Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Okoki kotyela lingomba motema na likambo etali bizaleli malamu?

Okoki kotyela lingomba motema na likambo etali bizaleli malamu?

Sylvia, oyo asalaka mosala ya monganga alobi boye: “Ntango nakɔtaki iniversite, bana mingi ya kelasi bazalaki koloba ete basambelaka; nzokande, bazalaki koyiba biyano na ekzamɛ mpe kosalela drɔgɛ. Lingomba ebongolaki bomoi na bango te.”

Mobali moko na nkombo Lionel alobi boye: “Baninga na ngai ya mosala bakosaka mpe ata soki bazali maladi te, balobaka ete bazali kobɛla. Bazalaka bandimi ya nkombo mpamba; lokola mwa kiti to mesa oyo batandaka mpo bato bátala.”

Lingomba elongi te kobongola bizaleli ya bato mingi. Bato mingi lelo “bazali komonisa ete bazali na ezaleli ya kokangama na Nzambe nzokande bazali kowangana nguya ya ezaleli yango.” (2 Timote 3:5) Bakonzi ya mangomba na bango bapesaka ndakisa malamu te, mpe bapesaka bandimi batoli ya Biblia te oyo esengeli mpo bázala na bizaleli ya malamu. Yango wana, ekoki kokamwisa biso te soki bato mingi bamonaka ete Nzambe akipaka te ndenge oyo batambwisaka bomoi na bango.

BIBLIA ETEYAKA NINI?

Biblia eteyaka ete Nzambe ayokaka mawa to esengo mpe ndenge oyo totambwisaka bomoi na biso ezalaka na ntina mingi na miso na ye. Ntango Bayisraele batombokelaki Nzambe, “bayokisaki ye motema mpasi.” (Nzembo 78:40) Nzokande, ‘esengo ezalaka mingi na likoló’ soki moto moko atiki mpenza bizaleli na ye ya mabe. (Luka 15:7) Soki moto akómi kosepela na bizaleli kitoko ya Tata na biso ya likoló, bolingo na ye mpo na Nzambe ekolaka mpe etindaka ye alinga oyo Nzambe alingaka mpe ayina oyo Nzambe ayinaka.​—Amose 5:15.

BATATOLI YA YEHOVA BASALAKA NDENGE NINI?

Zulunalo moko (Deseret News of Salt Lake City, Utah, U.S.A.) elobi boye: “Lingomba ya Batatoli ya Yehova esalisaka bandimi na yango bázala na boyokani malamu na libota mpe bázala bana-mboka oyo bazali sembo mpe balingá mosala.” Zulunalo yango ebakisi boye: “Balandaka mpenza batoli etali bizaleli malamu. Bandimaka ete komɛla makaya, kolangwa masanga, kosalela drɔgɛ, kobɛta masano ya mbongo, kindumba mpe kosangisa nzoto mibali ná mibali to basi ná basi ebebisaka boyokani ya moto ná Nzambe.”

Bakonzi ya mangomba basalisaka bandimi na bango básalelaka batoli ya Nzambe oyo etali bizaleli malamu?

Ndenge nini koyekola bizaleli ya Nzambe esalisaka Batatoli ya Yehova? Sylvia oyo tolobelaki na ebandeli, alobi boye: “Kobuba ezalaka mingi na mosala ya monganga, yango wana ezalaka mpasi te mpo moto akwea na motambo yango. Kasi, koyeba ndenge oyo Yehova * atalelaka likambo yango esalisaka ngai nasala oyo ezali sembo. Nazali na esengo mpe kimya na motema.” Sylvia andimaka ete kotosa mateya ya lingomba na ye esalisá ye akóma na bomoi ya malamu.

^ par. 9 Yehova ezali nkombo ya Nzambe na Biblia.