Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Yekolá na Liloba ya Nzambe

Nzambe akotya guvɛrnema moko mpo na mokili mobimba?

Nzambe akotya guvɛrnema moko mpo na mokili mobimba?

Lisolo oyo ezali na mituna oyo mbala mosusu omitunaka mpe emonisi esika oyo okoki kozwa biyano na Biblia na yo. Batatoli ya Yehova bakosepela kotalela biyano yango elongo na yo.

1. Mpo na nini esengeli guvɛrnema kaka moko eyangela mokili mobimba?

Mbala mingi, mikakatano oyo bato bakutanaka na yango lelo oyo ezalaka bisika nyonso. Na bikólo mosusu, bato mingi bazali babola mpe bazali konyokola bango. Na bisika mosusu, bato mingi bazali na biloko mingi koleka oyo basengeli na yango. Kaka guvɛrnema moko oyo ekotambwisa makambo ya mokili mobimba nde ekoki kosala ete bato nyonso bázwa ndenge moko biloko oyo ezali na mabele.​—Tángá Mosakoli 4:1; 8:9.

2. Nani abongi kozala mokonzi ya guvɛrnema yango?

Bato mingi basepelaka te na likanisi ya kozala na mokonzi oyo akoyangela mokili mobimba mpo moto moko te akoki kosala mosala yango malamu. Moto moko te akoki kondimama epai ya bato nyonso. Lisusu, nani bakatá ye nzoloko ya kosala kaka malamu ntango azwi bokonzi? Likanisi ete mokili mobimba eyangelama na mokonzi moko ya mabe, ebangisaka mpenza!​—Tángá Masese 29:2; Yirimia 10:23.

Yehova Nzambe aponi Mwana na ye Yesu mpo ayangela bato libela. (Luka 1:32, 33) Yesu akutanaki na makambo mingi ntango azalaki awa na mabele. Abikisaki bato ya maladi, ateyaki bato ya komikitisa, mpe alekisaki ntango elongo na bana. (Marko 1:40-42; 6:34; 10:13-16) Na yango, Yesu azali mokonzi oyo abongi.​—Tángá Yoane 1:14.

3. Ekoki kosalema ete mokili mobimba ezala na guvɛrnema moko?

Nzambe aponi Mwana na ye na likoló mpo ayangela mabele. (Danyele 7:13, 14) Kaka ndenge esɛngaka te ete bakonzi ya mokili báfanda na bingumba nyonso oyo bazali koyangela, esɛngi mpe te Yesu afanda awa na mabele mpo na koyangela bato.​—Tángá Matai 8:5-9, 13.

Bato nyonso nde bakondima ete Yesu azala mokonzi? Te. Kaka bato oyo balingaka makambo ya malamu nde bakondima ye. Yehova akolongola na mabele baoyo baboyi mokonzi ya bolingo mpe ya sembo oyo Ye aponi.​—Tángá Matai 25:31-33, 46.

4. Makambo nini mokonzi yango akosala?

Ndenge kaka mobateli ya bampate asangisaka bampate na ye, Yesu asilaki kobanda kosangisa bato ya komikitisa na bikólo nyonso mpe azali koteya bango banzela ya Nzambe oyo ezali bolingo. (Yoane 10:16; 13:34) Bato yango basepelaka kopesa Yesu mpe bokonzi na ye mabɔkɔ. (Nzembo 72:8; Matai 4:19, 20) Na mokili mobimba, bato oyo bazali sembo epai ya Yesu bazali kosakola na bomoko ete Yesu akómi mokonzi.​—Tángá Matai 24:14.

Mosika te Yesu akosalela nguya na ye mpo na kosikola bato na baguvɛrnema mabe ya mokili oyo. Aponi bayekoki na ye mosusu ya sembo mpo bázala bakonzi mpo na koyangela mabele elongo na ye na likoló. (Danyele 2:44; 7:27) Boyangeli ya Yesu ekotondisa mabele na boyebi ya Yehova mpe ekosala ete paradiso oyo bankɔkɔ na biso ya liboso babungisaki ezonga.​—Tángá Yisaya 11:3, 9; Matai 19:28.