Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge bato ya Espagne bayebaki Liloba ya Nzambe

Ndenge bato ya Espagne bayebaki Liloba ya Nzambe

“Ntango nakokende na Espanye [Espagne], nazali kolikya, libosoliboso, ntango nakozala na mobembo ya kokende kuna, natala bino mpe bókende kotika ngai na nzela nsima ya kotonda ata mwa moke na esengo ya kozala elongo na bino.”​—Baroma 15:24.

NTOMA Paulo akomelaki bakristo ya Roma makambo wana na mobu soki 56 ya ntango na biso. Biblia elobi te soki Paulo akendaki mpenza na Espagne. Ezala akendaki to te, milende ya Paulo to ya bakristo mosusu oyo bazalaki bamisionɛrɛ esalaki ete nsango malamu ya Liloba ya Nzambe ekɔta na Espagne na ekeke ya mibale ya ntango na biso.

Eumelaki te, bokristo ekómaki kopalangana mpe kokola na Espagne. Na yango, bato ya Espagne bakómaki na mposa ya kozala na Biblia oyo ebongolami na monɔkɔ ya Latin. Ezalaki bongo mpo na ekeke ya mibale, Espagne ezalaki na nse ya bokonzi ya Roma banda bambula mingi mpe Latin ezalaki monɔkɔ oyo ezalaki kolobama mingi na bisika nyonso oyo Roma ezalaki koyangela.

BABIBLIA YA LATIN ESALISI BATO

Bato ya liboso oyo bakómaki bakristo na Espagne babimisaki mabongoli mingi ya Latin, oyo bazalaki kobenga Vetus Latina Hispana. Na Espagne mobimba, bato basalelaki Babiblia wana ya Latin tii na ebandeli ya ekeke ya mitano, ntango Jérôme abimisaki Vulgate, libongoli mosusu ya Latin.

Jérôme abimisaki Biblia yango na engumba Bethléhem, na Palestine; kasi eumelaki te ekómaki na Espagne. Ntango Lucinius, moto moko ya bozwi oyo azalaki moyekoli ya Biblia, ayokaki ete Jérôme azali kobongola Biblia na Latin, alingaki kozwa nokinoki kopi ya libongoli yango. Atindaki bato 6 na Bethléhem mpo básalela ye kopi ya makomi yango mpe bámema yango na Espagne. Na bankama ya bambula oyo elandaki, Vulgate ekómaki mokemoke kotángama mingi koleka Vetus Latina Hispana. Babiblia wana ya Latin esalisaki bato ya Espagne bátánga Liloba ya Nzambe mpe báyeba nsango na yango. Kasi, ntango bokonzi ya Roma ekómaki kokende na nsuka, monɔkɔ mosusu ya sika ekɔtaki.

BABIBLIA NA BITANDA YA MABANGA

Na ekeke ya mitano, Ba-Wisigoth mpe bikólo mosusu ya Germanique babɔtɔlaki Espagne, mpe bakɔtisaki monɔkɔ ya sika: monɔkɔ ya Gothique. Bato yango bazalaki kosala losambo moko boye ya bokristo oyo bazalaki kobenga Arianisme, oyo eboyaki liteya ya Bosato. Bayaki mpe na libongoli na bango ya Biblia: Biblia ya Ulfilas na monɔkɔ ya Gothique. Bato ya Espagne basalelaki Biblia yango tii na nsuka ya ekeke ya motoba, ntango Reccared, mokonzi ya Ba-Wisigoth, atikaki Arianisme mpe akómaki moto ya Lingomba ya Katolike. Asɛngaki bátumba babuku nyonso ya Lingomba ya Arianisme, ata mpe Biblia ya Ulfilas. Na yango, makomi nyonso oyo ezalaki na monɔkɔ ya Gothique elimwaki na Espagne.

Etanda moko ya libanga oyo ezali na makomi ya Biblia na monɔkɔ moko oyo eutaki na Latin, na ekeke ya motoba ya ntango na biso

Atako bongo, Liloba ya Nzambe ekobaki kopalangana na Espagne na ntango wana. Longola monɔkɔ ya Gothique, bato mingi ya Espagne bazalaki koloba monɔkɔ moko oyo eutaki na Latin, oyo na nsima ebimisaki minɔkɔ oyo elobamaka na sudi-wɛsti ya Mpoto. * Makomi oyo eleki koumela oyo ekomamá na monɔkɔ wana oyo eutá na Latin babengaka yango pizarras visigodas, mpo ekomamaki na bitanda ya mabanga. Ekomamá na ekeke ya motoba tii na ekeke ya nsambo, mpe makomi yango mosusu ezali na bavɛrsɛ ya mokanda ya Nzembo mpe Baevanzile. Na etanda moko, bakomá bavɛrsɛ nyonso ya Nzembo 16.

Biteni yango ya Biblia oyo ekomamá na mwa bitanda wana ya mabanga emonisi ete na ntango wana, bana-mboka Espagne bazalaki kotánga ya Liloba ya Nzambe mpe kosala bakopi. Emonani ete balakisi bazalaki kosalela bavɛrsɛ yango ya Biblia mpo na kosalisa bana-kelasi báyekola kotánga mpe kokoma. Bitanda ya mabanga ezalaki ntalo te, soki tokokanisi yango na barulo ya ntalo mingi oyo basalá na mposo ya nyama, oyo basango ya ntango wana bazalaki kosalela mpo na kobimisa Babiblia na bango oyo ezali na bililingi.

Lokasa moko ya Biblia ya León oyo ezali na bililingi. Kasi, ata soki Babiblia ya ndenge wana ezali kitoko mpenza, esalisaki mpenza te mpo bato báyeba nsango oyo ezali na Liloba ya Nzambe

Biblia moko ya bililingi ya ntalo makasi babombá yango na ndako-nzambe ya San Isidoro na engumba León, na Espagne. Ebimisamaki na mobu 960 ya ntango na biso; ezali na nkasa 516 ya santimɛtrɛ 47 na molai mpe 34 na mokuse; mpe ezali na kilo 18. Biblia mosusu oyo ezali na bililingi ezali La Bible de Ripoll, oyo babombá na bibliotɛkɛ ya Vatican, ebimisamaki na mobu soki 1020 ya ntango na biso. Na Babiblia nyonso ya bililingi oyo ebimaki na ntango wana, yango nde ezali na bililingi ebele. Mpo na kosala Biblia ya ndenge wana, esɛngaki sango moko alekisa ata mokolo mobimba na koyema lɛtrɛ moko ya ebandeli to alekisa pɔsɔ mobimba na kobongisa motó ya likambo ya lokasa moko. Kasi, ata soki Babiblia yango ezalaki kitoko mingi, esalisaki mpenza te na kopalanganisa nsango ya Liloba ya Nzambe epai ya bato.

BIBLIA NA MONƆKƆ YA ARABE

Kobanda na ekeke ya mwambe, monɔkɔ mosusu ya sika ekómaki kolobama mingi na Espagne mpo Bamizilma babɔtɔlaki ekólo yango. Na bisika oyo Bamizilma bazalaki kokonza, monɔkɔ ya Arabe ekómaki kolobama koleka Latin mpe esɛngaki bábongola Biblia na monɔkɔ yango ya sika.

Kobanda na ekeke ya 5 tii ya 8 ya ntango na biso, Biblia na Latin mpe na Arabe esalisaki bato ya Espagne bátánga Liloba ya Nzambe

Na ntembe te, mabongoli mingi ya Biblia na monɔkɔ ya Arabe, mingimingi Baevanzile, ezalaki kotángama na Espagne na ntango wana. Emonani lokola ete na ekeke ya mwambe, John, episkɔpɔ moko ya engumba Séville, abongolaki Biblia mobimba na monɔkɔ ya Arabe. Kasi, mabongoli yango mingi ya monɔkɔ ya Arabe ebungá. Libongoli moko ya Baevanzile na monɔkɔ ya Arabe oyo ebimisamaki na katikati ya ekeke ya zomi ezali tii lelo na ndako-nzambe ya León, na Espagne.

Libongoli ya Baevanzile na Arabe, na ekeke ya zomi T.B.

BABONGOLI BABIBLIA NA MONƆKƆ YA ESPAGNOL

Na nsuka ya Moyen Âge, monɔkɔ ya Castillan, to Espagnol, ekómaki kolobama mokemoke na sudi-wɛsti ya Mpoto. Na nsima, monɔkɔ yango esalisaki mingi mpenza na kopalanganisa Liloba ya Nzambe. * Makomi ya libosoliboso ya Biblia na monɔkɔ ya Espagnol ebimisamaki na Biblia La Fazienda de Ultra Mar, na ebandeli ya ekeke ya 13. Buku yango elobeli mobembo moko na Israël; elobeli makambo oyo eutaki na mikanda mitano ya liboso ya Biblia, mikanda mosusu ya Makomami ya Ebre, Baevanzile, mpe mikanda mosusu oyo batindelaki bato to masangá.

Mokonzi Alphonse X apesaki mabɔkɔ na mosala ya kobongola Biblia na Espagnol

Bakonzi ya mangomba basepelaki na libongoli yango te. Na mobu 1234, na likita monene oyo basalaki na Tarragona, bazwaki ekateli ete bato bámema mikanda nyonso ya Biblia oyo ebimaki na monɔkɔ ya Espagnol epai ya mokonzi ya lingomba ya mboka mpo atumba yango. Atako bongo, bato balɛmbaki te kobongola Biblia. Mokonzi Alphonse X (1252-1284), oyo bato balobaka ete abimisaki ekomeli ya monɔkɔ ya Espagnol azalaki na mposa ete Biblia ebongolama na monɔkɔ yango mpe apesaki mabɔkɔ na mosala yango. Mabongoli ya Espagnol ebimisamaki ebele na eleko yango, na ndakisa Biblia Alphonsine, mpe libongoli mosusu oyo ebimaki mwa moke liboso na yango, oyo ezalaki Biblia ya Espagnol oyo eleki monene.

Lokasa ya Biblia oyo ebimaki liboso ya Biblia Alphonsine ya siɛklɛ ya 13 (lobɔkɔ ya mwasi) mpe ya Biblia ya Alphonsine (lobɔkɔ ya mobali)

Mabongoli wana mibale esalisaki mpo monɔkɔ ya Espagnol oyo ezalaki naino sika efanda mpe eyebana. Mpo na Biblia oyo ebimaki liboso ya Biblia Alphonsine, profesɛrɛ Thomas Montgomery alobaki ete: “Moto oyo abongolaki Biblia yango asalaki mosala ya malamu oyo ezali sikisiki mpe na elobeli ya kitoko. . . . Elobeli ezali pɛtɛɛ mpe polele, ndenge ebongi mpenza mpo na Biblia oyo ebongolami mpo na bato oyo bayebi Latin te.”

Nzokande, mabongoli wana ya liboso ya monɔkɔ ya Espagnol eutaki na Biblia Vulgate ya Latin, kasi te na makomi ya Ebre to ya Grɛki. Kobanda na ekeke ya 14, babongoli oyo bazalaki Bayuda basalelaki mbala moko makomi ya Ebre mpe babimisaki mabongoli ebele ya Makomami ya Ebre na monɔkɔ ya Espagnol. Na ntango wana, na Mpoto mobimba, Bayuda mingi bazalaki kofanda na Espagne, mpe babongoli bazalaki na likoki ya kotánga makomi ya Ebre ntango bazalaki kobongola. *

Moko na yango ezalaki Biblia Alba, oyo ebimaki na ekeke ya 15. Luis de Guzmán, moto moko ya lokumu mpe mwana-mboka ya Espagne asɛngaki Rabbi Moisés Arragel abongola Biblia na Espagnol castizo, elingi koloba ya solosolo. Alobaki ete asɛngaki libongoli wana ya sika mpo na ntina mibale. Ya liboso, alobaki: “Babiblia oyo ezali lelo na minɔkɔ oyo elobamaka na Mpoto ezali sikisiki te,” mpe ya mibale, alobaki: “Bato lokola biso tozali na mposa ya bandimbola oyo babakisi na mopanzi mpo tókanga ntina ya bavɛrsɛ oyo ezali mpasi.” Yango emonisi ete bato ya ntango na ye bazalaki kosepela mingi kotánga Biblia mpe kokanga ntina na yango. Emonisi mpe ete banda kala, bato mingi ya Espagne bazalaki kotánga Biblia na monɔkɔ ya mboka na bango.

Mosala makasi ya babongoli ya Biblia mpe ya bato oyo basalaki bakopi ya Biblia na ntango wana ya kala esalisaki bato ya Espagne oyo bakɔtá kelasi bákoka kotánga Biblia na monɔkɔ ya mboka na bango. Yango wana, Juan Orts González, moto moko ya istware, alobaki ete “bato ya Espagne bayebaki Biblia malamu mingi koleka bato ya Allemagne mpe ya Angleterre liboso ya eleko ya Luther.”

“Bato ya Espagne bayebaki Biblia malamu mingi koleka bato ya Allemagne mpe ya Angleterre liboso ya eleko ya Luther.”​—Juan Orts González, moto ya istware

Kasi, na nsuka ya ekeke ya 15, bakonzi ya Lingomba ya Katolike bapekisaki bato bábongola Biblia na Espagnol mpe bázala na Biblia na monɔkɔ mosusu nyonso oyo ezalaki kolobama na mboka. Epekiseli wana ya Biblia na Espagne eumelaki ntango molai. Esilaki nsima ya mbula 300. Na boumeli ya ntango wana ya mpasi, mwa babongoli mosusu bazalaki kobimisa Babiblia na Espagnol na mboka mopaya mpe bazalaki kokɔtisa yango na Espagne na kobombana. *

Ndenge lisolo ya Biblia na Espagne na ntango ya kala emonisi yango, banguna basalaki nyonso mpo na kolimwisa Liloba ya Nzambe. Kasi, balongaki te.​—Nzembo 83:1; 94:20.

Mosala makasi ya babongoli ebele ya Biblia esalaki ete Biblia eyebana mpe etángama mingi na Espagne ya kala. Babongoli ya lelo balandaka ndakisa ya bato wana ya kala oyo babongolaki Biblia na Latin, na Gothique, na Arabe, mpe na Espagnol. Na yango, bamilio ya bato oyo balobaka Espagnol lelo bakoki kotánga Liloba ya Nzambe na monɔkɔ oyo esimbaka motema na bango.

^ par. 10 Na ndakisa monɔkɔ ya Castillan, Catalan, Galicien, mpe Portugais.

^ par. 17 Lelo oyo, Espagnol ezali monɔkɔ ya mboka ya bato soki milio 540.

^ par. 20 Talá lisolo “Nkombo ya Nzambe na mosala oyo Alfonse de Zamora asalaki mpo na kozwa libongoli ya sikisiki,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/12/2011.

^ par. 23 Talá lisolo “Etumba oyo Casiodoro de Reina abundaki mpo na Biblia na Espagnol,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/06/1996.