Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO NA MONINGA MOKO YA KARTYE

Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela ntango nini? (Eteni 1)

Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela ntango nini? (Eteni 1)

Ndakisa oyo elandi emonisi ndenge oyo Motatoli ya Yehova moko akoki kosolola na moto. Tósala lokola Motatoli moko na nkombo Cameron akei kotala mobali moko na nkombo Jon.

“KOBÁ KOLUKALUKA” MAYELE

Cameron: Jon, nasepelaka mpenza na masolo ya Biblia oyo tosololaka na yo. * Na mbala oyo eleki, otunaki motuna etali Bokonzi ya Nzambe. Olingaki koyeba mpo na nini Batatoli ya Yehova bandimaka ete Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela na 1914.

Jon: Mokanda na bino moko oyo natángaki elobaki ete Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela na 1914. Yango ekamwisaki ngai mpo bolobaka ete mateya na bino nyonso eutaka na Biblia.

Cameron: Ezali mpenza bongo.

Jon: Natángá Biblia mobimba kasi natikala komona ata vɛrsɛ moko te oyo elobeli dati ya 1914. Yango wana nakɔtaki na Internet mpo na koluka dati yango na Biblia kasi mpo na koloba solo, namonaki yango ata na vɛrsɛ moko te.

Cameron: Jon, napesi yo longonya mpo na makambo mibale. Ya liboso, mpo otángá Biblia na mobimba na yango. Yango emonisi ete olingaka mpenza Liloba ya Nzambe.

Jon: Nalingaka yango mpenza. Buku moko te ekokani na yango.

Cameron: Ezali bongo. Ya mibale, napesi yo longonya mpo osalelaki Biblia mpo na koluka eyano na motuna na yo. Osalaki mpenza oyo Biblia esɛngaka biso tósala: “Kobá kolukaluka” mayele. * Ezali mpenza malamu ndenge ozali kosala milende ya ndenge wana.

Jon: Mersi. Nalingaka kokoba koyekola. Kutu, nasalaki bolukiluki mosusu mpe namonaki makambo mosusu etali dati ya 1914 na buku oyo toyekolaka na yo. Elobeli ndɔtɔ oyo mokonzi moko alɔtaki; amonaki nzete moko ya monene oyo bakataki yango mpe na nsima ekolaki lisusu to eloko moko ya bongo.

Cameron: Ah, ya solo. Ezali esakweli oyo ezali na Danyele mokapo 4. Elobeli ndɔtɔ oyo Nebukadenezare mokonzi ya Babilone alɔtaki.

Jon: Ɛɛ, ezali yango. Natángá esakweli yango mbala na mbala. Kasi mpo na koloba solo, nazali komona te soki yango etali Bokonzi ya Nzambe to dati ya 1914 na nini.

Cameron: Jon, ata mpe mosakoli Danyele ayebaki te ndimbola mobimba ya makambo oyo akomaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe!

Jon: Ya solo?

Cameron: Ɛɛ. Alobi boye na Danyele 12:8: “Nzokande, ngai nayokaki, kasi nakokaki kokanga ntina te.”

Jon: Boye, nazali moto ya liboso te. Yango ekitisi ngai motema.

Cameron: Mpo na koloba solo, Danyele ayebaki yango te mpo ntango ekokaki naino te mpo Nzambe apesa bato bososoli mpo bákanga mpenza ntina ya bisakweli oyo ezali na mokanda ya Danyele. Kasi lelo, na ntango na biso, tokoki mpenza kokanga ntina na yango.

Jon: Mpo na nini olobi bongo?

Cameron: Tótánga vɛrsɛ oyo elandi. Danyele 12:9 elobi boye: “Maloba yango ebombami sekele mpe ekangami na elembo tii na ntango ya nsuka.” Na yango, bato basengelaki kokanga ntina ya bisakweli yango nsima ya bambula mingi, elingi koloba na “ntango ya nsuka.” Ndenge tokomona yango kala mingi te na boyekoli na biso, makambo mingi ezali komonisa ete tozali na ntango yango. *

Jon: Okoki kolimbolela ngai esakweli ya Danyele?

Cameron: Nameka naino.

NDƆTƆ YA NEBUKADENEZARE

Cameron: Liboso, nayebisa yo naino na mokuse makambo oyo mokonzi amonaki na ndɔtɔ. Na nsima, tokotalela ndimbola na yango.

Jon: Likambo te.

Cameron: Nebukadenezare amonaki na ndɔtɔ nzete moko ya monene mpe molai na yango ekómaki tii na likoló. Na nsima, ayokaki ndenge anzelu moko ya Nzambe apesaki mitindo ete bákata nzete yango. Kasi, Nzambe alobaki bátika ekumu ná misisa na yango na mabele. Nsima ya “ntango nsambo,” nzete yango esengelaki kokola lisusu. * Liboso, esakweli yango etalelaki mokonzi Nebukadenezare ye moko. Atako azalaki mokonzi ya lokumu, elingi koloba lokola nzete oyo molai na yango ekómaki tii na likoló, azalaki lisusu mokonzi te mpo na “ntango nsambo.” Oyebi makambo oyo elekaki?

Jon: Te, nayebi te.

Cameron: Malamu. Biblia emonisi ete Nebukadenezare akómaki moto ya ligboma na boumeli ya mbula nsambo. Na boumeli ya ntango wana, azalaki lisusu na likoki te ya koyangela. Nsima ya mbula nsambo, Nebukadenezare abikaki mpe azongelaki koyangela. *

Jon: Ɛɛ, nazali kokanga ntina ya makambo nyonso oyo ozali koloba. Kasi, nyonso wana etali Bokonzi ya Nzambe mpe dati ya 1914 na nini?

Cameron: Na mokuse, esakweli yango esengelaki kokokisama mbala mibale. Kokokisama ya liboso esalemaki ntango Nebukadenezare atikaki naino koyangela. Ya mibale ekokisamaki ntango Bokonzi ya Nzambe ezalaki lisusu te na mabele. Boye, ezali kokokisama ya mibale ya esakweli yango nde etaleli Bokonzi ya Nzambe.

Jon: Ndenge nini boyebi yango?

Cameron: Ya liboso, esakweli yango moko emonisi yango. Na kotalela Danyele 4:17, esakweli yango epesamaki “mpo bato oyo bazali na bomoi báyeba ete Oyo-Aleki-Likoló azali Moyangeli na bokonzi ya bato mpe apesaka yango moto oyo ye alingi kopesa.” Omoni oyo elobami mpo na “bokonzi ya bato”?

Jon: Ɛɛ, elobi ete “Oyo-Aleki-Likoló azali Moyangeli na bokonzi ya bato.”

Cameron: Ya solo. Okanisi ete “Oyo-Aleki-Likoló” ezali nani?

Jon: Nakanisi ete ezali Nzambe.

Cameron: Malamu. Yango emonisi biso ete esakweli yango etaleli kaka Nebukadenezare te. Etaleli mpe “bokonzi ya bato,” elingi koloba Bokonzi oyo Nzambe azalaka na yango likoló ya bato. Soki totali makambo mosusu oyo ezali na esakweli yango, tokomona ete ezali mpenza bongo.

Jon: Olingi mpenza koloba nini?

MOTÓ YA LIKAMBO OYO ELOBELAMI MINGI NA MOKANDA YA DANIELE

Cameron: Mokanda ya Danyele elobeli motó ya likambo moko mbala na mbala. Elobeli kotyama ya Bokonzi ya Nzambe oyo Mwana na ye Yesu akozala mokonzi na yango. Na ndakisa, tózonga naino na mwa mikapo oyo ezali liboso. Okoki kotánga Danyele 2:44?

Jon: OK. Elobi boye: “Na mikolo ya bakonzi yango, Nzambe ya likoló akotya bokonzi moko oyo ekobebisama te. Mpe bokonzi yango ekoleka na ekólo mosusu te. Ekotuta mpe ekosukisa makonzi oyo nyonso, mpe ekotikala seko.”

Cameron: Mersi. Okanisi ete vɛrsɛ oyo elobeli Bokonzi ya Nzambe?

Jon: Bon, nayebi mpenza te.

Cameron: Simbá ete elobi ete Bokonzi yango “ekotikala seko.” Yango etali mpenza Bokonzi ya Nzambe, kasi tokoki koloba bongo te mpo na baguvɛrnema ya bato, boye te?

Jon: Nakanisi ezali bongo.

Cameron: Talá esakweli mosusu oyo ezali na mokanda ya Danyele, oyo elobeli mpe Bokonzi ya Nzambe. Ezali na Danyele 7:13, 14. Esakweli yango elobi boye mpo na mokonzi oyo akoyangela: “Bapesaki ye boyangeli, lokumu ná bokonzi, mpo bato ya bikólo, bituluku ya bato ya bikólo mpe minɔkɔ nyonso básalela ye. Boyangeli na ye ezali boyangeli oyo ekoumela seko, oyo ekoleka te, mpe bokonzi na ye ezali bokonzi oyo ekobebisama te.” Ezali na likambo moko na esakweli yango oyo eyokani na makambo oyo tozali kolobela?

Jon: Elobeli bokonzi moko.

Cameron: Ezali bongo. Mpe ezali te lokola bokonzi nyonso. Simbá ete elobi ete Bokonzi yango ekoyangela “bato ya bikólo, bituluku ya bato ya bikólo mpe minɔkɔ nyonso.” Na maloba mosusu, Bokonzi yango ekoyangela mokili mobimba.

Jon: Nakanisá naino bongo te, kasi olobi solo. Elobi mpenza bongo.

Cameron: Talá mpe oyo esakweli yango elobi lisusu: “Boyangeli na ye ezali boyangeli oyo ekoumela seko, oyo ekoleka te, mpe bokonzi na ye ezali bokonzi oyo ekobebisama te.” Esali lokola ekokana na esakweli oyo touti kotánga na Danyele 2:44, boye te?

Jon: Ɛɛ, ezali bongo.

Cameron: Tózongela na mokuse makambo oyo touti kosolola. Esakweli oyo ezali na mokapo 4 ya Danyele epesamaki mpo bato báyeba ete “Oyo-Aleki-Likoló azali Moyangeli na bokonzi ya bato.” Maloba wana emonisi polele ete esakweli yango ekokisamaki kaka epai ya Nebukadenezare te, kasi esengelaki mpe kokokisama na ndenge ya monene mpenza. Mpe mokanda mobimba ya Danyele ezali na bisakweli oyo elobeli kotyama ya Bokonzi ya Nzambe oyo Mwana na ye akoyangela. Okanisi ete ebongi mpenza tóloba ete esakweli yango ya Danyele mokapo 4 etaleli mpe Bokonzi ya Nzambe?

Jon: Namoni ete ezali bongo. Kasi nazali komona kaka te soki yango etali dati ya 1914 na nini.

“TIKÁ NTANGO NSAMBO ELEKA”

Cameron: Tózongela naino mokonzi Nebukadenezare. Kobosana te ete nzete ya esakweli yango emonisaki mokonzi Nebukadenezare. Boyangeli na ye esukaki ntango nzete yango ekatamaki mpo na ntango nsambo, elingi koloba ntango oyo akómaki moto ya ligboma mpo na mwa ntango. Ntango nsambo yango esilaki ntango Nebukadenezare abikaki mpe azongelaki bokonzi na ye. Na kokokisama ya mibale ya esakweli yango, boyangeli ya Nzambe ekatanaki mpo na mwa ntango kasi ezali te mpo ete Nzambe akokaki makambo te.

Jon: Olingi mpenza koloba nini?

Cameron: Biblia elobaka ete na ntango ya kala, bakonzi ya Yisraele oyo bazalaki koyangela na Yerusaleme, bazalaki kofanda na “kiti ya bokonzi ya Yehova.” * Bazalaki komonisa Nzambe na ndenge bazalaki koyangela libota na ye. Na yango, boyangeli ya bakonzi wana ezalaki mpenza komonisa boyangeli ya Nzambe. Kasi, na nsima, mingi kati na bakonzi yango bazangaki botosi epai ya Nzambe mpe bato mingi oyo bazalaki koyangela, balandaki mpe ndakisa na bango ya mabe. Mpo na kozanga botosi ya Bayisraele, Nzambe apesaki nzela ete bato ya Babilone bamema bango na boombo na mobu 607 liboso ya ntango na biso. Kobanda ntango wana, mokonzi moko te azalaki komonisa Yehova na Yerusaleme. Na ndenge yango, boyangeli ya Nzambe ekatanaki. Ozali kokanga ntina ya makambo oyo nazali koloba?

Jon: Ɛɛ.

Cameron: Mobu 607 ezalaki ebandeli ya ntango nsambo, eleko oyo boyangeli ya Nzambe ekatanaki. Na nsuka ya ntango nsambo, Nzambe asengelaki kotya mokonzi ya sika oyo akomonisa ye, kasi na mbala oyo, moto moko ya likoló. Ezali na ntango wana nde bisakweli mosusu oyo totángaki na mokanda ya Danyele esengelaki kokokisama. Sikoyo, motuna ya ntina yango oyo: Ntango nsambo yango esukaki ntango nini? Soki toyanoli na motuna yango, tokoyeba ntango oyo Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela.

Jon: Namoni sikoyo. Nakanisa naino​—ntango nsambo esukaki na 1914?

Cameron: Ezali mpenza bongo!

Jon: Kasi ndenge nini toyebi yango?

Cameron: Ntango Yesu azalaki awa na mabele, amonisaki ete ntango nsambo ekómaki naino na nsuka te. * Yango wana, esengelaki kozala eleko moko ya molai mpenza. Ntango nsambo ebandaki bambula mingi liboso ete Yesu aya awa na mabele mpe ekobaki tii nsima ya kozonga na ye na likoló. Kobosana te ete bato basengelaki kokanga ntina ya bisakweli oyo ezali na mokanda ya Danyele tii na “ntango ya nsuka.” * Likambo ya esengo, na bambula 1800, bayekoli ya Biblia batyelaki bisakweli yango mpenza likebi mpe bayekolaki yango malamumalamu. Bamonaki ete ntango nsambo esengelaki kosuka na 1914. Mpe makambo minene oyo ezali kosalema na mokili kobanda 1914, emonisi ete ezali na dati yango nde Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela na likoló. Ezali na mbula yango nde mokili ekɔtaki na mikolo ya nsuka to ntango ya nsuka. Nayebi ete ezali likambo ya sika mpo na yo mpe ezali pɛtɛɛ te okanga ntina na yango.

Jon: Ɛɛ. Nakotánga lisusu makambo yango mpo nakanga mpenza ntina na yango.

Cameron: Kobanga te. Ezwaki ngai mpe mwa ntango mpo nakanga ntina ya bisakweli yango mpe ndenge oyo ekokisamaki. Kasi, na mokuse, nakanisi ete lisolo na biso esalisi yo omona ete makambo oyo Batatoli ya Yehova bandimaka mpo na Bokonzi eutaka na Biblia.

Jon: Mpo na koloba solo, ndenge oyo bosalelaka Biblia mpo na komonisa makambo oyo bondimaka, ekamwisaka ngai mpenza.

Cameron: Namoni ete yo mpe ozali na mposa ya kosala bongo. Yango wana, nalobaki ete ezali pɛtɛɛ te mpo okanga ntina ya makambo yango nyonso mbala moko. Ekoki kozala ete ozali na mituna mosusu. Na ndakisa, tomoni ete ntango nsambo etalelaki Bokonzi ya Nzambe mpe ebandaki na mobu 607 liboso ya ntango na biso. Kasi, ndenge nini toyebi mpenza ete ntango nsambo yango esukaki na 1914? *

Jon: Ɛɛ, yango mpe nazali komituna.

Cameron: Biblia yango moko esalisi biso tóyeba soki ntango nsambo yango ezali mbula boni. Okosepela tólobela yango mbala ya nsima? *

Jon: Likambo te.

Ezali nde na lisolo moko ya Biblia oyo olukaka koyeba malamu? Olingi koyeba mateya to makambo mosusu ya Lingomba ya Batatoli ya Yehova? Soki ezali bongo, kokakatana te kotuna Motatoli ya Yehova moko. Akosepela kosolola makambo yango na yo.

^ par. 5 Mbala mingi, Batatoli ya Yehova basololaka na baninga na bango ya kartye masolo ya Biblia ofele.

^ par. 21 Talá mokapo 9 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.

^ par. 63 Na esakweli na ye oyo etali mikolo ya nsuka, Yesu alobaki boye: “Yerusaleme [oyo ezalaki komonisa boyangeli ya Nzambe] ekonyatama na bikólo, tii bantango oyo etyamá ya bikólo ekokoka.” (Luka 21:24) Na yango, ata ntango Yesu azalaki awa na mabele, bato bazalaki komonisa te boyangeli ya Nzambe awa na mabele mpe yango esengelaki kokoba tii na mikolo ya nsuka.

^ par. 67 Talá apɛndisi “1914​—Mobu ya ntina mingi na bisakweli ya Biblia” na buku Biblia eteyaka mpenza nini?

^ par. 69 Lisolo ya mbala ya nsima ekotalela bavɛrsɛ ya Biblia oyo emonisi soki ntango nsambo ezali mbula boni.