Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOMOI

Bomoi moko malamu na mosala ya Nzambe

Bomoi moko malamu na mosala ya Nzambe

Banda bomwana, likambo ya koyina bato ya mposo mosusu mpe kobanga ete nakolonga te na likambo moko boye ata mpe ezaleli na ngai ya nsɔninsɔni ezalaki kotungisa ngai mingi. Lokola nazalaki na elikya ete Biblia ekobɔndisa ngai, nakendaki na eglize na biso ya Katolike mpo básalisa ngai nayeba yango malamu. Lokola nazwaki lisungi moko te, namipesaki na masano.

Eumelaki te, nakómaki kosala ngalasisi mpe kotombola mabende mpo na kokembisa nzoto. Nsukansuka, nafungolaki club moko ya kosala ngalasisi, na San Leandro, na Californie, États-Unis, mpe nasalaki elongo na bato oyo batombolaka mabende, ata mpe na moto oyo azwaki titre babengi Mr. America. Ata bongo, kokóma na nzoto oyo ekembá mpenza epesaki ngai kaka esengo te.

NAZWI ELOKO NABANDAKI KOLUKA

Moninga moko na club na ngai ayebaki ete nazalaki na mposa ya koyeba Biblia, yango wana ayebisaki ngai nakutana ná moto moko oyo ayebanaki na ye. Mokolo oyo elandaki na ntɔngɔ, Motatoli moko ya Yehova ayaki kotala ngai. Na boumeli ya ngonga minei, asalelaki Biblia mpo na koyanola na mituna na ngai. Nayebisaki ye azongela ngai kaka mokolo wana na mpokwa, mpe tokobaki masolo yango tii na midi ya butu. Nasepelaki na makambo nayekolaki mpe nasɛngaki nakende ná ye mokolo oyo elandi kotala ndenge ayekolaka na bato mosusu Biblia. Nakamwaki ndenge azalaki kofungola Biblia mpo na kopesa bato biyano na mituna na bango. Namonaki ete yango nde likambo nazalaki na mposa ya kosala!

Yango wana nasundolaki mosala na ngai mpe nakómaki kolekisa ntango mingi na mosala ya kosakola elongo na mobongisi-nzela wana, ndenge Batatoli ya Yehova babengaka bandeko oyo balekisaka ngonga mingi na mosala ya kosakola. Na sanza ya 05/1948, nazwaki batisimo na liyangani moko oyo esalemaki na stade Cow Palace, na San Francisco, na Californie. Na nsima, kaka na mbula wana, nakómaki mpe mobongisi-nzela.

Kaka na ntango wana, nasɛngaki Batatoli ya Yehova bákende mpe kotala mama na ngai. Aboyaki te mpe eumelaki te, akómaki Motatoli ya Yehova. Atako bandeko na ye batɛmɛlaki ye, atikalaki sembo epai ya Nzambe tii na liwa na ye bambula ebele na nsima. Ata moto mosusu te ya libota na biso akómá Motatoli.

NDENGE NAKUTANAKI NÁ MWASI NA NGAI

Na 1950, nakendaki kofanda na Grand Junction, na Colorado, epai nakutanaki na Billie. Abotamaki na 1928 mpe akolá na eleko oyo nkita ya bikólo mingi ebebaki. Minnie, mama na ye azalaki kotángela ye Biblia butu nyonso na pole moke ya mwinda ya mazuti. Ntango akómaki na mbula minei, Billie akómaki kotánga, mpe ayebaki masolo mingi ya Biblia na motó. Na nsuka ya bambula ya 1940, mama na ye ayebaki ete lifelo ezali te esika oyo Nzambe anyokolaka bato kasi nde nkunda ya bato nyonso ntango Batatoli ya Yehova bayekolaki na ye Biblia. (Mosakoli 9:5, 10) Minnie ná mobali na ye bakómaki Batatoli ya Yehova.

Na 1949, Billie alongwaki na iniversite mpe amipesaki mpenza na koyekola Biblia. Na esika akóma molakisi, azwaki ekateli ya kopesa bomoi na ye epai ya Nzambe. Azwaki batisimo na 1950, na Yankee Stadium, na New York, na liyangani ya Batatoli ya Yehova oyo esangisaka bato ya mikili mingi. Mwa moke na nsima, tokutanaki, tobalanaki mpe tokómaki kolekisa bangonga mingi na mosala ya kosakola.

Tobandaki mosala yango na engumba Eugene, na Oregon mpe tokómaki na baninga mingi. Na 1953, tokendaki na Grants Pass, na Oregon, mpo na kosalisa lisangá moko ya moke. Na nsuka ya mbula yango, babengisaki biso na eteyelo ya mbala ya 23 ya Gileadi oyo epesaka Batatoli ya Yehova oyo balingi kokóma bamisionɛrɛ formasyo, oyo ezalaki pene na South Lansing, na New York, na ntaka ya kilomɛtrɛ 400 na nɔrdi ya engumba New York.

MOSALA YA MISIƆNƐRƐ NA BRÉSIL

Na sanza ya 12/1954, sanza mitano nsima ya kozwa diplome na Gileadi, ngai ná Billie tozwaki aviɔ mpo na kokende na Brésil. Ngonga moko na nsima na kati ya aviɔ yango, motɛrɛ moko ebebaki, kasi tokitaki kozanga likama na esanga ya Bermudes. Nsima ya likama mosusu oyo esalaki ete tókita na ekólo Cuba mpe nsima ya kolekisa lisusu ngonga 36 oyo elɛmbisaki biso, tokómaki na biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova na Rio de Janeiro, na Brésil.

Ndako ya Bokonzi ya liboso na Bauru oyo ezali na liyemi oyo nasalaki na esika oyo tozalaki kofutela na 1955

Nsima ya kofanda mwa moke, ngai ná Billie mpe bamisionɛrɛ mosusu mibale tokendaki na Bauru, na São Paulo, mpo na kofungola ndako ya sika ya bamisionɛrɛ. Engumba yango ezalaki na bato koleka 50 000, mpe tozalaki Batatoli ya Yehova ya liboso na esika yango.

Tobandaki kosakwela bato na bandako na bango, kasi sango moko ya Lingomba ya Katolike atɛmɛlaki mosala na biso. Azalaki kolanda biso mpe koyebisa bato báboya koyoka biso. Kaka nsima ya mwa bapɔsɔ, libota moko ya bato ebele oyo toyekolaki na bango Biblia bandimaki solo mpe na nsima bazwaki batisimo. Eumelaki te, bato mosusu mpe bakómaki koyekola.

Libota wana oyo bazwaki batisimo bazalaki na ndeko moko oyo azalaki prezida ya club moko oyo eyebanaki mingi. Nasɛngaki bápesa biso esika ya club tósala liyangani na biso. Ntango sango ya esika yango atyaki mbamba ete báboya kopesa biso esika yango, prezida yango akutanaki na bato mosusu ya club yango mpe ayebisaki bango boye: “Soki boboyi, nalongwe na club!” Bandimaki tósala liyangani.

Na mbula oyo elandaki, na 1956, babengisaki biso na liyangani ya etúká na engumba Santos, na São Paulo. Batatoli ya Yehova soki 40 ya lisangá na biso basalaki mobembo na engbunduka. Ntango tozongaki na Bauru, nakutaki mokanda moko na esika batyaka mikanda oyo emonisaki ete nazwaki mokumba ya kokende kolendisa bandeko na masangá ya Batatoli ya Yehova. Yango nde ebandeli ya mosala oyo nasalaki na boumeli ya mbula 25 na Brésil, kotambola na bisika mingi ya ekólo wana monene.

Kaka na mbula moko mpamba, tokómaki na etuluku moko ya basakoli ya molende na Bauru

NDENGE MOSALA YA KOSAKOLA EZALAKI

Na ntango wana, kosala mibembo ezalaki mpasi. Totambolaki na ekólo wana mobimba na bisi, engbunduka, velo ata mpe na makolo. Jaú ezalaki engumba ya liboso oyo totalaki bandeko na São Paulo. Sango ya engumba yango atɛmɛlaki biso.

Alobaki boye: “Bokoteya bampate na ngai te!”

Toyanolaki ye boye: “Bazali ya yo te. Bazali bampate ya Nzambe.”

Tolingaki kolakisa filme moko oyo elobelaki mosala na biso ya kosakola na mokili mobimba, ezalaki na motó ya likambo La Société du Monde Nouveau en action, kasi sango asangisaki ebele ya bato mpo bátya mobulu. Tobengaki mbala moko bapolisi. Ntango sango ná bandimi na ye bayaki na esika yango, bakutaki bapolisi oyo balakisaki bango mandoki batɛlɛmi zingazinga ya esika yango ya lisano. Ebele ya bato oyo bayaki kotala filme yango basepelaki makasi.

Bisika nyonso oyo tosalaki mosala na biso, tokutanaki na botɛmɛli ya ndenge wana. Na ndakisa, na engumba Brusque, pene na Blumenau, na Santa Catarina, tokutanaki na bandeko mibale oyo bazalaki kokutana na botɛmɛli makasi na mosala ya kosakola. Kasi bazwaki mapamboli mingi mpo bayikaki mpiko mpe bakobaki mosala yango. Eleki sikoyo mbula 50, masangá koleka 60 ezali na esika yango mpe ndako moko kitoko ya mayangani na engumba Itajaí!

Likambo ya esengo makasi na mosala na biso ya kolendisa masangá ezalaki kosala elongo na bandeko mosusu mpo na kobongisa mayangani ya minene. Na bambula ya 1970, nazwaki libaku ya kosala lokola mokambi ya programɛ ya liyangani ya etúká na stade Morumbi. Totindaki mokanda na masangá 100 ya zingazinga mpo bátindela biso bandeko 10 ya lisangá mokomoko mpo bátya bopɛto na stade yango na butu, liboso liyangani esalema.

Ntango basani ya ndembo bazalaki kobima na stade na butu yango, bamosusu bazalaki kotyola biso, bazalaki koloba boye: “Talá basi oyo balɛmba boye ná bakɔmbɔ na mabɔkɔ.” Ata bongo, na midi ya butu, stade mobimba ekómaki pɛto! Mokambi ya stade yango akamwaki boye: “Mosala oyo bato na ngai basalaka yango pɔsɔ mobimba kasi bino Batɛmwɛ bosali yango kaka na mwa ngonga moke boye!”

TOZONGI NA ÉTATS-UNIS

Tata na ngai akufaki na 1980, mpe mwa moke na nsima, tozongaki na Fremont, na Californie, na États-Unis, mpo na kosalisa mama na ngai. Tozwaki mosala ya kosukola bandako na butu mpe tokobaki kolekisa bangonga mingi na mosala ya kosakola mpe kosalisa bato oyo balobaka monɔkɔ ya Portugais na esika yango. Na nsima, tokendaki na San Joaquin Valley, mpe tokobaki kosakwela bato oyo balobaka Portugais kobanda na Sacramento tii na Bakersfield. Lelo oyo masangá ya monɔkɔ ya Portugais ezali 10 na Californie.

Nsima ya liwa ya mama na ngai na 1995, tokendaki kofanda na Florida mpe tobatelaki tata ya Billie tii na liwa na ye. Mama na ye akufaki na 1975. Na 2000, tokendaki kofanda esika moko ya esobe na sudi ya Colorado mpe tokobaki kolekisa bangonga mingi na kosakwela bankolo-mboka ya Amerika baoyo bafandaka na Navaho mpe Ute. Likambo ya mawa, Billie akufaki na sanza ya 02/2014.

Nazali mpenza na esengo ndenge nakutanaki na Motatoli moko ya Yehova eleki sikoyo mbula 65, oyo ayanolaki na mituna mingi oyo natunaki ye na Biblia! Mingimingi nazali na esengo mpo nalukaki koyeba soki makambo oyo alobaki na ngai ezalaki oyo Biblia eteyaka mpenza. Yango esalaki ete nalekisa bomoi moko malamu na mosala ya Nzambe.