Mituna ya batángi . . .
Batatoli ya Yehova bazalaka na basi oyo bateyaka?
Ɛɛ, na mokili mobimba Batatoli ya Yehova bazali na bamilio ya basi oyo bateyaka. Basi yango, oyo basakolaka nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe, bazali mpenza ebele. Esakweli moko oyo ezali na Nzembo 68:11 elobi boye mpo na bango: “Yehova ye moko azali kobimisa liloba; basi oyo bazali koyebisa nsango malamu bazali limpinga moko monene.”
Kasi, kokanisa te ete mosala oyo basi oyo bazali Batatoli ya Yehova basalaka ekokani na oyo ya basi oyo bazali bakonzi na mangomba. Ezali na makambo mingi oyo ekesenisi bango. Makambo yango nini?
Bato oyo bango bateyaka bazali ndenge moko te. Basi oyo bazali bakonzi na mangomba, mingimingi na mangomba ya bokristo, bazalaka na mikumba na kati ya mangomba na bango, mpe bato oyo bango bateyaka bazali nde bandimi ya mangomba na bango. Nzokande, basi oyo bateyaka epai ya Batatoli ya Yehova, bateyaka nde bato oyo bazali libándá ya lisangá na bango, elingi koloba bato oyo bakutanaka na bango na mosala na bango ya kosakola ndako na ndako mpe na bisika mosusu.
Likambo mosusu oyo ekesenisi basi Batatoli ya Yehova oyo bateyaka ná basi ya mangomba mosusu ezali mosala na bango na kati ya lisangá. Basi oyo bazali bakonzi na mangomba ya bokristo mpe na mangomba mosusu bakambaka mpe bateyaka bandimi na bango mateya ya lingomba na bango. Nzokande, basi Batatoli ya Yehova oyo bateyaka, bateyaka te na kati ya lisangá soki mibali oyo bazwá batisimo bazali wana. Kaka mibali oyo baponamá mpo na koteya nde bateyaka na kati ya lisangá.—1 Timote 3:2; Yakobo 3:1.
Biblia emonisi ete kaka mibali nde bazwaka mokumba ya kozala bakɛngɛli na lisangá. Talá malako oyo ntoma Paulo apesaki ntango akomelaki Tito, oyo azalaki mpe mokɛngɛli lokola ye: “Natikaki yo na Krɛtɛ mpo na ntina oyo: . . . otya bankulutu [mibali oyo bakɔmɛli] na engumba mokomoko.” Paulo abakisaki ete mobali mokomoko oyo bapesi mokumba yango asengelaki kozala “mobali oyo afundami na likambo ata moko te, mobali ya mwasi kaka moko.” (Tito 1:5, 6) Paulo apesaki mpe malako ya ndenge wana epai ya Timote na mokanda oyo atindelaki ye mpo na ndenge ya kotambwisa lisangá; alobaki boye: “Soki moto azali koluka kosala mosala ya mokɛngɛli, azali na mposa ya mosala moko ya malamu mingi. Yango wana, mokɛngɛli asengeli kozala moto oyo azali na likambo te ya kofundama na yango, mobali ya mwasi kaka moko, . . . moto oyo ayebi koteya.”—1 Timote 3:1, 2.
Mpo na nini mokumba ya mokɛngɛli na lisangá epesami kaka na mibali? Paulo alobi boye: “Nazali kopesa mwasi nzela ya koteya te, to ya kozala na bokonzi likoló ya mobali te, kasi nde ya kofanda nyɛɛ. Mpo Adama asalemaki liboso, Eva na nsima.” (1 Timote 2:12, 13) Na yango, soki Nzambe apesaki mobali mokumba ya koteya mpe kozala mokɛngɛli na lisangá ezali mpo akelaki ye liboso ya kokela mwasi.
Batatoli ya Yehova balandaka ndakisa ya mokambi na bango, Yesu Kristo. Luka akomaki boye na ntina na mosala ya Yesu: “Abandaki kotambola engumba na engumba mpe mboka na mboka, mpo na koteya mpe kosakola nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe.” Na nsima, Yesu atindaki bayekoli básala mpe mosala yango: “Basimbaki nzela bakatisi teritware yango, baleki mboka na mboka, basakoli nsango malamu.”—Luka 8:1; 9:2-6.
Lelo oyo, Batatoli ya Yehova, basi to mibali bamipesaka mpenza na kokokisa maloba oyo Yesu alobaki ete: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso; bongo nsuka ekoya.”—Matai 24:14.