tokoki koloba ete mwasi ya Kaina azalaki moko ya bakitani ya Eva oyo abotamaki na eleko moko oyo eyebani te. Ebandeli 5:4 emonisi ete na boumeli ya bambula 930 ya bomoi ya Adama “abotaki bana mibali mpe bana basi.” Ya solo, Biblia emonisi na bosikisiki te soki mwasi ya Kaina azalaki mwana ya Eva. Kasi, lokola balobeli ye nsima ya etumbu ya Kaina, yango emonisi ete bambula elekaki mingi, mpe akokaki kozala moko ya bankɔkɔ ya Adama ná Eva. Yango wana, buku moko (The Amplified Old Testament) emonisi ete mwasi ya Kaina azalaki kaka “moko ya bakitani ya Adama.”
Adam Clarke, moto moko ya mayele na makambo ya Biblia na ekeke ya 19, alobaki ete soki Nzambe atyelaki Kaina elembo, ezalaki mpo bakitani ya Adama basilaki kokóma ebele—likoki ezalaki “mpo na kosala bamboka mingi.”
Ata soki Kaina abalaki leki na ye mpenza ya mwasi to mokitani mosusu ya Adama oyo abotamaki na nzela ya libala ya bana mibale ya Adama, bato mingi bamonaka yango lelo oyo ete ekoki kosalema te. Yango ezali mpo bato ya lelo bamonaka yango likambo ya nsɔni mpe babangaka makama oyo ekoki kobima mpo na bana oyo bakobotama. Nzokande, na buku na ye (The Narrated Bible in Chronological Order) LaGard Smith, alobi boye: “Ekoki kozala ete bana ya mibali babalaki bandeko na bango ya basi, atako na mabota mosusu oyo elandaki na nsima ekokaki komonana mabe ete bandeko bábalana.” Lisusu, tósimba ete kaka nsima ya ntango oyo Moize azwaki Mibeko ya Nzambe mpo na ekólo Yisraele na mobu 1513 liboso ya ntango na biso, nde Nzambe apekisaki likambo ya kosangisa nzoto kati na bandeko.—Balevi 18:9, 17, 24.
Lelo oyo, tozali mpenza mosika na nzoto ya kokoka oyo baboti na biso bazalaki na yango liboso. Ekoki kozala ete makama oyo mwana akoki kozwa na libala ya bandeko na ntango wana ezalaki mpenza te. Lisusu, bolukiluki oyo euti kosalema, na ndakisa oyo elobelami na zulunalo moko (Journal of Genetic Counseling), emonisi ete libala kati na bandeko ya mosika ezalaka na makama mingi te mpo na bana oyo bakobotama, ndenge bato mingi bakanisaka. Na ntembe te, na boumeli ya bomoi ya Adama ata mpe liboso ya eleko ya Noa, bato bazalaki mpenza komitungisa te mpo na likambo yango. Yango wana, tokoki koloba ete mwasi ya Kaina azalaki kaka moko ya bandeko na ye.