Kotika moto asala oyo alingi—Ndenge oyo Biblia ekoki kosalisa
“Mpo kimya ezala na mokili, bato basengeli kotika basusu básala oyo balingi.”—Déclaration de principes de l’UNESCO sur la tolérance, 1995.
Kasi, na ngambo mosusu, kotika bato básala oyo balingi ekoki kotinda moto azanga limemya epai ya basusu ata mpe koyina bango. Mayoki ya ndenge wana ekoki mpe kotinda bato bákóma koloba maloba ya koyinana, kokanisela basusu mabe, mpe kosala makambo na mobulu.
Nzokande, soki batuni ‘kotika moto asala oyo alingi’ elakisi nini, moto na moto akopesa makanisi na ndenge na ye. Bato mosusu bakanisaka ete moto oyo atikaka basusu básala oyo balingi, asepelaka na makambo nyonso oyo bato yango basalaka. Basusu bazalaka na makanisi ndenge moko na Biblia ete, moto oyo atikaka basusu básala oyo balingi atosaka lotomo oyo moto azali na yango ya kopona ye moko lolenge ya bomoi oyo alingi, ezala lolenge ya bomoi ya moto yango esepelisaka ye te
Na mikolo na biso, Biblia ekoki mpenza kosalisa bato bátikaka basusu básala oyo balingi?
Ndenge Biblia etalelaka likambo yango
Biblia elendisaka bato bátika basusu básala oyo balingi. Elobi: “Bato nyonso báyeba ete bozalaka makambo makasimakasi te.” (Bafilipi 4:5) Biblia elendisi biso tósalelaka basusu makambo na boboto, na limemya, mpe na bosembo. Elingi koloba te ete baoyo basalelaka toli yango basepelaka to mpe bandimaka kaka bizaleli nyonso ya bato, kasi batikaka nde nzela ete moto nyonso asala makambo na kotalela ekateli na ye.
Nzokande, Biblia emonisi ete Nzambe atyá mibeko na oyo etali bizaleli ya bato. Elobi: “Ee moto, [Nzambe] ayebisi yo oyo ezali malamu.” (Mika 6:8) Emonisi malako oyo Nzambe apesá bato mpo na kosalisa bango bázala na bomoi ya malamu.—Yisaya 48:17, 18.
Nzambe apesi biso nzela te tósambisaka basusu. Biblia emonisi ete, “ezali na Moto moko kaka oyo apesaka mibeko mpe asambisaka. . . .Kasi yo ozali nani mpo osambisa mozalani na yo?” (Yakobo 4:12) Nzambe apesi mokomoko na biso bonsomi ya kopona oyo tolingi, mpe komema mokumba na biso moko.—Mibeko 30:19.
Oyo Biblia elobi mpo na limemya
Biblia elobi ete tosengeli ‘kokumisa bato ya ndenge nyonso.’ (1 Petro 2:17) Yango wana, bato oyo batosaka mibeko ya Biblia, basalelaka bato nyonso makambo na limemya, ezala bato yango bazali na bindimeli nini, to mpe bazali na bomoi ya lolenge nini. (Luka 6:31) Yango elakisi te ete baoyo batosaka toli ya Biblia bandimaka mateya nyonso to mpe makanisi nyonso oyo bato bazalaka na yango, to mpe bapesaka mabɔkɔ na bikateli nyonso oyo bato bazwaka. Kasi na esika básalela basusu makambo na kozanga limemya, basalaka nyonso mpo básalelaka basusu makambo ndenge Yesu azalaki kosala.
Na ndakisa, mokolo mosusu Yesu akutanaki na mwasi moko oyo azalaki moto ya lingomba moko oyo Yesu azalaki kondimela te. Mwasi yango azalaki mpe kofanda ndako moko na makango na ye; bomoi oyo Yesu azalaki kosepela na yango te. Atako bongo, Yesu asololaki na mwasi yango na limemya.—Yoane 4:9, 17-24.
Lokola Yesu, bakristo bamibongisaka mpo na kolimbola ntina ya mateya oyo bandimaka epai ya moto oyo asepeli koyoka, kasi basalaka yango na “limemya makasi” (1 Petro 3:15) Biblia eteyaka bakristo ete báboya kotinda basusu na makasi ete bándima makanisi na bango. Biblia elobi ete moyekoli ya Kristo “asengeli kowelana te, kasi asengeli nde kozala na boboto na bato nyonso,” ata epai ya baoyo bazali na bindimeli ekeseni.—2 Timote 2:24.
Oyo Biblia elobi na likambo etali koyina basusu
Biblia eyebisi biso ete ‘tókoba koluka kimya na bato nyonso.’ (Baebre 12:14) Moto oyo alukaka kimya aboyaka koyina basusu. Aboyaka kosala makambo oyo eyokani te na mitinda ya Biblia oyo andimaka, asalaka nyonso oyo akoki mpo na kofanda na kimya elongo na basusu. (Matai 5:9) Kutu, Biblia elendisi mpe bakristo ete bálinga banguna na bango mpe básalelaka baoyo bazali konyokola bango makambo na boboto.—Matai 5:44.
Na ntembe te, Biblia elobi ete Nzambe “ayinaka” makambo oyo eyokisaka bato nsɔni to oyo epesaka basusu mpasi. (Masese 6:16-19) Kasi awa Biblia esaleli liloba “koyina” mpo na komonisa ete esengeli koboya mpenza kosepela na makambo ya mabe. Biblia emonisi ete Nzambe andimaka kolimbisa mpe kosalisa baoyo bazali na mposa ya kobongola bizaleli na bango mpe baoyo batosaka mibeko na ye.—Yisaya 55:7.
Bavɛrsɛ ya Biblia oyo elendisi kotika bato básala oyo balingi mpe limemya
Tito 3:2: “Bózala nde bato ya makambo makasimakasi te, bámonisela bato nyonso boboto.”
Moto ya makambo makasimakasi te azalaka na boboto ata epai ya moto oyo azali na makanisi moko te na ye, mpe yango esalaka ete limemya ezala.
Matai 7:12: “Makambo nyonso oyo bolingaka bato básalela bino, bino mpe bosengeli kosalela bango yango.”
Biso nyonso tosepelaka ntango basusu bamemyaka biso, bandimaka makanisi na biso mpe batyaka likebi na ndenge oyo tozali komiyoka. Mpo na koyeba ndenge ya kosalela toli yango oyo Yesu apesaki ntango azalaki koteya, talá lisolo “Qu’est-ce que la règle d’or?”
Yosua 24:15: “Bópona bino moko lelo nani bokosalela.”
Soki tozali kotosa lotomo oyo bato mosusu bazali na yango ya kopona makambo oyo balingi kosala, tokosala ete kimya ezala.
Misala 10:34: “Nzambe aponaka bilongi te.”
Nzambe aboyaka moto te mpo na mimeseno ya mboka na ye, mpo azali mwasi to mobali, mpo na ekólo na ye, loposo na ye, to mpo na ndenge oyo abɔkwamá. Baoyo nyonso balingi komekola Nzambe bamonisaka limemya na bato ya ndenge nyonso.
Habakuku 1:12, 13: ‘[Nzambe] akoki te kokanga miso na makambo ya mabe.’
Nzambe akokanga miso mpo na libela te. Akotika nzela te ete bato bákoba kosala mabe mpo na libela. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá video Mpo na nini Nzambe atiki nzela na bampasi?
Baroma 12:19: “Bótikela nde nkanda ya [Nzambe] esika; mpo ekomamá ete: ‘Kozongisa mabe ezali likambo na ngai; ngai nde nakozongisa mabe,’ Yehova alobi bongo.” a
Yehova Nzambe apesi moto moko te nzela ya kozongisa mabe. Akosala ete makambo ekatama na bosembo na ntango oyo ye moko atyá. Mpo na koyeba makambo mosusu, tángá lisolo “Bosembo ekozala mokolo mosusu awa na mabele?”
a Yehova ezali nkombo ya Nzambe. (Nzembo 83:18) Talá lisolo “Yehova azali nani?”