Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Biyano na mituna ya Biblia

Biyano na mituna ya Biblia

Moto akoki kozala na bomoi ya seko?

Nini mpenza ekoki kolongola biso na boombo ya liwa?

Adama moto ya liboso aumelaki bankama ya bambula. Kasi nsukansuka, anunaki mpe akufaki. Banda wana, bato bameká mayele ndenge na ndenge mpo banunaka te, kasi ata moko te alonga liwa. Mpo na nini? Lokola Adama asalaki lisumu na ndenge atosaki Nzambe te, anunaki mpe akufaki. Tonunaka mpo Adama atikelá biso lisumu mpe etumbu na yango, liwa.​—Tángá Ebandeli 5:5; Baroma 5:12.

Mpo tózwa bomoi ya seko, esengeli moto moko asikola biso. (Yobo 33:24, 25) Lisiko ezali motuya oyo bafutaka mpo mokangami azwa bonsomi, biso mpe tozali na mposa ya kosikwama na liwa. (Kobima 21:29, 30) Yesu afutaki motuya yango ntango akufaki mpo na biso.​—Tángá Yoane 3:16.

Ndenge nini tokoki kozwa bomoi ya seko?

Moto nyonso te nde akosikwama na maladi mpe bobange. Kutu, baoyo batosaka Nzambe te ndenge Adama asalaki, bakokufa. Kaka baoyo bakolimbisama masumu, nde bakozwa bomoi ya seko.​—Tángá Yisaya 33:24; 35:3-6.

Ezali na makambo oyo tosengeli kosala mpo masumu na biso elimbisama. Tosengeli koyekola Biblia, Liloba ya Nzambe mpo tóyeba ye. Biblia eteyaka biso ndenge ya kozala na bomoi ya malamu mpe oyo tokoki kosala mpo Nzambe andima biso mpe tózwa bomoi ya seko.​—Tángá Yoane 17:3; Misala 3:19.