Lakisá makambo oyo ezali na kati

24 SANZA YA 9, 2014
ÉRYTHRÉE

Bakangami mbula 20 na bolɔkɔ​—Tii ntango nini ekosila?

Bakangami mbula 20 na bolɔkɔ​—Tii ntango nini ekosila?

Eleki mbula 20, bakonzi ya Érythrée bakangaki bilenge mibali misato mpe banyokolaki bango makasi na bolɔkɔ ya Sawa, esika bazali tii lelo. Bakweisaki bango na likambo moko te ya mabe, mpe bapesá bango ata likoki te ya kosamba liboso ya tribinale. Mpo na nini bakangamaki kaka mpamba bongo?

Paulos Eyassu, Negede Teklemariam, ná Isaac Mogos bazali Batatoli ya Yehova mpe baboyaki kosala mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango mpe mpo na mateya oyo bandimelaka. Soki bakweisaki bango mpo baboyaki kosala mosala ya soda, balingaki kokangama na bolɔkɔ na boumeli ya ntango moko boye ya sikisiki. Paulos azali sikoyo na mbula 41, Negede azali na mbula 38, mpe Isaac azali na mbula 38. Bango nyonso balekisaki bolenge na bango na bolɔkɔ. Bapekisi bango kobala mpe kozala na bana, kosunga baboti na bango oyo bakómi mibange, to kozala na bomoi oyo balingaki kozala na yango. Bapekisi bango mpe kosambela elongo na Batatoli mosusu.

Ntango Paulos, Negede, ná Isaac bakangamaki mokolo ya 24/09/1994, bakonzi ya bolɔkɔ ya Sawa banyokolaki bango makasi, mpe babɛtaki bango. Nzokande, na bambula oyo euti koleka, batikaki konyokola bango makasi, mpe ekateli na bango ya kotikala sembo na mateya oyo bandimaka esali ete bakɛngɛli ya bolɔkɔ bámemya bango.

Batatoli mosusu bazali konyokwama na bolɔkɔ

Batatoli ya Yehova bazali konyokwama makasi na Érythrée koleka na mboka mosusu na mokili. Awa tozali kokoma lisolo oyo, Batatoli 73 bazali na bolɔkɔ, ata mpe basi, bana, mpe mibange. Mingi bazali koyika mpiko na minyoko makasi na esobe, bazangi bilei mpe mai ya malamu, mpe basoda bazali konyokola bango na bolɔkɔ. Mibali mosusu misato oyo bazali Batatoli bakɔtá bolɔkɔ na Sawa eleki mbula 10, kasi Paulos, Negede, ná Isaac basali mbula ebele na bolɔkɔ koleka Batatoli mosusu nyonso na Érythrée.

Communauté internationale esɛngi Érythrée etika konyokola mangomba

Communauté internationale eyebi malamu ndenge Érythrée ezali konyokola Batatoli ya Yehova mpe mangomba mosusu ya mike.

  • Mbula na mbula kobanda 2004, ebongiseli moko ya États-Unis (U.S. Department of State) ebengi Érythrée “ekólo oyo ezali kobangisa mingi,” elingi koloba ezali kati na “ekólo nyonso oyo guvɛrnema na yango enyokolaka to epesaka nzela ete bányokola makasi mpe mbala na mbala mangomba.”

  • Ebongiseli moko ya ONU (Conseil des droits de l’homme de l’ONU) elobaki ete ezali komitungisa mingi mpo na “ndenge bakonzi ya Érythrée bazali kobebisa ntomo ya bato ya mboka na bango moko.” Esɛngi guvɛrnema ya Érythrée “etosa lotomo ya moto nyonso ya kozala na bonsomi . . . ya makanisi, ya kozala na lisosoli malamu, ya kozala na lingomba mpe kondima mateya na yango.”

  • Ebongiseli moko ya États-Unis (Commission internationale pour la liberté religieuse aux États-Unis) elobaki na lapolo na yango ya mbula mpo na mobu 2014 ete: “Likambo etali bonsomi na losambo ezali mpenza mpasi mpo na . . . Batatoli ya Yehova.”

  • Na lapolo na yango ya mokili mobimba mpo na 2013, ebongiseli Human Rights Watch endimaki ete guvɛrnema ya Érythrée ezali kokoba kokanga, kokɔtisa na bolɔkɔ mpe konyokola bato ya mangomba oyo “eyebani te” mpe ete “bazali koluka mingimingi Batatoli ya Yehova.”

  • Na sanza ya 12/2005, ebongiseli ya Commission africaine des droits de l’homme et des peuples endimaki mokanda Résolution sur la situation des droits de l’homme en Érythrée, oyo esɛngaki Érythrée “elaka ete ekopesa ntango nyonso lotomo ya kosambisa likambo malamu, kozala na bonsomi ya koloba mpe ya kopesa makanisi, mpe lotomo ya koyangana na kimya.”

Philip Brumley, oyo azali avoka ya Batatoli ya Yehova, alobaki mpo na Batatoli na mokili mobimba ete: “Tozali na elikya makasi ete guvɛrnema ya Érythrée ekobimisa bato nyonso ya bolɔkɔ oyo bazali Batatoli, ata mpe mibali misato oyo bazali na bolɔkɔ eleki sikoyo mbula 20, mpe ekosukisa minyoko mpo na bandeko na biso bakristo.”