Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Libondeli​—Ekoki kosalisa?

Libondeli​—Ekoki kosalisa?

KOBONDELA esalisaka biso? Biblia emonisi ete ezali bongo, mabondeli ya basaleli ya sembo ya Nzambe ememelaka bango mpenza matomba. (Luka 22:40; Yakobo 5:13) Kutu, kobondela ekoki kosala ete tózala malamu na elimo, na makanisi, ata mpe na nzoto. Ndenge nini?

Tózwa ndakisa moko, bakabeli mwana na yo eloko. Okoteya ye ete asepela kaka na motema? To okolakisa ye ete aloba mpo na komonisa ete asepeli? Ntango tolobi ndenge oyo tozali koyoka na motema, tokotyela makambo yango likebi mpe ekokóma na ntina mingi. Ezali mpe bongo na oyo etali kosolola na Nzambe? Ɛɛ! Tótalela mwa bandakisa.

Mabondeli ya kopesa mersi. Ntango topesi Tata na biso ya likoló mersi mpo na makambo kitoko oyo asaleli biso, tokotya likebi na mapamboli oyo tozwi. Mpo na yango, tokozala na botɔndi mingi lisusu, tokozala na esengo mingi, mpe tokozala na elikya.​—Bafilipi 4:6.

Ndakisa: Yesu amonisaki bɔtɔndi mpo na ndenge Tata na ye ayokaki mpe ayanolaki na mabondeli na ye.​—Yoane 11:41.

Mabondeli mpo na kosɛnga bolimbisi. Ntango tobondeli Nzambe mpo na kosɛnga bolimbisi, lisosoli na biso ekómaka malamu, tomonisaka mpenza ete tobongoli motema, mpe toyebaka mpenza ete lisumu ezali likambo ya lisɛki te. Tobɔndisamaka mpe na ndenge tomonaka ete tozwi kimya na motema.

Ndakisa: Davidi abondelaki mpo na komonisa ete abongoli motema mpe ayoki mawa.​—Nzembo 51.

Mabondeli mpo na koluka litambwisi mpe bwanya. Kosɛnga Yehova atambwisa to apesa biso bwanya oyo tozali na yango mposa mpo na kozwa bikateli ya malamu ekoki kosalisa biso tózala na komikitisa ya solosolo. Ekoki kosalisa biso tóyeba bandelo na biso mpe kosalisa biso tótyelaka Tata na biso ya likoló motema.​—Masese 3:5, 6.

Ndakisa: Na komikitisa nyonso, Salomo asɛngaki litambwisi mpe bwanya mpo na kokamba Yisraele.​—1 Bakonzi 3:5-12.

Mabondeli na ntango ya mpasi. Soki tofungoleli Yehova motema na biso ntango totungisami na makanisi, tokozwa kimya ya motema mpe tokotyela Yehova motema na esika ya komityela motema.​—Nzembo 62:8.

Ndakisa: Mokonzi Asa abondelaki ntango banguna bayaki kobundisa bango.​—2 Ntango 14:11.

Mabondeli mpo na baoyo bazali na bosɛnga. Mabondeli ya ndenge wana esalisaka biso tólonga ezaleli ya moimi mpe tókóma koyokela bato mawa mpe komitya na esika na bango.

Ndakisa: Yesu abondelaki mpo na bayekoli na ye.​—Yoane 17:9-17.

Mabondeli ya masanzoli. Ntango tozali kosanzola Yehova mpo na misala na ye ya kokamwa mpe bizaleli na ye, tokokóma na limemya makasi mpo na ye mpe tokosepela na ye mingi lisusu. Mabondeli ya ndenge wana ekoki mpe kosalisa biso tópusana penepene na Nzambe mpe Tata na biso.

Ndakisa: Na esengo nyonso, Davidi asanzolaki Nzambe mpo na biloko oyo akelá.​—Nzembo 8.

Lipamboli mosusu oyo ezwamaka na nzela ya libondeli ezali “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso.” (Bafilipi 4:7) Kozala na kimya na mokili oyo mabe ezali mpenza lipamboli oyo bato mingi bazalaka na yango te. Esalaka kutu ete moto azala nzoto kolɔngɔnɔ. (Masese 14:30) Kasi, tozwaka kimya yango kaka na milende na biso moko? To esɛngaka likambo mosusu?

Libondeli ememaka matomba mingi​—na nzoto, na motema mpe koleka nyonso na elimo