Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | MOTO AKOKI KOKOBA KOZALA NA BOMOI NSIMA YA LIWA?

Elikya nini ezali mpo na bakufi?

Elikya nini ezali mpo na bakufi?

Bakufi bakoki kozonga lisusu na bomoi?

EYANO YA BIBLIA: “Ngonga ezali koya wana baoyo nyonso bazali na kati ya malita bakoyoka mongongo na ye [Yesu] mpe bakobima.”​Yoane 5:28, 29.

Yesu asakolaki ete ntango Bokonzi na ye ekoyangela mabele, malita ekotikala mpamba. Fernando, oyo tolobelaki na lisolo eleki, alobi boye: “Mbala ya liboso oyo natángaki Yoane 5:28, 29, nakamwaki mpenza. Epesaki ngai elikya ya solosolo mpe nakómaki kotalela avenire na ndenge ya malamu.”

Na ntango ya kala, Yobo, moto moko ya sembo azalaki na elikya ete ata soki akufi, nsukansuka Nzambe akozongisa ye lisusu na bomoi. Yobo atunaki boye: “Soki mobali makasi akufi, akoki kozonga lisusu na bomoi?” Na nsima, na kondima nyonso ayanolaki boye: “Nakozela, tii ntango [ntango oyo akolekisa na Nkunda] kobɔndisama na ngai ekoya. Yo okobenga, mpe ngai nakondima.”​—Yobo 14:14, 15.

Lisekwa ya Lazare epesi biso elikya mpo na mikolo ezali koya

Lisekwa ezalaki likambo ya sika te mpo na Marta, ndeko ya Lazare. Nsima ya liwa ya Lazare, Yesu ayebisaki Marta ete: “Ndeko na yo ya mobali akosekwa.” Marta alobaki boye: “Nayebi ete akosekwa na lisekwa na mokolo ya nsuka.” Na nsima, Yesu alobaki na ye boye: “Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Moto oyo azali kondimela ngai, ata soki akufi, akozonga na bomoi.” (Yoane 11:23-25) Na nsima, Yesu asekwisaki Lazare! Lisolo wana ya kitoko emonisi makambo minene oyo ekosalema na mikolo ezali koya. Kanisá naino ntango lisekwa ekosalema na mokili mobimba!

Bato mosusu bakosekwa mpo na kokende na likoló?

EYANO YA BIBLIA: Liloba ya Nzambe emonisi ete lisekwa ya Yesu ekesanaki mpenza na oyo ya bato mwambe, oyo Biblia elobeli. Bato yango nyonso mwambe bazongaki na bomoi awa na mabele. Kasi mpo na lisekwa ya Yesu, Biblia elobi boye: “Yesu Kristo azali na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe, mpo akendaki na likoló.” (1 Petro 3:21, 22) Longola Yesu, ezali na bato mosusu oyo basengelaki kosekwa mpo na kokende na likoló? Yesu ayebisaki bantoma na ye boye: “Soki nakei mpe nabongiseli bino esika, nakoya lisusu mpe nakoyamba bino epai na ngai, mpo esika ngai nazali bino mpe bózala wana.”​—Yoane 14:3.

Yesu akendaki na likoló mpe abongisaki esika mpo na bayekoli na ye mosusu. Nsukansuka motángo ya baoyo bakosekwa mpo na kokende na likoló ekozala 144 000. (Emoniseli 14:1, 3) Kasi bayekoli yango ya Yesu bakokende kosala nini kuna?

Bakozala na mingi ya kosala! Biblia elobi boye: “Moto nyonso oyo azwi lisekwa ya liboso azali moto ya esengo mpe mosantu; liwa ya mibale ezali na bokonzi likoló na bango te, kasi bakozala banganga-nzambe ya Nzambe mpe ya Kristo, mpe bakoyangela elongo na ye mbula nkóto moko (1 000).” (Emoniseli 20:6) Baoyo bakosekwa mpo na kokende na likoló bakoyangela mabele lokola bakonzi mpe banganga-nzambe elongo na Kristo.

Banani bakosekwa na nsima?

EYANO YA BIBLIA: Biblia ezali na maloba oyo ya ntoma Paulo: “Nazali na elikya epai ya Nzambe, elikya oyo bato oyo mpe bazalaka na yango, ete lisekwa ekozala, ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.”​Misala 24:15.

Biblia eyebisi biso ete bamiliare ya bato oyo bakufá bakosekwa

Banani bakozala na kati ya bato oyo Paulo abengi “bayengebene”? Tózwa ndakisa. Nzambe ayebisaki Danyele, moto moko ya sembo na nsuka ya bomoi na ye boye: “Okopema, kasi okotɛlɛma mpo na libula na yo na nsuka ya mikolo.” (Danyele 12:13) Danyele akozala wapi nsima ya kolamuka na mpɔngi ya liwa? “Bayengebene bakozwa mabele, mpe bakofanda wana seko.” (Nzembo 37:29) Mpe Yesu asakolaki ete: “Esengo na bato ya ezaleli ya boboto, mpo bakozwa libula ya mabele.” (Matai 5:5) Danyele, mibali mpe basi mosusu ya sembo bakosekwa mpo na kofanda lisusu awa na mabele, ata mpe mpo na libela.

Banani bakozala na kati ya bato oyo Paulo abengaki “bato bazangi boyengebene”? Ezali bamiliare ya bato oyo bazalaki na bomoi mpe bakufá kozanga ete bázwa libaku ya koyeba mpe kosalela solo ya Biblia. Nsima ya lisekwa na bango, bakozala na likoki ya koyeba mpe kolinga Yehova * ná Yesu. (Yoane 17:3) Baoyo nyonso bakopona kosalela Nzambe bakozala na elikya ya kozala na bomoi libela na libela lokola Yehova.

Baoyo nyonso bakopona kosalela Nzambe bakozala na elikya ya bomoi libela na libela na nzoto malamu mpe na esengo

Bomoi na mabele ekozala ndenge nini?

EYANO YA BIBLIA: Nzambe “akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te.” (Emoniseli 21:4) “Bakotonga bandako mpe bakofanda kuna; mpe ya solo, bakolona bilanga ya vinyo mpe bakolya mbuma na yango.”​—Yisaya 65:21.

Meká komona na makanisi ete ozali na bomoi ya ndenge wana ná bandeko to baninga na yo oyo bakosekwa! Kasi motuna yango oyo: Ndenge nini okoki kondimisama ete lisekwa ekosalema mpenza?

^ par. 15 Yehova ezali nkombo ya Nzambe na Biblia.