Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Sikoyo nayebi Nzambe oyo nasambelaka

Sikoyo nayebi Nzambe oyo nasambelaka

Pastɛrɛ moko ya lingomba ya Pantekote oyo bato bazalaki koloba ete azali na nguya ya kobikisa bato ayaki kotala biso. Ntango asimbaki ngai, nakweaki mpe nazalaki komiyeba lisusu te, “nazwaki elimo.” Ntango nalamukaki, namonaki lokola nazwi eloko oyo nazalaki koluka: nguya ya kobikisa bato. Ndenge nini likambo yango ekómelaki ngai mpe yango esalaki nini na bomoi na ngai? Liboso nayebisa bino yango, tiká nalimbolela bino ndenge oyo nakolaki.

NABOTAMAKI na Ilocos Norte, na ekólo Philippines, na mokolo ya 10 Desɛmbɛ 1968. Na libota na biso tozalaki bana zomi; ngai nazalaki mwana ya nsambo. Lokola bato mingi ya ekólo yango, tokolaki na lingomba ya Katolike. Nazwaki diplome na eteyelo ya ntei na mobu 1986 mpe nazalaki na mokano ya kokóma lifulume. Kasi, mokano yango ekokisamaki te mpo nabɛlaki makasi. Kutu, nakanisaki ete nakokufa. Lokola nazalaki lisusu na elikya te, nabondelaki Nzambe asalisa ngai mpe nayebisaki ye ete soki nabiki nakosalela ye bomoi na ngai mobimba.

Nsima ya ntango molai, nayokaki malamu mpe nakanisaki lisusu likambo oyo nalakaki Nzambe. Yango wana, na sanza ya Yuni 1991, nakɔtaki na eteyelo moko ya Biblia ya lingomba ya Pantekote. Na programɛ ya mateya ya eteyelo yango, bazalaki mpe koteya ndenge ya kozwa “likabo ya ofele ya elimo santu.” Nazalaki na mposa ya kozwa nguya ya kobikisa bato. Eteyelo yango eteyaki biso ete mpo na kozwa nguya yango, esengelaki kokila bilei mpe kobondela. Lokola nazalaki na mposa bato bámona ete nazwi “likabo,” mokolo moko nabombanaki mpo na koyoka ndenge moninga na ngai moko azalaki kobondela mwa pembeni na mongongo makasi, na ngonga ya mabondeli. Ntango alingaki kosilisa, nazongaki nokinoki na esika oyo nafukamaki. Na nsima, nayebisaki ye makambo nyonso oyo autaki koloba na libondeli mpe andimaki ete nazwi “likabo ya ofele!”

Ntango nazalaki kokoba kelasi, nazalaki komituna mituna mingi. Na ndakisa, Matai 6:9 elobeli “Tata” mpe “nkombo” na ye. Nazalaki komituna boye: “Tata oyo Yesu alobeli azali nani?” mpe “nkombo nini esengeli kosantisama?” Biyano oyo balakisi na ngai bazalaki kopesa ezalaki ya malonga te mpe ezalaki kondimisa ngai te. Bazalaki kolobela Bosato mpe bazalaki koloba ete ezali libombami. Yango ezalaki kotya ngai mobulu na motó. Atako bongo, nakobaki kaka koyekola mpo nakóma pastɛrɛ.

Ndenge oyo nayebaki Batatoli ya Yehova

Na eteyelo ya Biblia, bateyaki biso ete Batatoli ya Yehova bazali na lingomba moko ya lokuta mpenza. Bazalaki mpe koloba ete bandimelaka Yesu te. Nakómaki koyina lingomba yango makasi.

Ntango nakómaki na mbula ya mibale na eteyelo yango, nakendaki epai na biso mpo na kotala baboti na ngai ntango tozwaki konje. Carmen, yaya na ngai moko ya mwasi, ayokaki ete nayaki na ndako, yango wana ye mpe ayaki na ndako. Asilaki kozwa batisimo mpe kokóma Motatoli ya Yehova, mpe azalaki kolekisa ngonga mingi na mosala ya kosakola. Ntango amekaki koteya ngai makambo ya Nzambe, na nkanda nyonso, nayebisaki ye boye: “Nasí nayebi Nzambe oyo nasalelaka!” Nsima ya kofinga ye na mongongo makasi, natindikaki ye mpe napesaki ye libaku mosusu te ya kosolola ná ngai.

Ntango nazongaki na eteyelo ya Biblia, Carmen atindelaki ngai mwa buku Osengeli kondima Trinité? * Ntango kaka nazwaki yango, nafinaki yango mpe nabwakaki yango na mɔtɔ. Nazalaki kaka na nkanda na ye.

Ndenge oyo nakómaki pastɛrɛ

Ntango nazwaki diplome mpe nakómaki pastɛrɛ

Ntango nazalaki naino na eteyelo ya Biblia, nazalaki mpe kokómisa bato mosusu bandimi. Nasepelaki mingi mpenza ntango mama na ngai ná yaya na ngai ya mobali bakómaki bandimi ya lingomba na ngai ya Pantekote.

Na Marsi 1994, nazwaki diplome na eteyelo ya Biblia ya lingomba ya Pantekote. Ndenge nalobaki yango na ebandeli ya lisolo oyo, pastɛrɛ moko oyo ayaki kotala biso, azalaki mpe wana. Biso nyonso oyo tozwaki diplome, tozalaki kolinga kozala elongo na ye mpo tozalaki kondima ete azalaki na likabo ya kobikisa bato. Tolandaki ye na estrade, tozalaki kopumbwapumbwa mpe kobɛta mabɔkɔ elongo na ye. Na nsima, moto nyonso oyo azalaki kosimba ye, azalaki kokwea mpe “kozwa elimo.” * Ntango asimbaki ngai, nakweaki mpe nazalaki komiyeba lisusu te. Ntango nalamukaki, nazalaki kobanga, kasi, nayokaki lokola nazwi nguya ya kobikisa bato, yango wana nasepelaki.

Mwa moke na nsima, nasalelaki nguya yango mpo na kobikisa mwana moko ya moke oyo azalaki na fiɛvrɛ makasi. Ntango nabondelaki, mbala moko mwana yango abandaki kobimisa motoki mpe fiɛvrɛ esilaki. Namonaki ete sikoyo nakokokisa elaka oyo nasalelaki Nzambe. Kasi, likambo ya kokamwa, nazalaki koyoka lokola nazangi eloko moko. Na motema na ngai, nazalaki kondima ete Nzambe azalaka kaka moko, kasi, nayebaki mpenza te soki azali nani. Nazalaki na ntembe mpo na mateya mingi ya lingomba yango.

Nasalelaki nguya yango mpo na kobikisa mwana moko ya moke oyo azalaki na fiɛvrɛ makasi

Makambo oyo ebongolaki makanisi na ngai

Nsima ya makambo wana, nakómaki koyina Batatoli ya Yehova lisusu mingi koleka. Soki nazwi mikanda na bango, nazalaki kotumba yango. Na nsima, likambo moko oyo nazalaki kokanisa te esalemaki. Esalaki ngai mpasi ndenge mama azalaki kolinga lisusu te lingomba na biso. Carmen akómaki koyekola na ye Biblia! Nayokelaki Carmen nkanda makasi.

Na nsima, nakutaki Lamuká! moko na ndako ya mama. Nasengelaki kotumba yango. Kasi, lokola nazalaki na mposa ya koyeba makambo nini azalaki kotánga, nafungolaki yango mpo natala. Miso na ngai ekweaki na lisolo ya moto moko oyo azalaki kokangama makasi na mateya ya lingomba na ye. Kasi, ntango abandaki kotánga mikanda ya Batatoli ya Yehova mpe Biblia, andimaki mpenza ete mateya lokola Bosato, lifelo ya mɔtɔ, mpe molimo ekufaka te, euti na Biblia te. Lisolo yango esimbaki mpenza motema na ngai. Yango nde makambo oyo nazalaki mpenza koluka koyeba. Banda mokolo wana, nakómaki na mposa ya koyeba mpenza solo oyo ezali na Biblia.

Nsima ya kotánga lisolo mosusu ya bomoi na Lamuka! ya moto moko oyo azalaki moombo ya masanga mpe ya bangi, kasi abongwanaki mpo ayekolaki Biblia, nakómaki kotánga mikanda mingi ya Batatoli ya Yehova. Namonaki mwa buku Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko. * Ntango natángaki yango, nayebaki ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova. Nayokaki esengo mingi ndenge nayebaki solo oyo etali Nzambe kaka moko ya solo!​—Kolimbola Mibeko 4:39; Yirimia 10:10.

Nayokaki esengo mingi ndenge nayebaki solo oyo etali Nzambe kaka moko ya solo!

Nakómaki kotánga yango na kobombana mpe nayekolaki makambo mingi ya solo ya Biblia. Na ndakisa, na eteyelo ya lingomba ya Pantekote, bateyaki ngai ete Yesu azali Nzambe, kasi, nayekolaki na Biblia ete Yesu azali “Mwana ya Nzambe ya bomoi.”​—Matai 16:15, 16.

Nabongoli motema

Ntango nakutanaki lisusu ná Carmen, akamwaki ntango nasɛngaki ye mwa buku Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko mpe mikanda mosusu. Nalekisaki bambula mingi na eteyelo wana ya Biblia, kasi bateyaki ngai solo te; nazalaki lokola moto oyo akufá miso. Kobanda na ntango wana, motema na ngai etondaki na esengo mpo na mateya ya solo oyo nazalaki koyekola na Biblia. Namonaki mpenza ete maloba oyo ya Yesu ezali solo: “Bokoyeba solo, mpe solo ekopesa bino bonsomi.” (Yoane 8:32) Mateya wana ya solo ebandaki kobongola bomoi na ngai.

Mateya wana ya solo ebandaki kobongola bomoi na ngai

Mpo na mwa ntango, nakanisaki ete nakoki kosambela Yehova Nzambe na kobombana mpe kokoba mosala na ngai ya pastɛrɛ. Kasi, eumelaki te, namonaki ete nakokoka lisusu te koteya mateya mingi ya lingomba na ngai. Atako bongo, nazalaki kobanga. Nazalaki komituna boye: Nakozwa mbongo ya kobikela wapi soki natiki mosala ya pastɛrɛ? Ekozala mpenza nsɔni mpo na lingomba soki moko ya bapastɛrɛ na yango akómi Motatoli ya Yehova! Yango wana, nakobaki koteya lokola pastɛrɛ, kasi nazalaki kolinga te koteya mateya ya lokuta ya lingomba na ngai.

Precious ayekolaki ná ngai Biblia

Ntango nakutanaki lisusu ná Carmen, alendisaki ngai nayangana na makita ya Batatoli ya Yehova. Lokola nazalaki kokende mingi na lingomba na biso ya monene na engumba Laoag, nakómaki koluka na ndenge ya kobombana Ndako ya Bokonzi, epai Batatoli ya Yehova bayanganaka. Balakisaki ngai Alma Priciosa Vallarin, oyo bazalaki mpe kobenga “Precious.” Ndeko mwasi yango azalaki kolekisa ngonga mingi na mosala ya kosakola mpe azalaki na lisangá yango. Atako nazalaki kaka kokanisela Batatoli ya Yehova mabe, nandimaki ntango asɛngaki ngai nayekola Biblia elongo na ye.

Carmen amoniselaki ngai motema molai ntango azalaki koteya ngai solo ya Biblia. Precious mpe amoniselaki ngai motema molai ndenge wana. Asalisaki ngai mingi mpo náyeba Biblia malamu, atako nazalaki kosilika, koluka koswanisa ye, mpe kotombola mongongo mpo na kolongisa mateya mosusu oyo bateyaki ngai kala. Ndenge oyo Precious mpe Batatoli ya Yehova mosusu bazalaki kotyela ngai likebi, komonisela ngai boboto mpe komikitisa, esimbaki motema na ngai. Yango etindaki ngai nandima kosambela Yehova.

Na Yuli 1995, namonaki ete soki nalingi kosepelisa Nzambe, nasengeli kotika mosala na ngai ya pastɛrɛ. Mpo na nini? Emoniseli 18:4 elobeli lingomba ya lokuta na maloba oyo ya elilingi: “Bóbima kati na ye, bato na ngai, soki bolingi te kosangana na ye na masumu na ye, mpe soki bolingi te kozwa ndambo ya malɔzi na ye.” Kasi, nakozwa mbongo ya kobikela wapi? Baebre 13:5 eteyaki ngai ete soki tozali kosala mokano ya Nzambe, ye alaki biso boye: “Nakotika yo soki moke te mpe nakosundola yo ata moke te.”

Ntango ngai ná mama tozwaki batisimo

Atako tata na ngai mpe yaya na ngai ya mobali batɛmɛlaki ngai makasi, pɔsɔ mibale liboso nazwa batisimo mpo na kokóma Motatoli ya Yehova, nazwaki mpiko ya kokende na ndako mpo na kotumba biloko nyonso oyo nazalaki kosalela na mosala na ngai ya pastɛrɛ. Nsima ya kosala yango, namonaki ete nguya oyo bapesaki ngai elongwaki na nzoto na ngai. Liboso, soki nalali, nazalaki koyoka lokola eloko moko ezali kofinafina ngai ntango nyonso. Nyonso wana esilaki. Elili oyo nazalaki komona ntango nyonso na fenetre ya shambrɛ na ngai ezalaki kobima lisusu te. Boyekoli na ngai ya Biblia eteyaki ngai ete nyonso oyo babengaka lelo “likabo,” na ndakisa nguya ya kobikisa bato, eutaka epai ya Nzambe te, eutaka nde epai ya bilimo mabe. Nazali mpenza na esengo ndenge nakati boyokani na bilimo mabe, ndenge kaka mwana mwasi moko ya mosala oyo Paulo alongolaki ye “demo moko ya kosakola makambo oyo ebombaná.”​—Misala 16:16-18.

Nalekisaka ntango mingi na mosala ya kosakola

Nayokaki mpenza esengo ndenge ngai ná mama tozwaki batisimo nzela moko mpe tokómaki Batatoli ya Yehova na Sɛtɛmbɛ 1996! Nsima ya batisimo na ngai, nakómaki kolekisa ngonga mingi na mosala ya kosakola mpe nalekisi bambula ebele na mosala yango.

Lelo oyo, nabalá; mobali na ngai nkombo na ye Silver. Ngai ná ye tozali kosala makasi mpo na koteya mwana na biso ya mwasi solo ya Biblia. Bandeko na ngai mosusu bakómá mpe kosalela Yehova. Atako nayokaka mawa ndenge nalekisaki bambula ebele kozanga koyeba mpenza Nzambe, nazali na esengo ndenge sikoyo nayebi Nzambe oyo nasambelaka.

Elongo na mobali na ngai, mwana na biso, mpe bandeko na ngai mingi oyo balandi biso na losambo ya solo

^ par. 10 Ebimisamaki na Batatoli ya Yehova kasi lelo ebimisamaka lisusu te.

^ par. 13 “Kozwa elimo” ezali likambo oyo mangomba mosusu endimaka ete “elimo” ekitelaka bandimi mpe nguya yango ebambaka bango na mabele.

^ par. 18 Ebimisami na Batatoli ya Yehova.