Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

PUSANÁ PENEPENE NA NZAMBE

Atondisaka “mitema na biso mɛkɛ”

Atondisaka “mitema na biso mɛkɛ”

Yehova atyelaka mpenza biso likebi, to akipaka te bampasi oyo tokutanaka na yango? Eyano ya Biblia na motuna yango ekitisaka motema. Ya solo mpenza, Nzambe atyelaka biso likebi, mpe alingaka tózala na bomoi ya malamu. Mokolo na mokolo, asalelaka bato nyonso bolamu, ata mpe baoyo bazalaka na botɔndi te epai na ye. Tótalela maloba oyo ya ntoma Paulo.​—Tángá Misala 14:16, 17.

Ntango azalaki kosolola na bato ya engumba Listra oyo bazalaki basambeli ya Nzambe te, Paulo alobaki boye: “Na mabota oyo eleká [Nzambe] apesaki nzela ete bikólo nyonso bálanda banzela na bango, atako amitikaki mpenza te kozanga litatoli, ndenge asaleli bino bolamu, ndenge apesaka bino bambula uta na likoló mpe bileko ya kobota mbuma, ndenge atondisaka mitema na bino mɛkɛ na biloko ya kolya mpe na nsai.” Paulo alingaki mpenza koloba nini?

Ezalaki mpasi te mpo bato ya Listra bákanga ntina ya maloba ya Paulo. Bazalaki kofanda na esika oyo basalaka bilanga mpe mabele ezalaki kitoko mpe na mai mingi. Kasi, ndenge Paulo amonisaki bango, Nzambe nde apesaka mbula mpe bileko ya kobota mbuma. Na yango, ntango nyonso oyo bazalaki kobuka mbuma mingi to kolya bilei kitoko, ezalaki bolamu oyo Nzambe azalaki kosalela bango.

Maloba oyo Paulo ayebisaki bato ya Listra eteyi biso makambo mingi ya ntina mpo na Yehova Nzambe.

Yehova apesá biso bonsomi ya kopona. Simbá ete Yehova apesaki nzela na bato ya bikólo nyonso “bálanda banzela na bango.” Buku moko ya babongoli ya Biblia elobi ete maloba yango ekoki kolimbola “kolanda nzela oyo basepeli na yango” to “kosala oyo bakanisi ete ezali malamu koleka.” Yehova atindaka moto na makasi te ete asalela ye. Apesá biso bonsomi ya kopona to likoki ya kopona oyo tolingi kosala na bomoi na biso.​—Kolimbola Mibeko 30:19.

Yehova alingi tóyeba ye. Paulo alobaki ete “amitikaki mpenza te kozanga litatoli.” Buku oyo tolobelaki, elobi ete maloba yango ekoki kobongolama boye: “Amonisi bato polele soki azali Nzambe ya ndenge nini.” Biloko oyo Nzambe asalá ezali komonisa polele “bizaleli na ye oyo emonanaka te,” na ndakisa bolamu, bwanya, nguya mpe bolingo. (Baroma 1:20) Yehova amonisi makambo mingi oyo etali ye na Biblia. (2 Timote 3:16, 17) Yango emonisi te ete alingi tóyeba ye?

Mokolo na mokolo, Nzambe asalelaka bato nyonso bolamu, ata mpe baoyo bazalaka na botɔndi te epai na ye

Yehova alingi ete tózala na esengo. Paulo alobi ete “atondisaka mitema na biso mɛkɛ na biloko ya kolya mpe na nsai.” Ata mpe mosumuki oyo ayebi Yehova te akoki kolya bilei oyo motema na ye elingi mpe kozala na mwa esengo na bomoi. Kasi, Nzambe alingi ete tózala na esengo ya solosolo mpe ya libela na libela. Tokozwa esengo yango kaka soki toyekoli solo na ntina na ye mpe tosaleli yango na bomoi na biso.​—Nzembo 144:15; Matai 5:3.

Mokolo na mokolo biso nyonso tozwaka matomba na bolamu ya Yehova. Mpo na nini te koyekola makambo mosusu etali ndenge oyo okoki komonisa botɔndi epai ya Nzambe oyo atondisaka mitema na biso “mɛkɛ na biloko ya kolya mpe na nsai”?

Botángi ya Biblia mpo na sanza ya nsambo

Misala 11-28