BIBLIA EBONGOLAKA BATO
“Namonaka lisusu te ete nasengeli kobongola mokili”
-
ABOTAMAKI NA: 1966
-
EKÓLO: FINLANDE
-
BOMOI NA YE YA KALA: MOTO OYO ABUNDAKA MPO NA MBONGWANA
NDENGE NAZALAKI:
Banda bomwana, nasepelaka na biloko oyo Nzambe asalá. Mbala mingi, tozalaki kosepela kokende libota mobimba kotala bazamba mpe balaki ya kitoko oyo ezalaki zingazinga ya Jyväskylä, engumba moko ya Finlande epai tozalaki kofanda. Nalingaka mpe banyama mingi. Ntango nazalaki naino mwana, nazalaki kosepela kosimbasimba nyau mpe mbwa nyonso oyo nazalaki komona! Ntango nakómaki mokóló, nakómaki komitungisa ndenge bato banyokolaka banyama. Na nsima, nakɔtaki na ebongiseli moko oyo ebatelaka banyama mpe kuna nakutanaki na bato oyo bazalaki na makanisi ndenge moko na oyo ya ngai.
Na molende nyonso, tozalaki kosala bakampanye mpo na kolobela ntomo ya banyama. Toyebisaki bato ebele nsango yango mpe tobongisaki makambo mpo bábima na babalabala mpo na kotɛmɛla baoyo batɛkaka nsuki ya banyama mpe balaboratware oyo emekaka liboso bankisi na yango epai ya banyama. Tosalaki kutu ebongiseli ya sika mpo na kobatela banyama. Mbala mingi, tozalaki koyokana te ná bakonzi ya Leta mpo tozwaki bikateli ya makasi mpo na kolandela likambo yango. Mbala mingi bazalaki kokanga ngai mpe komema ngai na tribinale.
Longolá susi oyo nazalaki na yango mpo na banyama, makambo mosusu oyo ezalaki koleka na mokili ezalaki mpe kotungisa ngai. Nsukansuka, nakɔtaki na bibongiseli ndenge na ndenge, na ndakisa Amnesty International mpe Greenpeace. Namipesaki mobimba na kosunga misala ya bibongiseli yango. Nazalaki kobundela ntomo ya babola, ya bato ya nzala, mpe ya bato mosusu.
Kasi mokemoke, nakómaki komona ete nakokoka te kobongola mokili. Atako bibongiseli yango emekaki kobongisa mwa makambo ya mike, emonanaki ete oyo ya minene ezalaki kaka se kobeba. Ezalaki lokola nde banguya mabe epalanganaki na mokili mobimba mpe moto nyonso akómaki mafumafu. Namonaki ete nazangi makasi.
NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI:
Lokola nazalaki na moto ya kosalisa ngai te, nayokaki mawa mpe nakómaki komituna mituna mpo na Nzambe mpe Biblia. Liboso, Batatoli ya Yehova bazalaki koyekola na ngai Biblia. Atako nazalaki kosepela na boboto na bango mpe likebi oyo bazalaki kotyela ngai, nazalaki naino na mposa te ya kobongola bomoi na ngai. Kasi na mbala oyo, makambo ebongwanaki.
Nazwaki Biblia na ngai mpe nabandaki kotánga yango. Ezalaki lokola nkisi mpo na bampota na ngai. Namonaki bavɛrsɛ mingi oyo emonisi ndenge malamu ya kobatela banyama. Na ndakisa, Masese 12:10 oyo elobaka ete “moyengebene amibanzabanzaka mpo na molimo ya nyama na ye ya mboka.” Namonaki mpe ete bampasi eutaka epai ya Nzambe te. Kasi, bampasi ezali kokóma mingi mpo bato mingi batosaka ye te. Ntango nayebaki ete Yehova azali bolingo mpe na motema molai, nakamwaki mpenza.—Nzembo 103:8-14.
Na ntango yango, natondisaki lokasa ya kosɛnga buku Biblia eteyaka mpenza nini? mpe natindaki yango. Eumelaki te, Batatoli ya Yehova mibale bayaki na ndako mpe basɛngaki ete báyekola na ngai Biblia, mpe nandimaki. Nakómaki mpe koyangana na makita na Ndako ya Bokonzi. Yango esalaki ete mateya ya Biblia ebanda kozwa misisa na motema na ngai.
Biblia esalisaki ngai nabongola makambo mingi. Natikaki komɛla makaya mpe kolangwa masanga. Nabongisaki nzoto mpe maloba na ngai. Mpe nabongisaki ndenge na ngai ya kotalela bakonzi ya Leta. (Baroma 13:1) Natikaki mpe bomoi na ngai ya mbindo, lolenge ya bomoi oyo namipesaki mpenza na yango.
Kotalela na ndenge oyo ebongi bibongiseli oyo ebundelaka ntomo ya bato to ya banyama ezalaki mokakatano monene mpo na ngai. Ezalaki likambo ya lelo to lobi te. Na ebandeli, namonaki ete soki nalongwe, ekozala lokola nde nazali sembo te na bibongiseli yango. Kasi, nakómaki komona ete kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekobongisa makambo ya mokili. Nazwaki ekateli ya kosala nyonso oyo nakoki mpo na kopesa Bokonzi yango mabɔkɔ mpe kosalisa basusu bayeba yango.—Matai 6:33.
MATOMBA OYO NAZWI:
Lokola nazalaki moto oyo abundaka mpo na mbongwana, nazalaki mpenza kokabola bato na bituluku mibale, ya malamu ná ya mabe mpe baoyo nazalaki komona ete bazali mabe, nazalaki pene ya kotɛmɛla bango. Kasi Biblia esalisá ngai natika koyina basusu. Kutu, nasalaka makasi namonisela bato nyonso bolingo ya bokristo. (Matai 5:44) Kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe ezali mpe lolenge oyo namonisaka bolingo yango. Nayokaka esengo ntango namonaka ete mosala yango ya ofele epesaka bato kimya, esengo mpe elikya ya solosolo.
Kotika makambo na mabɔkɔ ya Yehova epesá ngai kimya na motema. Nandimisami ete lokola azali Mozalisi, akotika te ete bato mpe banyama banyokwama mpo na libela to, akotika mpe te ete mabele na biso oyo ya kitoko ebebisama. Kutu mosika te, na nzela ya Bokonzi na ye, akobongisa makambo nyonso ya mabe. (Yisaya 11:1-9) Nayokaka esengo mingi kaka te mpo nayebi makambo oyo kasi mpe mpo nasalisaka basusu batyela yango motema. Namonaka lisusu te ete nasengeli kobongola mokili.