Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | MOTO AKOKI KOKOBA KOZALA NA BOMOI NSIMA YA LIWA?

Soki moto akufi akendaka wapi?

Soki moto akufi akendaka wapi?

“Nazalaki kokanisa ete ezali na bisika misato oyo moto akoki kokende soki akufi: likoló, lifelo to epongelo. Nayebaki ete nabongaki te kokende likoló to na lifelo. Kasi, nayebaki mpenza te nini esalemaka na epongelo. Natikalá komona yango ata esika moko te na Biblia. Ezalaki kaka oyo bato balobaka.”​—Lionel.

“Bateyaki ngai ete bato nyonso bakendaka na likoló nsima ya liwa, kasi nandimaki yango te. Nazalaki kokanisa ete liwa ezali nsuka ya makambo nyonso; soki moto akufi, nyonso esili mpo na ye.”​—Fernando.

Osí omituná: ‘Soki moto akufi akendaka mpenza wapi? Bandeko to baninga na biso oyo bakufá banyokwamaka esika moko boye? Tokomona bango lisusu? Nini ekoki kondimisa biso yango?’ Tótalela oyo Biblia eteyaka mpenza. Tóbanda naino na kotalela soki Biblia ekokanisi liwa na nini. Na nsima, tokotalela elikya oyo Biblia, Liloba ya Nzambe epesi.

Bakufi bazalaka ndenge nini?

EYANO YA BIBLIA: “Bato ya bomoi bayebi ete bakokufa; kasi bakufi bayebi ata eloko moko te, bazali mpe na lifuti lisusu te, mpo bato babosani makambo oyo ekokaki kosala ete bákanisa bango. Nyonso oyo lobɔkɔ na yo ezwi mpo na kosala, salá yango na makasi na yo mpenza, mpo mosala ezali te, mwango te, boyebi te, bwanya mpe te na nkunda, esika ozali kokende.” *​—Mosakoli 9:5, 10.

Na mokuse, nkunda ezali esika oyo bato bakendaka soki bakufi; esika ya elilingi to esika oyo moto akanisaka lisusu te mpe asalaka ata mosala moko te. Yobo, moto ya sembo akanisaki ete nkunda ezali esika ya ndenge nini? Abungisaki biloko na ye nyonso mpe bana na ye na mokolo moko mpe abɛlaki maladi mabe ya babibɔ nzoto mobimba. Asɛngaki Nzambe boye: “Aa soki obombaka ngai ata na Nkunda [“lifelo,” Douay Version, Biblia ya Katolike] soki obombaka ngai.” (Yobo 1:13-19; 2:7; 14:13) Emonani polele ete Yobo akanisaki te ete nkunda ezali lifelo ya mɔtɔ, esika oyo alingaki kokende konyokwama lisusu koleka. Kutu, ayebaki ete ezali nde esika ya kopema.

Ezali na mwaye mosusu ya koyeba ndenge bakufi bazalaka. Tokoki kotalela masolo ya Biblia oyo elobeli bato mwambe oyo basekwaki.​—Talá etanda “ Bato mwambe oyo basekwaki, oyo Biblia elobeli.”

Moko te na kati ya bato yango mwambe alobaki ete azalaki na esika moko ya bisengo to ya mpasi. Soki bato oyo basekwaki bautaki na esika moko ya ndenge wana, balingaki te kobɛtela basusu lisolo yango? Masolo yango elingaki te kozala na Biblia, buku oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo santu mpo bato nyonso báyeba yango? Biblia elobeli likambo moko te ya ndenge wana. Emonani polele ete bato wana nyonso mwambe bazalaki na likambo ya koloba te. Mpo na nini? Mpo bayebaki eloko moko te, kaka ndenge ezalaka soki moto alali mpɔngi makasi. Kutu, na bantango mosusu Biblia esalelaka liloba mpɔngi mpo na kolobela liwa. Na ndakisa, Davidi mpe Stefano, oyo bazalaki bato ya sembo ‘balalaki na kati ya liwa.’​—Misala 7:60; 13:36.

Kasi, elikya nini ezali mpo na bakufi? Bakoki kolamuka na mpɔngi yango?

^ par. 7 Na Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika, liloba ya Ebre “Sheol” mpe ya Grɛki “Hades” ebongolami na “nkunda.” Mabongoli mosusu ya Biblia esalelaka liloba “lifelo,” kasi liteya oyo elobaka ete bato banyokwamaka na lifelo nsima ya liwa euti na Biblia te.